You are on page 1of 56

112

Bomoi bwa Basantu

azongiseli ye : Soko moto alingi ngai, akotosa maloba ma ngai, mpe Tata
wa ngai akolinga ye, tokoya o mboka ye, mpe tokofanda epai ya ye. Yezu
alobi bongo mpo na kolakisa te : Nzambe akomonana te lokola moto monene,
oyo biso tokoki komona na miso na biso. Kasi Nzambe azali komonana na
moto oyo andimi Liloba na ye, na bolingo. Ndenge wana kaka, mposa oyo
ezalaki na motema ya bato ya kala, Nzambe akokisi yango. Tozali kotanga na
Zacharie 2, 14 : Yawe alobi : Bato ba Sion, bosepela, zambi nakoya kofanda o ntei ya bino Mpe na Ezechiel 37, 26-27 tokotanga boye : Nakokata
na bango bondeko bwa boboto mpe bwa seko. Bakozala se wana, bakokoma ebele ; mpe o ntei ya bango nakotonga ndako ya ngai esantu seko.
Ndako ya ngai ekozala epai ya bango. Ngai nakozala Nzambe wa bango,
mpe bango bakozala ekolo ya ngai.
Na losambo ya Misa ya eyenga ya lelo tozali koloba : E Nzambe, omilakisi na biso malamu na misala mya bapostolo santu Simon na santu Jude.
Mpo ya losambo na bango, kotisa na kati ya Eklezia bakristu ya sika, libota na
yo ekola ntango yonso.
Toyoka santu Cyrille ya Alexan-drie, azali koloba mpo ya mosala ya
bapostolo : Mosala na bango : kobenga basumuki, babongola motema, kosunga bakoni, na nzoto mpe na molimo ; na mosala na bango ya kokamba bato,
baluka te, ata moke, na kosala mambi elingi bango, kasi mambi elingi Oyo
atindi bango ; na bokuse, koluka na kobikisa bato na metele ya bato bakondima mateya ya Mokonzi.
Tosenge na bapostolo Simon na Jude na kosambela mpo na bakristu ya
Moyen-Orient.

Bomoi bwa Basantu

P. Silvre Maurutto svd

Bomoi bwa Basantu

Ad experimentum

Bomoi bwa Basantu

Bomoi bwa Basantu

111

Kosambela : oyo ezali eloko ya santu Luc ayebisi biso mingi. Azali kopesa
biso ndakisa ya Yezu, mbala na mbala santu Luc alakisi biso Yezu azali
kosambela, azali kosolola na Tata na ye. Na Nsango elamu na ye, santu Luc
azali koyebisa biso mambi ezali kotala kuruse, komiboya, kotika bomengo.
Kasi ye apusi kolakisa biso esengo. Luc azali na maloba mitano mpo na
kolakisa liloba oyo : esengo. Bisika Luc azali koloba mambi ya esengo na
Nsango elamu na ye ezali 27. Eteni ya 15 ezali kolakisa yango mingi mpenza : Mpata ebungi, ebende ya mbo-ngo, mwana abungi. Na nsuka ya masapo oyo yonso, esengo ezali mingi.
Santu Irne ( 130 202 ), motei ya Eklezia, akomi boye : Ya Luc akabwani
te na Paul, mpe afandi mosaleli ya Paul na koteya Nsango elamu ya Yezu, ye
moko Luc alakisi biso yango, alakisi yango te mpo ya komikumisa, kasi mpo
bosolo yango moko elakisi bongo Awa Luc amoni mambi yango yonso na
miso na ye, akomi yango moko moko na ndenge ya solo. Tokoki komona na
monkanda na ye ata lokuta te, ata lolendo te, mambi yonso ezali polele. Soko
Luc, oyo atei elongo na Paul, mpe Paul abengi ye : ya bolingo, mpe azwi
mosala ya kokoma Evangile oyo, bongo azwi na monoko ya Paul mambi
mosusu te, ndenge nini bato oyo bafandi penepene na Paul te, bakoki koloba
te bango bayekoli mibo-mbamo ya bonkutu ya moto akoki koyeba te ?

28 octobre :
Basantu Simon na Jude, bapostolo ya Yezu. Eyenga
Bapostolo oyo mibale bayebani mingi te. Na kati ya molongo ya bapostolo,
nkombo ya bango mibale ezali kolandana ( Mat 10, 3-4 ). Bango mibale mpe,
ndenge tradition eyebisi biso, bakufi na Perse ( Irak ). Simon, babengi ye
Zlote, mbele liboso ya kolanda Yezu, azalaki moto moko ya biso tokoki
kobenga rvolutionnaire, elingi koloba azalaki kobunda na ba-soldat ya Roma,
baye bakotaki na makasi na ekolo ya Palestine.
Jude azwi nkombo mosusu : Thad-de. Azali ndeko ya Jacques ( Luc 6, 16
). Mbele akomi monkanda ya biso tokotanga : ya santu Jude. Na Nsango elamu
ya santu Jean 14, 22-23 toko-tanga : Yudas, kasi Iskariot te, atuni Yezu :
Mokonzi, boniboni okomilakisa na biso, kasi na bato basusu te ? Yezu

