You are on page 1of 4

No. 117 Ndenge nini kolonga mabe na misala malamu?

´
LIYEBISI: Monisa mpenza ete soki tozali kolonga mabe na misala malamu, tokomonisa ete tozali
´
na mayele mpe tokozwa litomba. Monisa lisusu ete mbala mingi, soki tozali kososola malamu,
´ ´
yango ekosalisa biso tokima misala ya mabe to toyikela mikakatano mpiko

MISALA YA MABE EPESAKA BISO NYONSO MPASI (Min. 4)


Mabe ezali eloko nyonso oyo epesaka biso mpasi, mawa to etungisaka biso (it-2-F lok. 191)
Bato mingi banyokwamaka na makambo ya mabe lokola maladi, makama, mawa, kozanga
bosembo, kobungisa biloko to kokufela moto, maloba ya kozokisa mpe makambo mosusu
ya koyokisa bato mosusu mpasi
Makambo ya ndenge wana ekoki kopesa mpasi makasi, ezala na nzoto to na makanisi
Mpo na biso bato, ntango basaleli biso mabe, mbala mingi tolukaka kobomba nkanda na
motema to kosilikela bato mosusu, ata mpe kosilikela Nzambe
Bato mosusu balukaka kozongisa mabe na mabe mpe mbala mingi, yango esalaka ete
makambo ebeba nde kobeba
Kasi, Biblia emonisi ete tokoki kosala misala malamu mpo na kolonga misala mabe
´ ´
(Tanga Baroma 12:21)
Liboso ya koyeba ndenge ya kolonga misala mabe, tokolobela naino ndenge mabe
ektaki na mokili

MABE EBANDAKI NDENGE NINI? (Min. 10)


