You are on page 1of 10

1

Eglise néo-apostolique
Libongisami ya
balosambo kati ya
Eglise néo-apostolique

Mokanda 3

Bopesi bilembo pe mapamboli


2

Lolenge esalamaka pe maloba ekopesamaka po na kokokisa yango

Batisimo esantu ya mai


Kokotisa yango na kati ya losambo
Bopesi batisimo esantu ya mai esalamaka sima ya bolimbisi masumu pe losambo ya
botondi Nzambe botondi, pe ekoki kobanda na nzembo. Soki misala mosusu ebele
ebongisami liboso ya bopesi molei- mosantu, ekosalama na lolenge oyo :
• Batisimo esantu ya mai
• Kondimama
• Bopesi Molimo-Mosantu
• Bolapi- ndai
Lolenge ekosalama
Batisimo esantu ya mai epesamaka na Nganga-Nzambe to na ntoma. Mosala ekosalama
liboso ya mesa ya bonzenga.

Maloba ya mosala Maloba oyo esengeli


… tango ya batisimo ya bana
(1) • Bana bazali likabo ya Nzambe, esengeli kobatela yango malamu
(2) ; • Baboti bazali kondima kobokola bana kati na mateya ya Eklezia néo-apostolique ;
• Batisimo esantu ya mai ezali ngolu ya yambo pe ya tina monene epesameli moto na
Bosatu Bosantu.
• Na nzela ya batisimo ya mati, lisumu ya ebandeli elimbisami
(4) • Muana oyo azwi batisimo ya mai, andimami na Eklezya ya Kristo
Tango ya batisimo ya bamikolo
(5) • Batisimo esantu ya mai ezali ngolu ya yambo pe ya tina epesameli motu na Bosatu
Bosantu
(3) ;
1. oyo elandi etali bango.
2. Cf. Nzembo 127 : 3
3. Cf. Marko 16 : 16
4. Cf. I Piere 3 : 21
 Na nzela ya batisimo, lisumu ya ebandeli elimbisami (4) ;
 Moto oyo azwi batisimo esantu ya mai, andimami na Eklezia ya Kristu.
 Po na kozua batisimo esantu ya mai, esengeli na moto oyo akozwa yango andima
komikotisa kati ya bondimi ya néoapostolique na
¤ Bosatu ya Nzambe ¤ Liwa, lisekwi pe bozongi ya Yezu-Kristu ;
¤ Mosala ya bontoma, oyo ezali kati na
 Bopesi bilembo bisantu
 Bopesi liloba ya Nzambe
 Bobongisi bandimi po na bozongi ya Yezu-Kristu na tina ya konetwama ya Eklezya-
Mwasi.
Bosengi ya « Ee »
Mokambi akosenga na bandimi batelema

Tango ya batisimo ya bana


3

« Balingami baboti, liboso ya Nzambe pe ya lisanga, nazali kotuna


bino motuna oyo : Bozali kondimela Yezu-Kristu pe bondimi
 Kobokola muana na bino na bondimi ya néo-apostolique
(soki baboti mibale bazali néo-apostolique)
 Kobokola mwana na bino na bondimi ya néo-apostolique pe
kosalisa ye na bokoli na ye oyo (soki moboti moko pamba nde azali néo apostolique)
pe kolakisa ye atikala moyengebene na Nkolo ? Soki wana ezali kolinga na bino,
bolakisa yango na bolobi : « Ee ».
(6) • Tango ya batisimo ya bamikolo •
« Liboso ya Nzambe pe ya lisanga, nazali kotuna bino motuna oyo : Bozali kondima
Sango Malamu ya Yezu-Kristu, bondimi kolanda