110

Bomoi bwa Basantu

akomi moninga ya santu Paul mpe alandi ye na mibembo na ye. Luc azali
lisusu na mopanzi ya Paul na Roma, na bilumbu ya nsuka ya bomoi ya Paul.
Santu Paul azali na Roma ntango akomi monkanda ya mibale na Timothe, mpe alobi : Bobele Luc azali na ngai ( 4, 11 ). Luc akangami na Paul
mpe asali na ye bambula 18. Na Bikela ya bapostolo, Luc akomi makambo ya
ebandela ya Eklezia. Kuna Luc azali kotia na liboso mosala ya Paul, moto ya
Luc alingi mpe akumisi mingi.
Na nsima ya liwa ya Paul na Roma ( na mbula 67 ), Luc alongwi na Roma.
Bongo akei wapi ? Toyebi malamu te. Mbele akomi na Grce. Kuna akomi
Nsango elamu, oyo ekamati nkombo na ye, mpe akomi Bikela ya bapostolo.
Luc ayebi kokoma kitoko mingi. Moto moko ya koyebana akomi boye :
Evangile ya santu Luc eleki minkanda yonso na kitoko. Toyoka ndenge nini
Luc amibongisi mpo na kokoma Nsango elamu na ye : Bato basusu babandaki
kokoma maye malekaki o ntei ya biso. Bakomi se maye bayebisi biso na bato
bamonoki mango na miso uto ebandela, mpe bazali bateyi ba maloba ma
Mokonzi Nzambe. Bongo, Teofile wa lokumu, ngai mpe, awa nasololi manso
malamu uto ebandela, nakani kokomela yo mango na molo-ngo ; oyeba te
mateya oyokaki mazali ma solo ( 1, 1-4 ).
Na losambo ya eyenga ya santu Luc tozali kosambela : E Nzambe, oponi
santu Luc mpo na koyebisa bato te olingi babola mingi. Na Evangile na ye,
santu Luc azali kolakisa biso elongi ya ngolu ya Kristu, ye azali kolakisa Kristu
lokola moninga ya bafutisi mpako mpe ya basumuki. Luc azwi nkombo ya
mokomi ya ngolu ya Kristu. Ngolu ya Nzambe ezali komonana makasi na
masapo ya Nsango elamu ya ye : moto malamu ya Samaria, mwana abungi,
mofutisi mpako Moto oyo azalaki monganga mpe azalaki kokanga mpota
ya bakoni, motema na ye ebetami na komona ngolu ya Yezu mpo na bato ya
mpasi, mpo na babola, mpo na basumuki. Yezu ayei awa na nse liboso mpo na
babola, oyo Yezu abengi ba-esengo ( Luc 6, 20 ). Na Luc 4, 8, Yezu alobi :
Elimo ya Mokonzi azali na ngai, ye atindi ngai na koyebisa Nsango elamu na
babola.
Santu Maria, na nzembo na ye : Magnificat ( Molimo mwa ngai ) azali
koyemba : Nzambe nta bokasi afandisi bato bake o bisika bya lokumu, atondisi na biloko bato bayoki nzala ( Luc 1, 52-53 ).

Bomoi bwa Basantu

Janvier

1 janvier :
Santu Maria, Mama wa Nzambe.
Eyenga enene
Yezu Kristu, Mwana se moko wa Nzambe, Nzambe wa solo abotami na
Nzambe wa solo, na nguya ya Elimo Santu akamati nzoto na ngondo Maria
mpe ako-mi moto. Oyo ezali boyambi ya Eklesia ya baepiskopo na Concile
ya Constantinople na mobu 381, bayebisi na bakristu banso. Yango wana, na
mpasi te, bakristu ba-me-se-ni noki na kopesa na Santu Ma-ria nkombo ya
mama wa Nzambe (Theotokos: Oyo aboti Nzambe).
Santu Paul ayebisi biso mpe li-ka-nisi oyo : Eklesia (elingi koloba bakristu
banso lisanga) ezali nzoto ya Yezu. Mot ya nzoto ezali Ye-zu, biso tozali
binama ya nzoto wana. Santu Maria azali bongo ko-koba na kosala mosala ya
ye ya bomama na kati ya Eklesia eye ezali nzoto ya Yezu.
Mokolo ya yambo ya janvier ezali mpe mokolo bakati Yezu nzoto, bapesi
ye nkombo ya Yezu. Le 1er janvier ezali mpe mokolo ya boboto na mokili
mobimba (journe mondiale de la paix), ezali mpe ebandela ya mbula ya sika.

2 janvier:
Basantu Basile ya Monene na Grgoire ya Nazianze,
baepiskopo mpe bateyi ba Eklesia. Bokundoli (mmoire)
Basile abotamaki na Csare (Palestine) na 330, akufaki bobele wana le
1er janvier 379. Basile ayekolaki mingi na Athnes. Kuna akutanaki na Grgoire ya Nazianze oyo azalaki mpe koyekola kuna, mpe bondeko na bango
ekomaki makasi, yango wana Eklesia azali kokundola bango babale lisanga.
Basile akomi kobandisa (fonder) ba-monastre (bandako ya ba-moine to
ba-religieux), akomi mpe mibeko mpo na ba-monastre wana. Mibeko wana

Bomoi bwa Basantu

ekomi koye-bana mingi na Eklesia mobimba. Basile atongi mpe hopital na


ba-ndako ya bampaya na mibange. Na 370 akomi episkopo ya C-sa-re.
Grgoire wa Nazianze (330-389) alingaki mingi kofanda ye moko na esika
ya kimia mpo na ko-sambela mpe komanyola maloba ya Nza-mbe. Na nsima
baponi ye episkopo ya Constantinople (mbo-ka mo-ko-nzi). Kasi makambo
ya lo-kuta, ya nioka nioka elembisi motema ya ye, yango wana azo-ngi na
mboka na ye Nazianze. Ye kuna, na bomanyoli liloba ya Nza-mbe, na bokomi
mi-ka-nda, asukisi bomoi ya ye.

17 janvier:
Santu Antoine (251-356), Abb.
Bokundoli
Toyebi makambo mingi ya bomoi ya santu Antoine mpo na mokanda Bomoi
ya santu Antoine ekomamaki na santu Athanase oyo azalaki moninga wa ye.
Antoine abotamaki na Egypte, azalaki moto wa mbongo. Mokolo moko ayoki
na ndako Nzambe ma-loba ya Yezu na elenge mo-ba-li: Soko olingi kobongo
nye, teke biloko bya yo, kabela babola mo-so-lo, okozwa nkita o likolo, na
nsi-ma yaka, landa ngai (Mt 19, 21).
Bongo Antoine ateki biloko ya ye mpe akei kofanda na esobe ya Egypte.
Kuna Satana abandi ko-yo-kisa ye mpasi mpe kose-ngi-nya ye. Kasi Antoine,
na losambo mpe na bomipimi, alongi Satana. Bato mingi babandi koya epai
ya ye.
Na ntango ya liwa alobaki na bayekoli bazalaki wana: bofanda lokola bato
basengeli kokufa lelo, bosala makasi mpo na kolanda ndakisa ya basantu.