´
Ntango asalaki mwasi na mobali ya liboso, “Nzambe amonaki eloko oyo asalaki mpe, tala
ezalaki malamu mingi” (Eb 1:31)
Azalisaki biloko nyonso mpo na bolamu ya seko ya bato
´ ´
Nzete ya koyeba malamu na mabe ezalaki kosalisa Adama na Eva babosana te ete Nzambe nde
azali na lotomo ya kotyela bango mibeko mpo na etamboli na bango (Eb 2:16, 17)
´ ´
Soki batosaka, mbl mpasi to mabe ekomelaki bango na bana na bango te
´
Zabolo akosaki Eva, mpe na nsima, Adama na mwasi na ye babukaki mobeko ya Yehova
Na yango, bango moko batikelaki mabe nzela ete elonga bango
´
Yango esalaki ete batikela bana na bango lisumu mpe liwa (Ro 5:12)
´
Ya solo, mabe nyonso oyo ekomelaka bato eutaka kaka na Satana ye moko te
´
Mabe mosusu oyo ekomelaka biso eutaka mpo na ntango mpe makambo oyo ekanami te,
ezaleli na biso ya kozanga kokoka mpe kozanga bososoli (Nz 51:5; Mas 11:27; Mos 9:11)
Atako bongo, nguya ya Satana ezali moko ya ntina oyo mabe etondi mingi koleka lelo oyo na
mokili
Bato mingi bazali bato “oyo balingaka makambo ya malamu te,” likambo yango emonisi
ete tozali na “mikolo ya nsuka” (2Ti 3:1, 3)
´
Na yango, bolzi monene ekomi pene; Nzambe akoboma bato mabe nyonso mpo na
kolongola mabe na mokili!
´
Na esika ete ezala mabe mpo na bato, bolzi monene ekobongisa nde nzela mpo na ‘likolo ya
sika mpe mabele ya sika mpe kuna boyengebene ekozala’ (2Pe 3:7, 13)
´
TOLONGA MABE NA NZELA YA MISALA MALAMU (Min. 28)
Nzokande na ntango oyo tozali, tosengeli koyika mpiko na makambo mingi ya mabe
Mbala mingi, tokoki mpe komona liboso ete makambo mabe lokola kobomana to makama
ezali koya mpe na nsima, kokima yango to kosala ete ememela biso mpasi mingi te
(Mas 22:3; w95 15/8 nk. 3-4)
´
Kasi, mbala mingi, tokokaka te kokima mabe; tosengeli kosala makasi tolonga yango
Yango elingi koloba te ete tosengeli kokanga mabk ntango tozali koyika mpiko na
minyoko
No. 117 Ndenge nini kolonga mabe na misala malamu?
Bolamu ezali ezaleli moko malamu oyo emonanaka na misala oyo moto azali kosala mpo na
matomba ya basusu (it-1-F lok. 361)
´ ´
Tika totalela sikoyo, na makambo nini mpenza tosengeli kosala malamu mpo na kolonga mabe
´ ´
[Liyebisi epai ya molobi: Lobela eteni oyo na kotalela bamposa ya lisanga na bino]
Minyoko (2Ti 3:12)
´
Mpo na kolonga, osengeli koboya kobuka mibeko ya Nzambe mpe yika mpiko, na esengo
nyonso, mpo na nsango malamu (Mis 5:27-29, 40-42; 1Pe 4:12-14)
Soki ozali kosala malamu to soki ozali na boboto, yango ekoki kokitisa motema ya bato
oyo bazali konyokola yo (Mt 5:44; Ro 12:17-21; it-2-F lok. 1068)
´
[Lobela lisolo oyo ezali na yb90 64 to ndakisa ya ndeko mosusu oyo ebimaki na
mikanda]
Ntango moto moko oyo olingaka akufi
Ntango moto moko oyo olingaka akufi, yango ekoki mpenza kobulunganisa mayoki na yo
Koyoka mawa ezali mabe te, ezali kutu malamu (Yn 11:33-35)
Nzokande, komitungisa koleka ndelo ekoki kosala yo mabe, ekoki kosala ete onyokwama
mpenza na makanisi (we lok. 7)
Okoki “kolonga” mawa yango mokemoke soki osaleli toli oyo euti na Makomami (we
nk. 14-19)
Kotya motema na Nzambe mpe kozala na elikya na bilaka na ye ekoki kosala ete moto
azongela esengo na ye (we nk. 26-31)
Ntango tozali kosalela bato mosusu malamu, tozali kokima ezaleli ya ‘kozala mosika na
basusu’ mpe tokozala na esengo oyo euti na ezaleli ya kokabela basusu (Mas 18:1;
Mis 20:35)
Ntango basaleli biso mabe
Matngi to mabunga ya bato mosusu ekoki kozokisa biso (Mas 12:18)
Tokoki kosilisa nkanda oyo tokangeli bato mosusu soki tondimi kolimbisa mpenza to soki
tosilisi nokinoki matata oyo tozali na yango, na bolingo mpenza (Ef 4:26, 32;
Kol 3:12-14)
´ ´
Kolonga mabe ekoki mpe kosnga ete tobongola bomoto na biso moko mpo tobombaka
´
nkanda te to mpo tozokisaka basusu te
Maloba mpe bizaleli ya mabe
´
Nkanda, koyinana, matngi mpe lokuta ebebisaka kimya mpe bomoko ya lisanga (Ga 5:15;
Ef 4:31)
´
Landa kokola ntango nyonso mpe kolata bomoto ya sika, yango ekosalisa yo ozala na
makanisi mpe na maloba ya malamu mpo okoka kolonga maloba mpe bizaleli ya mabe
(Kol 3:8-10)
Kolangwa masanga
Kolekisa ndelo na masanga ekoki kobebisa nzoto mpe bizaleli (Mas 23:20, 21, 29-35; it-1-F
lok. 1222)
´
Soki tolekisi ndelo na komela masanga, mabe ekokomela biso moko
Mpo na kolonga, tosengeli komela na bokatikati to koboya komela
Bato mingi oyo bazali kotya motema na Yehova mpe bayebi komipekisa, bamelaka na
bokatikati
Baoyo bazali baombo ya masanga, basengeli kosala milende mpenza mpo na
kolongwa na boombo yango (g92-F 22/5 nk. 6-7)
Baninga mabe
Baninga na biso babongisaka to babebisaka makanisi mpe etamboli na biso (Mas 22:24,
25; 1Ko 15:33)
No. 117 Ndenge nini kolonga mabe na misala malamu?
Kokangama na bato oyo basalelaka Nzambe te ekoki komemela biso mpasi (Eb 34:1-3;
w85-F 15/6 lok. 31; rs lok. 289)
´
Okoki kolonga soki oponi baninga ya malamu na kati ya lisanga
Bolingo ya mbongo
Bolingo ya mbongo ekoki kosala ete obosana mitinda ya Biblia (Mas 28:20; 1Ti 6:9, 10)
Yango ekoki kotinda yo ozala sembo te na mombongo na yo to oluka kutu kosalela
boyokani na yo na bandeko mpo na kozwa mbongo
Baklisto bazali kolonga ‘mabe’ oyo ntango bazali koluka kokokisa mikumba na bango mpe
bazali koboya misala ya moimi (Mas 21:6; Mt 5:37)
Bazali mpe kolonga na ndenge bazali kosepela na biloko oyo bazali na yango (Mt 6:33,
34; Ebr 13:5)
MBANO YA KOLONGA MABE NA NZELA YA MISALA MALAMU (Min. 3)
Epesaka bolamu mingi mpe esengo na bomoi ya lelo
Tokoki kosepela mpamba te toyebi ete tosalaki malamu mpe tozali kosepelisa Nzambe
(1Pe 3:10-17)
Ntango tozali kosala malamu mpo na kolonga mabe, tozali kokumisa Nzambe
Bato mabe bakoki kolanda ndakisa na biso ya sembo (1Pe 2:12)
Na nsuka, baoyo bazali kolonga mabe na nzela ya misala malamu bakozwa mbano ya bomoi ya
seko mpe esengo ya libela (Nz 37:27)
´ ´
(Landa plan malamumalamu mpe tosa ngonga epesami mpo na eteni moko na moko. Ezali
´
na ntina te otanga mikapo nyonso oyo mipesami, to kolobela eutelo ya makambo nyonso oyo
ezali na baparanteze)
EKOSALEMA NA MINITI 45
˘ 2021 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
S-34-LI No. 116 1/20

You might also like