5. Bana ya mikolo baye bazali na mokumba ya bondimi ya bango moko bazali na


molongo ya bamikolo. Na esika ya boye, baye bazali na esika ya baboti na bango
bakokoma « Ee » na bango.
6. Liboso ya mosala oyo, esengeli kosolola na baboti po bayeba mokumba bazali
komema na batisimo ya mai. Yezu-Kristu pe komitika babongisa bino kati na liloba
ya Nzambe, po na bozwi Molimo-mosantu ? Soki wana ezali kondima na bino,
bolakisa yango na bolobi : « Ee ».
Libondeli elandi « Ee »
Tango ya batisimo ya bana Libondeli ekolanda makanisi oyo :
• Nzambe ayoki kondima ya baboti baye basengi ye ete muana na bango azwa batisimo
esantu ya mai
• Tika ete Nzambe apambola « Ee » na bango
• Tika ete Nzambe apesa baboti bokasi pe makoki ya kobatela ndai na bango.
• Tango ya batisimo ya bamikolo Libondeli ekolanda makanisi oyo :
• Nzambe ayoki « Ee » ya bandeko pe bosenga na bango ya batisimo esantu ya mai
• Tika Nzambe apambola « Ee » na bango
• Tika Nzambe apesa bango bokasi pe makoki ya kobatela ndai na bango
• Libondeli ezali kosuka na bolobi : « Amen. »

Bopamboli mai po na batisimo


Mokambi akotombola loboko likolo ya mai ya batisimo pe akopambola yango na bolobi
ete :
« O nkombo ya Nzambe, Tata, Muana pe Molimo-Mosantu, nazali kopambola mai oyo
pe kobulisa yango po na batisimo esantu ya mai. Amen. »

Mosala ya batisimo
Sik’oyo maloba ya batisimo na Bosatu Bosantu ezali kolanda :
« (Soki ezali bana, kopesa nkombo na ye ya misato),
nazali kobatisa yo na nkombo ya Nzambe, Tata, Muana pe Molimo-Mosantu. »
Tango azali kobimisa maloba oyo ya batisimo, Mokambi akokoma kuruze moko mbala
misatu na elongi ya moto azali kozwa batisimo, sima ya bokotisi mbala misatu mosapi na
ye kati ya mai epambolami. Esengeli kobongisa mai ya kokoka po na mosala oyo.
Akobandela maloba pe akokoma kuruze na elongi ya bato nyonso bakozwa batisimo.
Sima, akotiela bango maboko, pe Mokambi akokoba na bolobi ete :
4

« Uta na mosala oyo, Nzambe azali kolimbisa yo lisumu ya ebandeli. Sik’oyo ondimami
lokola eteni ya nzoto ya Kristo, pe na bongo, okoti na Eklezya ya Kristo.

Lipamboli ya batisimo ezali kolanda mbala moko.

Lipamboli ya batisimo
Lipamboli ya batisimo ezali kopesama na botieli bango maboko. Maloba oyo endimami
yango oyo:
« Nzambe, Tata
 Azali kopesa yo ngolu na ye pe kokamba yo na nzela ya
lobiko ya kokoka ;
• Azali kobatela yo na bolingo ;
• Yezu-Kristu
• Akabi bomoi na ye po na yo ;
• Apesi yo nzela po ozwa molei – mosantu pe mapamboli ya ndako ya Nzambe ;
• Azali kopesa yo kimia na ye ;
• Molimo-Mosantu • Akolakisa yo pe akobongisa yo na lolenge ya Kristu ;
• Akobatela yo na nzela ya bomoi pe ya bondimi ;

• Ndenge esengami na suka


Lipamboli ya batisimo ezali kosuka na bolobi maloba oyo :

« Tika ete lipamboli ya Nzambe ekamba yo/ ekamba bino. Kimia ya Mosekwi na liwa
ezala na yo/ ezala na bino. Amen. »
Tango bazwi bilaka ya mapamboli na bango, bandimi bakozonga na bisika na bango
kati ya lisanga.

Ebandeli ya bomilengeli na molei-mosantu

Soki mosala mosusu ezali te, to pe nzembo ezali te, lisanga ekotikala ya kotelema po na
bomilengeli na molei-mosantu.