Bomoi bwa Basantu

109

bapostolo ya Yezu mpe ekomi tee na bakristu na ntango na ye. Alobi : Bosala
eloko moko te, ya kozanga koyebisa episkopo bokima boka-bwani. Ignace
azali na lobanzo ( souci ) ya bomoko na kati ya Eklezia, elingi koloba ya
bakristu zongazonga na episkopo na bango, lobanzo mpe ya ba-Eklezia yonso,
bango na bango. Lisanga ya bakristu ezali kosangana esika moko, zongazonga
na episkopo, mpo na kosambela Ukaristia, oyo ezali sakramento ya bomoko,
na lisanga ya Eklezia ya Roma, oyo azali kofanda na liboso na bolingo ya
bakristu yonso. Ignace azali moto ya liboso ya kobe-nga Eklezia : catholique,
elingi koloba ya bakristu yonso ya mokili mobimba.
Ignace alobi : Bino banso bolanda episkopo, na ndenge Yezu azali kolanda
Tata na ye Esika episkopo azali, kuna mpe lisanga ya bakristu asengeli
kozala ; ndenge moko, esika Yezu Kristu azali, kuna mpe Eklezia ya catholique
azali.
Ignace akomi lisusu na bakristu ya Roma : Botika ngai nafanda bilei ya
baniama ya zamba, na nzela ya bango nakoki kozwa Yezu. Nazali froment
ya Nzambe, mpe ngai nasengeli koni-kana na mino ya baniama mpo na kokoma
mampa ya kozanga mbindo ya Kristu.
Alobi na bango lisusu : Bopesa ngai nzela ya kolanda ndakisa ya mpasi ya
Nzambe na ngai. Soko moto azali na Nzambe na kati ya motema na ye, ayeba
mambi oyo ngai nalingi, ayokela ngai mawa, na koyeba mambi oyo ngai nazali
koyoka na motema na ngai Nazali na esengo lisusu te na bilei oyo ezali
kobeba, to na bisengo ya mokili oyo ; Mampa ya Nzambe, ngai nalingi, oyo
ezali nsuni ya Yezu Kristu, ya libota ya David, mpe na komele nalingi makila
na ye oyo ezali bolingo ekobeba te.
Tosenge makasi na kozala banzene-neke ya Yezu. Topesa na santu Ignace
ba-Eklezia ya Orient, asambela mpo na bango.

21 janvier :
Santu Agns, ngondo na martiru.
Bokundoli

18 octobre :
Santu Luc, mokomi ya Nsango elamu. Eyenga

Abotamaki na Roma mpe akufaki na 305. Azalaki mwana mwasi ya mbula


12 to 13, ntango andimaki liwa, na bobangi te, mpo na Kristu oyo ye alingaki
na likolo ya biloko yonso. Ezalaki na nta-ngo ya minyoko ya empe-reur

Santu Luc abotami na Syrie, mbele na mboka Antioche, esika azali kosala
mosala ya monganga, ndenge santu Paul akomi na bakristu ya Colosses 4,
14 : Luka, monganga wa bolingo, mpe Demas batindeli bino mbote. Luc

108

Bomoi bwa Basantu

Liloba ya Nzambe : Yezu alobi : Ngai nazali nzete ya vino, bino bozali
bitapi. Moto akangani na ngai lokola ngai nakangani na ye, akobota mbuma
mingi, zambi soko tokabwani, bokoki kosala eloko te ( Jean 15, 5 ).

17 octobre :
Santu Ignace ya Antioche, episkopo mpe martiro
(akufi na kati ya bambula oyo : 110 mpe 117). Bokundoli
Ignace akufi liwa ya martiro na Roma na ntango ya empereur Trajan : bapesi
ye na baniama ya zamba mpo balia ye na kati ya stade. Empereur Trajan amoni
te bakristu bakomi mingi, yango wana atindi bakanga bakristu oyo bazali na
liboso mpe baleki mpiko. Ignace azali episkopo ya Antioche ( Turquie ). Na
mboka wana, episkopo ya liboso azalaki Pierre, apostolo ya Yezu. Ignace azali
mokitani ya mibale ya santu Pierre na Antioche. Ezali na Antioche esika
bayekoli ya Yezu bazwi mbala ya liboso nkombo ya bakristu. Tozali kotanga
boye na Bikela ya bapostolo : O Antiokia bayekoli bazwi mbala ya yambo
nkombo bakristu ( Bikela 11, 26 ). Bato balobi te Ignace azalaki moyekoli
ya santu Pierre to ya santu Jean, bapostolo ya Yezu. Empereur Trajan ( 98
117 ) akangisi episkopo Ignace, mpe bakitisi ye na liwa. Bongo batindi ye na
Roma mpo baniama balia ye na kati ya stade, na miso ya bato. Ba-soldat zomi
bakambi ye na Roma. Na nzela, akomi na Smyrne ( Turquie ) mpe kuna akutani
na episkopo Polycarpe. Na Smyrne, Ignace akomi minkanda na bakristu ya
Ephse, mpe ya Roma.
Mpo ya Eklezia ya Roma alobi : Eklezia ya Roma oyo azali na liboso mpo
na bolingo ( LEglise de Rome qui prside la charit ). Na monkanda na
ye Ignace abondeli bakristu ya Roma : Bapekisa ye te na kokufa mpo ya Kristu.
Akomeli bango : Bopesa ngai eloko mosusu te, bobele oyo : ngai nakoka
komibonza na Nzambe, bosenge eloko mosusu te, bobele makasi ya motema
mpe ya nzoto.
Na minkanda na ye, tozali koyoka ndenge nini bakristu ya ntango wana
bazalaki kofanda. Tozali na ebandela ya sicle ya mibale. Ignace azali kosakola boyambi na ye na Kristu, mpe esengo na ye ya kondima liwa mpo na ye.
Azali koloba mpo ya bomoko na kati ya Eklezia, mpo na mateya oyo euti na

