You are on page 1of 1

HOMÉLIE DU BAPTÊME DU SEIGNEUR

1ère lecture : Is 55,1-11


Is 12
Evangile : Mc 1,7-11
Bandeko ba ngai, bana ba libota lya Nzambe ! Boboto !
1. Lelo, Mama wa biso Ekklezia apesi biso libaku lya kosepela eyenga ya « Batisimo ya
Mokonzi Yezu Kristu ». Lelo mpe tozali kosukisa « Eloko ya mbotama » ya Mwana-Nzambe
okati ya biso. Bandeko, kosepela « Batisumu ya Mokonzi wa biso Yezu Kristu » ezali libaku
linzenga mpamba ‘te batisimu nde epesi Kristu makasi ma kobanda mosala mwa ye mwa
kobikisa mokili. Awa Kristu azui batisimu, akeyi mbala moko kosangela bato sango ya
bobongoli mitema (Convertissez-vous et croyez à la Bonne nouvelle).
2. « Batisimu ya Yezu » elakisi biso te « Messiya » azali o kati ya biso mpe aye kobende
biso o molili mwa masumu. Yango ntina ya témoignage Nzambe-Tata asali mpoya Mwana
waye. Nzambe-Tata alingi te « tomono mpe toyamba nkembo oyo apesi Mwana wa ye wa
bolingo ». Nde toyoki o nsango elamu : « Ozali Mwana wa ngaio wa bolingo nakosepela na
yo mingi ».
3. Bandeko, awa tozali kosepele « batisimu ya Yezu », tosengeli kokanisa mpe batisumu
ya biso moko. Na batisimu ya biso, Nzambe alaki biso bolingo bwa ye ndelo te : « Bolingo
bwa bozali ofele ». Pona koloba ‘te, Nzambe asengeli na mbongo mpe na biloko bya biso te
mpoya kolinga biso. Alingi biso yambo te tolinga ye. Lokola toyoki o litangi lya yambo, ezali
biso nde tokokimaka Nzambe. Tokokende kokokisa ba mposa ya biso : « Tokobebisaka mosolo
mwa biso na biye bikoleisa te ». Nzokande, na batisimu ya biso, Nzambe alimbisi biso
masumu, apesi libaku lya kokoma bana b aye (lokola Kristu Mwana wa ye wa bolingo)
mpe tokoti o kati ya Ekkelzia.
4. Bandeko, na batisimu, tokomi baprofeta, bakonzi na mpe banganga-Nzambe. Elingi
koloba’ te, Nzambe apesi biso makabo ndenge na ndenge mpo’te tosala lokola Kristu, mosala
mwa kobikisa mokili na kosangela nsango elamu ; mosala mwa kotikala « nzeneneke ya ye »..
Yango wana, tosengeli mokolo na mokolo, mpoya kozua makabo ma Nzambe, kotia matoi mpe
koya epai ya Nzambe. Tosengeli kondima koyoka Nzambe mpe kokolisa mposa ya ye.
5. Bandeko, o ntongo ya lelo, mbela ezali se yoko : « Toluka kobongola ezalela ya biso
o bisika binso tokozala ». Lokola toyoki yango o litangi ya yambo, Mpe soko tokokanela
baninga, tobongola makasi, totonda na makanisi masantu, makanisi malamu makoluka
kaka boboto na mpe bolingo o bisika binso ».
6. Tosenga na Nzambe ngraysa te tomibongolo epai ya ye na bobateli makabo malamu ma
batisimu ya biso mokolo na mokolo.
Abbé Donatien MBUDI PATE

You might also like