Kondimama
Kondimama esalamaka sima ya bolimbisi masumu pe libondeli ya botondi Nzambe
botondi, pe ekoki kobanda na nzembo. Soki misala ebele ebongisami liboso ya bozwi
molei-mosantu, ekolandana na lolenge oyo :
• Batisimo esantu ya mai
• Kondimama
• Bopesi Molimo-Mosantu
• Bolapi-ndai

Lolenge mosala ekosalema


Ba Nganga-Nzambe nde bapesami ndingisa ya kokokisa mosala ya kondimama.
Mosala wana esalamaka liboso ya mesa ya bonzenga.
5

Maloba ya mosala
(7) Maloba oyo nde esengeli elanda :
• Na nzela ya batisimo esantu ya mai, Nzambe azali kopesa ngolu na ye ya yambo pe ya
monene
• Bato nyonso babatisami na mai, soki bazali kondima YezuKristu pe bazali kotatola ye
lokola Mokonzi, bazali kati ya Eklezya ya Kristu.
• Batisimo ya mai ezwami epai mosusu ezali kondimama soki moto azali na bondimi pe
azali kotatola
¤ bozongi ya Yezu-Kristo po na konetwama ya Muwasi na ye
¤ botindami ya bantoma babongisa Mwasi po na bozongi ya Kristo
¤ bozwi ya likabo ya Molimo-Mosantu na maboko ya ntoma
¤ kondimama epesaka nzela po ete moto azwa molei-mosantu tango nyonso

Kosenga « Ee »
Mokambi akosenga na lisanga etelema.
7 Bana baye bamemi mokumba ya bondimi na bango moko. Na ngonga ya boye, baye
bazali lokola baboti na bango bakokoma « Ee » na bango.
« Liboso ya Nzambe pe ya lisanga, nazali sika kotuna motuna oyo : Bozali kondima
kokota na bino kati ya Eklezia néo-apostolique, bozali pene po na kolanda Yezu-Kristo
pe komitika babongisa bino kati ya liloba ya nzambe po na kozwa likabo ya Molimo-
Mosantu ? Soki wana ezali kolinga na bino, bolakisa yango na bolobi « Ee ».

Libondeli elandi « Ee »
Libondeli yango ekolanda makanisi oyo :
• Nzambe ayoki « Ee » ya ndeko muasi/ndeko mobali oyo asengi ete akota kati ya
lisanga
• Tika ete Nzambe apambola « Ee » na ye.
• Tika ete Nzambe apesa ye bokasi pe makoki ya kokokisa ndai na ye
• Libondeli ezali kosuka na bolobi : « Amen ».

Mosala ya kondimama
Mokambi azali kokokisa mosala na maloba oyo :
« O nkombo ya Nzambe, Tata, Mwana, pe Molimo-Mosantu, nazali koyamba yo kati ya
bomoko ya bondimi pe molei-mosantu kati ya Eklezya néo-apostolique Kobanda lelo,
ondimami na moleimosantu pe mapamboli ya ndako ya nzambe. »
(8). Maloba mosusu ya mapamboli ekoki pe kopesama :
• Tika Nzambe akembisa bino kati ya bondimi pe abatela bino kati ya bomekoli ya
Yezu-Kristu.
• Tika ete lipamboli ya Nzambe ekamba bino, pe kimia ya Mosekwi na liwa ezala na
bino Mosala oyo ekosuka na bolobi : « Amen. »
Sima ya bozwi bilaka ya mapamboli, bandimi bazali kozonga na bisika na bango kati
ya lisanga.
Komilengela po na molei-mosantu Soki mosala mosusu to nzembo ezali te, lisang
ekotikala ya kotelema po na bomilengeli na molei-mosantu.
6