Bomoi bwa Basantu

Dio-cltien. Na ntango wana ba-kristu mingi baboyaki boyambi ya bango


mpo na bobangi.
Nkombo Agns elingi koloba na monoko ya ba grec moto ya bo-pe-to.
Santu Agns azali mo-ba-teli wa bopeto (patronne de la puret).

24 janvier:
Santu Franois de Sales (1567-1622),
episkopo na moteyi wa Eklesia. Bokundoli
Santu Franois de Sales azali mosantu ayebani mingi tee na mikolo ya lelo.
Na ntango ya ye ntembe ezalaki makasi na kati ya ba-protestant na bacatholique. Kasi Franois, na motema boboto ya ye, mpe na masolo ya ye na
ba-protestant azongisi bato mingi na Eklesia ya biso. Akomaki epis-kopo ya
Genve (Suisse).
Tee lelo bakristu bazali kotanga mikanda kitoko ya santu Franois. Na kati
ya mikanda ya ye, maloba mosusu ezali kozonga ntango yonso: boboto, kimia
mpe bo-li-ngo.
Franois alobaka: Yo-nso na nzela ya boboto mpe ata eloko te na nzela ya
makasi makasi. Biso tosengi confiance na Nzambe mpo ya kosala mbala
moko mpe na esengo mosala ya biso eye to-se-ngeli kosala ndenge Franois
alobaki.

25 janvier:
Santu Paul, apostolo abongoli motema.
Eyenga
Paul azalaki moyuda, moto ya mayele mpe na lolendo mingi, oyo abandaki
konyokolo bakristu. Kasi Mo-ko-nzi Yezu azalaki kozila ye o nzela ya Damas
mpo ya ko-bu-ka lolendo mpe kosilisa mayele ya ye. Mokolo wana, na mbala
moko, Paul ayekolaki ma-ka-mbo mibale: Nguya ya Nzambe mpe
mobo-mba-mo ya Nzambe. Nza-mbe akweyisi ye na lolendo ya ye yo-nso,
azali komona lisusu te mpe batu basengeli kosimba ye na ma-boko.
Mobo-mba-mo ya Nzambe : Ngai nazali Yezu elingi koloba : Ngai nazali

Bomoi bwa Basantu

na bomoi. Oyo ozali ko-nyo-ko-lo, elingi koloba te ntango Paul azalaki


konyokolo bakristu azalaki konyokolo Yezu ye moko.
Makambo eye Paul aye-ko-la-ki mokolo wana ekoteli ye ma-kasi na kati
ya motema mpe ekomi liziba ya mateya yonso ya ye na kati ya mikanda ya ye.
Yezu azali na bo-moi, ya solo asekwi na bawa, ye azali na bomoi elongo na
ba-kris-tu, azali na kati ya bango, ba-ngo bakomi na ye nzoto moko.
Paul abandi komona makambo ya Nzambe na ndenge mosusu, aba-ndi
komona Yezu mpe na ndenge mosusu.
Tolanda ndakisa ya santu Paul : tomipesa mobimba na maboko ya Nzambe.
Toyoka maloba ya ye : Elongo na Kristu nabakemi o ku-ru-se. Ngai nazali
na bomoi lisusu te, kasi bomoi o nzotu ya ngai bo-zali bwa Kristu. (Gal 2,
19-20)

26 janvier :
Basantu Timothe na Tite, baepiskopo.
Bokundoli
Toyebi bango yambo mpenza mpo santu Paul atindelaki bango mi-kanda:
mibale na Timothe mpe moko na Tite. Na mikanda wana tomoni ndenge nini
Paul alingaki bango, azalaki koloba na bango lokola na bana ba ye mpe basalisi
ba ye na mosala ya Nza-mbe.
Timothe abotamaki na Lys-tres (Turquie), azalaki moyuda, alandaki santu
Paul na mibembo ya ye. Na nsima, Timothe ako-ma-ki episkopo ya phse
mpe akufaki bobele kuna.
Santu Paul na mokanda ya ye, akomelaki Timothe boye : Ti-mo-the,
mwana wa ngai wa bo-li-ngo, yamba ngrasya, ngolu mpe bo-bo-to ya Nzambe
Tata mpe ya Kristu Yezu Mokonzi wa biso. (2 Tim 1, 2)
Tite azalaki mogrec. Alandaki Paul mpe na mibembo ya ye. Tite, azali moto
wa bwanya, santu Paul atindi ye na bakristu, esika ba-za-laki koyokana te,
mpote azongisa boboto na kati ya bango. Akomi episkopo ya Crte, akufaki
mpe kuna.

Bomoi bwa Basantu

107

nzela ya Yezu tozali koku-tana na Nzambe. Nzambe alingi tozwa malamu


yonso na nzela ya bomoto esantu ya Yezu, mpe biso tosengeli kokota na ezibeli
oyo ( Yezu ) soko tolingi te Nzambe ayebisa biso mibombamo na ye minene.
Kosambela ezali nini mpo ya Thrse ? Ezali bondeko oyo ezali kopesa na
moto nzela ya kosolola, ye moko na Nzambe ye moko, na koyeba te Nzambe
alingi moto. Losambo ezali kouta na liziba oyo ezali Nsango elamu. Thrse
alobi : Maloba ya Nsango elamu esalisi ngai na kokanisa na Nzambe, ya koleka
minkanda yonso ya kitoko. Mpo na losambo : malamu soko moto afandi na
bobola, afandi na esika ya mpembeni mpe ya kimia. Losambo ezali mpo na
kopesa lokumu na Nzambe, mpo na kopesa Nzambe na bato mosusu, mpo na
koloba na Nzambe mpo na bato mosusu. Lobanzo ( souci ) ya milimo ya bato
ezali ntango yonso na motema ya Thrse. Alingi apesa bomoi na ye, to babomoi nkoto mobimba, soko nzela ezali mpo na kobikisa ata moko na kati ya
milimo ya bato.
Motema ya Thrse epesami mobi-mba na Nzambe : masolo na ye na
Mokonzi ezali ya ntango yonso. Yango wana, masolo wana ememi ye mbala
mingi na extase, lokola te abimi na ye moko, makanisi mpe nzoto na ye
mobimba efandi lokola ya moto oyo bamemi ye na libanda na ye moko.
Thrse azali koloba na ba-sur na ye :Moto azwi Nzambe, akoki kozanga
eloko moko te, Nzambe ye moko akoki.
Na monkanda na ye : Le chemin de la perfection alobi boye : Soko nayebi
te, na kati ya palais ( ndako ) ya moke, oyo ezali molimo na ngai, Mokonzi
monene ya ndenge wana afandi, nakanisi te nalingaki kotika ye moko te mbala
na mbala. Eloko nini oyo ya kokamwa, na kokanisa te : Oyo akoki kotondisa
mikili nkoto moko na bonene na ye, mpe ya koleka nkoto moko, akangami na
kati ya eloko ya moke ya ndenge oyo !
Eloko eleki litomba yango oyo : kopesa ya na mbala moko mpe ya mobimba
ndako oyo ya molimo na biso, mpe kotika biloko oyo ebongi te, na ndenge te
ye akoka kolongola yango, mpe kokembisa ndako na ndenge na ye. Mpamba
te, ye alingi kotinda biso na makasi te, ye akamati bobele oyo biso topesi ye,
kasi ye akomipesa na biso mobimba bobele ntango biso tomipesi mobimba
na ye.

106

Bomoi bwa Basantu

Thrse azali na bandeko 10 ya tata moko mama moko. Azali na mbula nsambo
ntango Thrse azali na mposa ya komona Nzambe, yango wana akimi ndako
mpo na kokende na mabel ya ba-musulman mpe kuna alingi akufa liwa ya
martiro. Na mbula 16, akamati mokano ya kokoma religieuse. Tata na ye alingi
te, yango wana Thrse akimi ndako mpe akoti na carmel ( ndako ya bacarmlite ) na Avila. Na bambula 22, akomi car-mlite.
Moto ya mayele mingi, Thrse azali na nzoto makasi te. Na kati ya carmel,
bomoi na ye, na ebandela, ezali ya bolingo mingi te na Nzambe, mpe na esengo
mingi te na losambo, tee na mbula 1554. Na mbula wana Thrse atangi
monkanda ya santu Augustin : Les confessions. Abandi mpe kokanisa Yezu
oyo babeti fimbo, bongo abo-ngoli motema na ye mpe abandi kolinga Nzambe
mingi. Ntango oyo bolingo mpo na Nzambe ekomi lokola mto ezali kozikisa.
Abandi komona ndenge nini milimo ya bato ezali na ntalo mingi na miso ya
Nzambe, ndenge mpe milimo ezali na likama ya kobunga libela. Yango wana
akani te asengeli kosala yonso mpona kobikisa milimo ya bato. Ndenge wana,
eteni ya mibale ya bomoi ya Thrse ebandi., azali na mbula 40.
Aluki na kofanda ndenge Evangile ezali kosenge, mpe na komona ndenge
bomoi na kati ya carmel ezali malamu mingi te : ba-surs bafandi na bobola
mpenza te, masolo eleki mingi na bato oyo bazali kokota na monastre, aluki
na kotonga carmel mosusu, elongo na ba-sur balingi kofanda na bobola
mpe komipesa na losambo lokola ye : rforme ya lingomba ya carmel ebandi.
Na 1562, Thrse afungoli carmel ya liboso na Avila.
Na 1567, santu Jean de la Croix akabolani makanisi ya Thrse mpe abandi
kosala rforme ya ba-monas-tre ya ba-religieu ( ba-carme ). Th-rse abandi
kotambola mingi na kati ya Espagne mpo na kofungola ba-carmel ya sika. Na
nsuka ya bomoi na ye, ba-carmel oyo afungoli bazali 16.
Thrse akomi minkanda mingi. Minkanda na ye ezali kitoko mpenza mpe
na matomba mingi. Yango oyo bankombo ya minkanda na ye mosusu : Livre
de vie ( Thrse akomi mambi ya bomoi na ye ), Chemin de la perfection (
mpo na koteya ba-sur na ye ), Livre des fondations, Le ch-teau intrieur (
monkanda oyo ekomisi Thrse motei ya bomoi ya molimo ). Tee lelo, bakristu
to mpe bakristu te bazali kotanga na esengo monene minkanda na ye.
Mpo na Thrse, Nzambe azali yonso. Na nzela ya Yezu, bolamu yonso
ekomeli biso. Bobele Yezu azali kosalisa biso na koyeba Nzambe, bobele na

Bomoi bwa Basantu

28 janvier:
Santu Thomas dAquin (1225-1274).
Nganga Nzambe na moteyi wa Eklesia. Bokundoli
Abotami na Aquino (Italie). Baboti na ye balingaki akota na lingomba ya
ba-bndictins, kasi Thomas aboyi, mpe akoti na li-ngo-mba ya badominicains. Mo-sa-la ya ba-dominicain yango oyo: kosakola Liloba ya
Nzambe eye bango bamanyolaki na kati ya losambo (contemplation). Tho-mas
alobi: makambo yo oyekoli mpe omo-ni na kati ya bisambo, eleki malamu
ola-kisa yango na batu basusu.
Thomas azalaki moteyi monene mpe akomaki mikanda mingi. Mokanda
moko: Somme tho-lo-gique eleki mikanda mosusu ya ye yonso. Asimbaki
nzela mpo na kokoma na Concile ya Lyon, kasi akufaki liboso te ako-ma
kuna. Na Lyon baepiskopo balingaki ko-lu-ka nzela ya boyo-kani na kati ya
ba-catholique na ba- orthodoxe.