8. Na masolo ekobetama liboso ya kondimama oyo, Mokambi akolimbolela bango


kondima na biso kati ya Eklezia néo-apostolique
BOLAPI-NDAI
Esika na yango kati ya losambo
Mosala ya bolapi-ndai ekolanda bolimbisi masumu pe libondeli ya botondi Nzambe
botondi. Na balosambo ya bolapi-ndai, mosala mosusu ekoki kosalema te.
Mosala ekobanda na nzembo. Mosali ya Nzambe
(to ndeko mobali to ndeko muasi oyo Mokambi apesi mosala wana) akotanga mokanada
ya ntoma-mokonzi, pe sima ya bolapi-nda, bakozwa mokanda yango.
Lolenge ekosalema
Bolapi-ndai ezali kokambama na nganga-Nzambe, to na ntoma. Mosala wana
ekosalema liboso to pembeni ya mesa ya bonzenga.
Maloba
Nzela ya kolanda :
Balapi-ndai
• Bazali kozwa mokumba ya bomoi na bango kati ya bondimi ;
• Bazali kotatola na miso ya bato bokangami na bango kati ya bondimi néo-apostolique,
lolenge ekomami na botatoli ya bondimi na biso ;
• Bazali kondima kotikala bayenbene na Nzambe Basatu ;
• Bazali kozwa lipamboli ya Nzambe oyo ekosalisa bango bakokisa ndai na bango ya
boyengebene ;
• Babiangami po na komikotisa na makabo bazwi, na mosala kati na lisanga.
Kosenga « Ee »
pe ndai na balapi-ndai
Mokambi akosenga na lisanga etelema.
« Liboso ya Nzambe pe lisanga, nazali kotuna bino motuna oyo :
Bozali kondima kokangama kati ya bondimi ya Eklezia néoapostolique, lokola
ekomami kati ya botatoli bondimi na biso, bozali kondima kotambwisa bomoi na bino
na ndakisa ya YezuKristo pe komitika babongisa bino po na bozongi na ye ? Boye,
bolakisa yango na bolobi
« Ee » uta motema na bino. »
Mokambi akotonda balapi-ndai botondi po na « Ee »
na bango pe akosenga bango bapesa ndai ya bolapi-ndai :
« Naboyi Satana, na misala na ye nyonso, na bisika amimonisaka, pe namipesi na yo, O
Nzambe Bosatu-Bosantu, Nzambe, Tata, Mwana pe Molimo-Mosantu, na bondimi pe na
botosi, pe na mokanu ya kotikala moyengebene kino na mokolo na ngai ya suka, Amen. »

Libondeli po na lipamboli ya Nzambe


Lipamboli ya bolapi- ndai ezali kopesama na botieli maboko na maloba maye :
« O nkombo ya Nzambe, Tata, Mwana, pe Molimo-Mosantu, bozwa
lipamboli po na bolapi-ndai na bino. »
Ezali malamu mingi kobakisa makanisi oyo :
Tika, Nzambe Tata
• Oyo apona bino uta kala pe akomisa bino bana na ye
• Apesa bino sika bokasi ya kokokisa ndai na bino
• Akamba bino na banzela na bino ya lobi na lobi.
7

• Tika ete Molimo-Mosantu


• Akolisa bino kati ya bizaleli ya Yezu kristu
• Akundola makanisi ya kitoko kati na bino po bosepelisa mozalani na bino
• Apesa bino bwanya esengeli po bopona malamu kati ya bomoi na bino.
• Suka ya libondeli
« Lipamboli ya Nzambe ekamba bino pe kimia ya Mosekwi na liwa ezala na bino.
Amen. »
Sima, Mokambi akopesa longonya na balapi-ndai pe akotombela bango boyei bolamu
lokola bakristo baye bayebi oyo esengeli kokokisa na lisanga pe na molongo ya bilenge.
Lisanga etikali ya kotelema. Sima ya bozwi bilaka ya mapamboli, balapi-ndai bakozonga
na bisika na bango. Soki bolapi-ndai ekosuka na nzembo, wana lisanga ekofanda.

Bomilengeli po na molei-mosantu
Molei-Mosantu ezali nde kolanda na sima.

MAPAMBOLI YA KOKANISA MOKOLO YA LIBALA


(9) Esika na yango kati ya losambo
Bopesi lipamboli ya kokanisa mokolo ya libala ezali kolanda moleimosantu.
Soki misala ebele ekolanda molei-mosantu, ekolandana na lolenge oyo :
• Bolongoli (mokumba/mosala), bopesi bopemi
• Bopesi mosala, bopesi mokumba, kondimama (kati ya ministère)
• Bomilengeli na libala, libala, kokanisa mokolo ya libala

Lolenge ekosalema
Lipamboli ya kokanisa mokolo ya libala epesamaka na ngangaNzambe to na ntoma.
Mosala wana ekosalema liboso ya mesa ya bonzenga to na bisika babalani bafandi kati
na lisanga. Mosala oyo ekobanda na nzembo.