31 janvier :
Santu Jean Bosco (1815-1888),
Nganga Nzambe. Bokundoli
Jean Bosco abotamaki na Italie, na kati ya libota ya bato babola. Ezaleli ya
Jean ezalaki kitoko, alingaki kosepelisa baninga na masano. Akomi nganga
Nzambe. Amoni ba-jeune ebele bazali na Turin, mboka monene, bazali koluka
mosala, bayebi kotanga te, bayebi metier mpe te. Jean ami-pesi na bango
mobimba: abandi kofungola ba-atelier na ba-cole mpo ya kosalisa ba-jeune.
Akomi tata mpe moteyi wa bango. Alobi: Nakamati mokano ya kokaba makasi
na ngai yonso mpo na ba-jeune.
Na kobokolo bana, Jean Bosco alandi nzela ya kopesa bitumbu te. Azalaki
koluka nzela ya kosalisa bango na kosala mosala na ese-ngo. Alakisaka bango
te: kosala malamu ezali kopesa moto ese-ngo, kosala mabe ezali kopesa ye
mawa.
Jean Bosco abandisaki ligomba ya ba-salsien, mpe lingomba ya ba-sur
salsienne.

Bomoi bwa Basantu

Fvrier

1er fvrier :
Mwana Yezu abonzami na tempelo.
Eyenga
Bandeko, lelo ekoki mikolo ntuku minei banda tosepelaki Mbotama ya
Mokonzi. Nsima ya mikolo ntuku minei, Marie na Joseph bakendeki kobonzela Nzambe mwana na bango, na tempelo, lokola etindi mobeko ya bayuda.
Awa bakomi na tempelo, bakutani na bato ya boyambi, bokanisa mobange
Simon, na Anna, mwasi akufeli mobali. Elimo Santu alakisi bango te mwana
oyo ya moke azali Mesiya, mpe bango babandi koyebisa bato banso Mobikisi na esengo mingi. Simon alobi mpo na Yezu : Ye mwinda moko-ngengele
bapagano na nkembo ya Israel ekolo ya yo (Nzambe). Na likanisi oyo ya
mwinda, Papa Serge, oyo akufaki na 701, atindaki te mokolo ya lelo bakristu
batambola nkembi na ba-bougie. Biso tokosala se bongo. Elimo Santu asangisi
biso na ntinate banso lisanga tobeleme na altare ya Mokonzi, tokende kokutana
na Yezu, tosangana na ye na komunio esantu mpe tozila boyei ya ye ya nkembo.
Na eyenga ya lelo tokanisa maloba ya Simon, le nouveau thologien :
Eloko nini mwinda ezali kolakisa ? Na ndenge ndako Nzambe, ndako oyo ya
lokumu, ezali kongenge na bamwinda ebele, ndenge wana ndako ya molimo
na yo, oyo ezali koleka ndako Nzambe na litomba, engenge na bizaleli yonso
ya malamu, na ntina te esika moko te na kati na yo efanda na molili. Mpo na
makanisi oyo ezali kokamata elongi ya mwinda, lika-nisi moko te ya molili
kofanda na ndako na yo ya molimo.

Bomoi bwa Basantu

105

ya Mwana na yo ya bolingo, kamba biso, na nzela ya mpasi mpe ya kuruse ya


ye, na lisalisisi ya Ngondo mosantu Maria, tee na nkembo ya nsekwa.
Toyoka maloba ya santu Bernard : Bolamu ya biso tokozwa na kokanisa
mibombamo ya libiki na losambo ya rosario, yango oyo : Liloba ya Nzambe
akomi moto, mpe afandi na motema na biso. Ntembe te, Ye afandi na motema
na biso na nzela ya boyambi, Ye afandi na kati ya makanisi na biso, Ye afandi
na kati ya bilili ya motema na biso Nzambe oyo biso tokokaki koyeba te,
oyo azalaki kofanda na esika ya moto akoki kokoma te, ye alingi sikawa biso
toyeba ye, alingi biso tomona ye, alingi tosimba ye na makanisi na biso. Ozali
kotuna : ndenge nini ? Ntembe te, na ndenge ye alali na elielo, apemi na ntolo
ya mama na ye, atei bato na likolo ya ngomba, alekisi butu mobimba na
kosambela ; ndenge moko, awa tokanisi Yezu akufi na kuruse, na nsuka,
ndenge asekwi na bawa, alakisi bapostolo na ye bilembo ya nsete : kokanisa
mambi oyo yonso, bokundoli ya mambi oyo ezali kopesa na molimo na biso
boboto na limemia. Limemia oyo Maria azwi yango na esika ya likolo, mpe
asopi yango na mitema na biso.
Papa Paul VI alobi : Rosario, ezalela na yango ezali kosenge rythme ya
kimia, mpe moto asengeli kokamata ntango oyo ekoki, na ndenge te, moto
azali kosambela akoka kokanisa malamu malamu mibombamo ya bomoi ya
Mokonzi, mibombamo ya biso tokotala na lisalisi ya Mama na ye, oyo afandi
penepene na Mwana na ye.
Losambo : Na nzela ya rosario, oyo ezali elembo eleki kitoko ya lokumu
ya biso tozali kopesa na Mama na Yezu, pesa biso, Mokonzi, nzela na koloma
epai na yo.
Papa Jean Paul II alobi boye mpo ya rosario : Rosario ezali losambo ya
ngai napusi kolinga ! Losambo ya kokamwa, na ndenge yango ezali mpasi te
mpe ndenge yango ezali modindo.

15 octobre :
Santu Thrse ya Avila, ngondo mpe motei ya Eklezia
( 1515 1582 ) - Bokundoli
Santu Thrse akufi le 15 octobre 1582. Papa Paul VI, na 1970, aluboli ye
motei ya Eklezia. Abotami na Avila, (Espagne ) na kati ya libota ya lokumu.

104

Bomoi bwa Basantu

Lokumu na yo, Mokonzi na ngai, elongo na bikelamo na yo yonso, mingi


mpo na mokonzi mpe ndeko na biso mwese, oyo azali moi, mpe na nzela na
yango yo ozali kongengisa biso. Azali kitoko, ya kongenge, ya monzele : ya
yo, nta likolo, ye azali elembo
Lokumu na yo, Mokonzi na ngai, mpo na baye bazali kolimbisa, mpe
bakangi motema na bokono mpe na mpasi. Esengo na baye bazali komema
mpasi na bango na boboto, mpamba te, yo nta likolo, okopesa bango enkoti
ya bokonzi.
Bokumisa, bopambola Mokonzi na ngai, bopesa ye matondo, bosalela ye
na bosawa monene ya motema.

7 octobre :
Santu Maria ya Rosario. Bokundoli
Na nsima ya lilonga ya Lepante, le 7 octobre 1571, Papa Pie V akeli eyenga
ya santu Maria ya Lilonga ( Notre- Dame des Victoires ). Na date wana, bakristu
babundi na ba-musul-man, oyo bakoti lisusu na mabel ya bakristu, mpe
balongi. Papa atindaki bakristu yonso basambela rosario mpo na kolonga
etumba wana. Mosika te, eyenga oyo ezwi nkombo ya santu Maria ya Rosario.
Rosario ezali couronne ya ba-fleur, ya ba-rose, ya mayaka ya bakristu batii
na likolo ya mot ya mama Santu Maria., lokola chapeau, chapel, chapelet (
petit chapeau, enkoti ya moke). Rosario ekomi couronne ya ba-rose 150, elingi
koloba ya bisambo : Maria losako 150, engebene na Banzembo ya David.
Chapelet ekomi kolakisa enkoti ya moke, ya Maria losako 50.
Rosario ezali ndenge ya kosambela ya mpasi te, ebongi mpe na bato yonso.
Tozali kobakisa, na nsima ya Maria losako zumi, losambo ya Tata wa biso,
mpe tozali kokanisa mibombamo oyo ezali kolakisa biso bomoi mobimba ya
Mokonzi na biso Yezu Kristu. Tokoki koloba te Evangile mobimba ezali na
bokuse na kati ya losambo ya rosario. Ba-dominicain basali makasi, uto
ebandela ya losambo ya rosario na sicle ya XIII mpo te epalangana na kati
ya bakristu, tee lelo.
Na losambo ya Misa tozali koloba : E Mokonzi, Tata na biso, ngrasia ya yo
esopana na mitema ya biso. Na nsango ya Anzelu oyebisis biso bokomi moto

Bomoi bwa Basantu

5 fvrier :
Santu Agathe (akufaki na 251) ngondo na martiro.
Bokundoli
Na monoko ya ba-grec, nkombo Agathe elakisi mwana mwasi ya malamu.
Abotami na mboka Catane (Sicile). Agathe, na bolingo ya ye na Kristu, aponi
te amipesa na Nzambe, uto bomwana na ye. Na likambo yango toyoka maloba
ya santu Paul : Mwasi monzemba, na elenge mwasi bakokanisaka mambi ma
Mokonzi mpo te basantisa nzotu na molimo mwa bango. (1 Cor 7, 34)
Gouverneur ya Catane, Quentinien, alingaki kobala ye. Agathe aboyi.
Gouverneur sikawa afundi ye lokola mokristu. Ezalaki na ntango ya empereur
Dce, oyo abandaki konyokolo bakristu. Bamonisi Agathe mpasi ya motindo
na motindo, bongo na nsuka babomi ye. Mbangu nkombo ya ye epala-ngani
na kati ya Eklezia. Ndako Nzambe moko, na Roma, ekamati nkombo ya ye,
mpe Papa Grgoire ya Monene akotisi nkombo ya ye na kati ya losambo ya
Ukaristia (canon de la Messe).
Losambo : Santu Agathe, ngondo na martiro, salisa biso na kolanda mpiko
ya yo, bopeto ya yo.

6 fvrier :
Santu Paul Miki na baninga na ye (bakufaki na 1597),
bamartiro ya yambo ya Japon. Bokundoli
Bamartiro bazalaki 26. Na kati na bango, moto moko alakisi mpiko mingi :
Paul Miki, nganga Nzambe ya lingomba ya ba-Jsuite. Na kati na bango,
motoba bazalaki ba-missionnaire ya Espagne, misatu bazalaki ba-Jsuite ya
Japon (na kati na bango : Paul Miki), 17 bazalaki bakristu ya Japon, na kati na
bango bana mpe bazalaki.
Bato ya Japon babandaki kozwa batisimo na maboko ya mission-naire
moko : santu Franois Xavier, ya lingomba ya ba-Jsuite, oyo akufaki na 1552.
Boyambi ekotaki mbangu mpe na modindo na mokili wana. Kasi kala mingi
te, na 1587, mokonzi ya Japon abandi koboya bakristu mpe kobengana bamis-sionnaire. Azali koloba : bazali bampaya. Bakristu bakobi na kosa-mbela