Maloba
Ndenge ekolandana : Kokanisa mikolo eleka
• Kokumisa pe kotonda nzambe po na bobateli pe bokambi na ye
• Kokanisa makambo ya minene na bomoi ya babale
• Kokanisa bomipesi ya babalani kati ya lisanga to na district Lelo
• Lokumu pe matondo na Nzambe po na bonzenga na
• Esengo ya kokanisa molulu oyo ya libala
• Kobimisa bizaleli ya lolenge na yango ya balongani Lobi
• Kotiela Nzambe motema, akokoba na kokamba malamu
• Kotangela bango liloba ya biblia pe kopesa bango maloba na mokuse.
9. Lolenge ekomami na CENA 12.2.3.2. :
« Mapamboli epesami na mikolo mosusu ya bokundoli mokolo ya libala

Libondeli po na lipamboli ya Nzambe


Mokambi akosenga na lisanga etelema. Na libondeli ya mokuse 1 penza,
akosenga Nzambe apesa lipamboli na ye na balongani. Libondeli ekosuka
na : « Amen. »
8

Lipamboli
Balongani bakopesana loboko ya mobali. Mokambi akotia ya ye loboko
likolo na maboko ya balongani pe akopambola bango na maloba oyo :
« O nkombo ya Nzambe, Tata, Mwana pe Molimo–Mosantu, bozwa lipamboli ya
Nzambe na bokanisi mokolo ya libala na bino […]
Tokoki kobakisa maloba ya boye :
Tika Nzambe, Tata,
• Oyo asangisi bino kati ya bolingo na ye,
• Oyo abateli bino kati na bambula eleka,
• Apesa bino bokasi ya komema makumba moko po na moninga,
• Apambola lisusu bokangami na bino,
• Tika ete Yezu Kristo
* Oyo alingi bino pe akabaki bomoi na ye po na bino
* Akamba bino na mikolo ekoya, asalisa bino na bileko nyonso
* Tika ete Molimo-Mosantu
* Akamba bino na maponami ya bomoi na bino;
* Alamwisa makanisi ya malamu kati na bino, po bokoka kosepelisana
* Abongisa bino po na bozongi ya Yezu-Kristo.

Maloba ya suka
« Tika ete lipamboli ya Nzambe ekamba bino, pe kimia yaMosekwi na liwa ezala na
bino. Amen. »
Libondeli ya suka
Soki nzembo ekolanda bilaka ya lipamboli ya Mokambi, lisanga ekofanda. Kasi, soki
nzembo ezali te, lisanga ekotikala yakotelema. Libondeli ya suka nde ekolanda na sima

10. Tokolakisa polele bokanisi ya mokolo ya libala, ndakisa :


« Ya bokanisi mibu tuku mibale ya libala na bino. »

LIPAMBOLI PO NA MWASI YA ZEMI

Lipamboli po na mwasi ya zemi esalamaka na ndako, na kati ya botali ya


bokambi.
Lolenge ekopesama
Lipamboli po na mwasi ya zemi epesamaka na nganga-Nzambe to na ntoma, soki zemi
emonani epai ya monganga.
Ebandeli
Yambo ya bopesi lipamboli po na mwasi ya zemi, Mokambi akobongisa baboti ya lobi to
mama ya lobi, na mosala oyo. Maloba ya kosalela ekolanda nzela oyo
(11):Zemi pe mbotama ya mwana ezali eleko ya lolenge na yango kati ya
bomoi ya baboti. Bomoi oyo ya sika ezali pe mokumba ya baboti Mosala ya yambo ya
Nzambe oyo emonani epai ya moto ezali lipamboli ya mwasi ya zemi. Mosala oyo
epesameli mama, na bosenga na ye. Na mosala oyo, nzambe azali kokembisa ye po akoka
kopesa lisalisi ya molimo na mwana na ye na bokoli na ye kati ya libumu ya mama.
Lipamboli oyo ezali pe lisalisi po na mosuke ya mwana akobotama pe ezali kopesa boyebi
malamu epai ya mama pe mwana na ye ete bomoi na bango ezali na maboko ya Mokonzi.
9

Na bokoli na ye kati ya libumu ya mama, mwana akangami na mama na ye. Azali kolia
kaka oyo mama na ye azali kolia te, kasi mosuke ya mwana elandaka pe maye ezali na
motema ya mama na ye, na oyo azali komona kati ya bomoi na ye. Yango wana, na
libondeli na ye bokotisi ya mwana na ye kati ya bomoi ya bondimi na ye, mama akoki
kopesa ye lisalisi na nzela ya molimo, yambo abotama, pe Nzambe andimaka yango.

Lipamboli ya mwasi ya zemi ezali elaka ya zemi ezanga kokoso te to


pe mbotama pe nzoto nkolongonu ya mwana te.

Libondeli
Mokambi azali kosenga bato bazali esika wana batelema pe azali kobanda lipamboli na
libondeli oyo ebandaka na Nzambe Basatu.

11. Elingi koloba kobelela :


« O nkombo ya Nzambe, Tata, Mwana pe Molimo- Mosantu Akotonda Nzambe po na
bomoi ya sika ezali kokola pe akosenga ye apesa lipamboli esengami na baboti ya lobi to
na mama ya lobi. Libondeli ekosuka na : « Amen. »

Bopesi lipamboli
Na botieli maboko na motu ya mama ya lobi, Mokambi azali kopesa lipamboli na
mwasi ya zemi na maloba oyo elandi :
« Zwa lipamboli ya mwasi ya zemi, O nkombo ya Nzambe, Tata,
Mwana pe Molimo-Mosantu. » Akoki pe kolandisa maloba na makanisi oyo elandi :
* Nzambe apesi likabo ya bomoi ya sika ezali kokola kati ya mama ya lobi
* Nzambe azali kolaka ete akobatela mwana na mama na ye tango nyonso oyo ya zemi
* Tika ete bolingo ya Kristo ekamba mama pe mwana tango nyonso oyo ya zemi
* Tika ete Molimo-Mosantu asalisa
¤ baboti po bakoka komema mokumba ya mwana na bango na nzoto pe na molimo,
¤ baboti bazala na makoki ya koluka boyokani kati ya libota oyo ekosalisa pe mwana
oyo akobotama Tika ete Nzambe abatela mama pe mwana na tango ye akobotama.
Po na kosukisa
« Tika ete lipamboli ya Nzambe ekamba bino. Kimia ya Mosekwi na liwa ezala na bino.
Amen. »

Libondeli ya suka
Lipamboli ekosuka na libondeli pe lipamboli ya suka

LIKANISI PO NA BOPESI BASAKRAMENTO

PO NA BAWEI
Libongisami ekokani po na misala pe balosambo po na bawei. Na sima awa, tomemeli
bino ndimbola ya malamu na oyo ekomami na buku 2 ya libongisami ya balosambo kati
ya Eklezya néo-apostolique :
Balosambo ya lolenge na yango (2013, p. 292 sqq.).
1
0

• Na losambo oyo ezali na bopesi bilembo po na bawei : lisanga ekotelema yambo ya


bopesi bilembo po na bawei
(Elingi koloba sima ya bopesi nzembo ya ebandeli pe sima ya maloba ekolanda).

Lisanga ekotikala ya kotelema na tango ya nzembo ya suka.

• Na losambo oyo ezali na bopesi bilembo po na bawei te : soki na losambo po na bawei,


libondeli kaka nde ekosalema, lisanga ekotikala ya kofanda na tango ya nzembo ya
ebandeli. Ekotelema po na libondeli pe ekotikala ya kotelema na tango ya nzembo ya
suka.
• Banzembo ya ebandeli pe ya suka ekolanda makanisi ezali kati ya misala oyo.
• Banzembo oyo ekoleka minute moko na ndambo te.

You might also like