10

Bomoi bwa Basantu

na bonkutu. Na 1597, baka-ngi bakristu 26, babandi kota-mbwisa bango ya


kati ya bamboka, mpo na kobangisa baye balingi kokoma bakristu. Bakobi na
koyo-kisa bango mpasi ya ndenge na ndenge. Na nsuka bakangisi bango na
bakuruse, mpe batoboli motema na bango na likongo. Nzambe azali makasi
ya basantu, ye moto abengi Paul Miki na baninga na ye na koleka na nzela ya
kuruse mpo bakoma na bomoi. Na likolo ya ba-kuruse bamartiro ya Japon
bako-maki elili ya Kristu, oyo alobaki na bayekoli na ye : Motu alingi kobikisa bomoi bwa ye, akobungisa bwango, kasi moto akobungisa bomoi bwa ye
mpo na ngai, akozwa bwango lisusu. (Mat 16, 25)

6 fvrier :
Santu Amand (600-679), episkopo.
Bokundoli (na Belgique)
Santu Amand azali mobateli ya paroisse ya biso. Abotamaki na France
penepene na mbula 600. Azalaki na bambula 20 ntango atikaki mboka na ye
na Sud ya France mpo na kokoma monako (moine), elingi koloba moto amibendi na esika ya kimia mpo na kosalela Nzambe. Na nsima baponi ye azala
episkopo, bongo akomi na Roma. Awa azongi, abandi kota-mbola na mabele
ya France mpe ya Belgique mpo na koteya Nsango Elamu ya Yezu. Bapagano
bazalaki naino mingi na ntango wana. Amand azali lokola moto akei liboso
(pionnier) : awa akeli lisanga moko ya bakristu, atiki mosala na bato mosusu
mpo bakoba yango. Ye moko akei esika mosusu mpo na kobanda lisanga ya
bakristu mosu-su. Na 646, akomi episkopo ya Maastricht (Hollande). Kasi
atikali kuna bobele mbula misatu, mpo amoni te akoki mpenza te na mosala
ya kotikala esika moko. Abandi lisusu kotambola bipai na bipai. Episkopo
Amand abandisaki ba-abbaye, esika ba-moine bazali kofanda, mpo batambwisa
Nsango Elamu ya Yezu na bamboka ya mpembeni. Santu Amand azalaki
koluka mateya ya ye ezala ya solo solo, ezala oyo ya Eklezya mobi-mba,
yango wana akendeki mbala misatu na Roma mpo na kosolola na Papa mambi
ya eyamba mpe ya mosala ya ye. Na abbaye ya Elnone, na Nord ya France,
santu Amand akufaki, mpembeni na mbula 679.

Bomoi bwa Basantu

103

Ntango Franois auti na Egypte mpe azongi na Assise, lingomba na ye


ezali na boboto te, koyokana ezali lisusu mpenza te, mpo na bobola oyo
esengeli kofanda na kati ya lingomba. Yango wana, Franois akomi Mobeko (
Rgle ) ya nsuka, na 1223. Na 1224, Franois akei kofanda ye moko na esika
babengi Alverne. Kuna Franois asengi na Mokonzi na kokabana na ye bolingo
mpe mpasi ya ye. Bongo, penepene na eyenga ya Kuruse esantu ( 14 septembre
), na ntango Franois azali kosambela, azwi bampota ya Yezu na kuruse. Na
maboko, na mopanzi mpe na makolo ya Franois bampota emonani. Yango
epesi ye mpasi mingi na nzoto. Makasi na ye ebandi kosila, mpe mosika te
Franois akomi penepene na liwa. Bongo akomi Nzembo ya moi ( Cantique
du soleil ). Franois akufi na koyemba Nzembo 141 : Nabengi Mokonzi,
nabeleli ye Azalaki na bambula 45. Nzoto na ye ekundami na basilique,
oyo ezwi nkombo ya santu Franois, na Assise.
Franois azali koloba na bandeko ya lingomba na ye : Mokolo moko te
tokoki kolinga na kofanda na likolo ya bato mosusu, kasi tosengeli kofanda
basaleli mpe kotosa ekelamo yonso ya bomoto ( tre soumis toute crature
humaine ), mpo na Nzambe. Oyo ezali nguya ya lingomba ya santu Franois,
oyo azwi nzela ya kobongisa bomoi ya banganga Nzambe, ya kopelisa bolingo
ya bakristu mpo na Nsango elamu. Franois alobi : Tokoki kofanda te na
mayele to na bokebi na ndenge ya bato, kasi biso tosengeli kofanda ya kozanga
lolendo, mpe na bopeto Tozala na bolingo mpe na bosawa lokola Yezu, oyo
azalaki na bomengo yonso, mpe alingi kopona, elongo na wa esengo Mama
na ye, na likolo ya mambi yonso, bobola.
Liloba ya Nzambe : O ntango ena Yezu alobi : Natondi yo, Tata, Mokonzi
wa likolo na nse, zambi oyebisi bato bake maye obombeli bato ba bwanya
mpe ba mayele ( Mat 11, 25 ).
Losambo : Tosengi te losambo ya santu Franois esalisa biso na kolo-ngola
bomoi na biso na biloko oyo ezali kopesa mokumba, mpe ezali kopekisa biso
na kolinga bandeko na biso.
Toyoka ndambo ya Nzembo ya moi ya santu Franois : Yo, nta likolo, ya
nguya yonso, Mokonzi ya malamu : na yo biso topesi bopamboli, nkembo,
lokumu, bobenisi yonso. Bobele na yo, nta likolo, yango ebongi, mpe moto
moko te abongi na kotanga nkombo na yo.

102

Bomoi bwa Basantu

Mokolo moko lisusu, azali na ndako Nzambe, mpe ayoki na Evangile


ndenge Yezu atindi bapostolo na ye na kokende koteya bato : Bokende koteya
bato te : Bokonzi ya Nzambe ekomi penepene Bokamata ata mwa sac ya
mbongo te na nzela mpamba te, moto ya mosala asengeli kozwa biloko oyo
asengeli na yango ( Mat 10, 1-10 ). Franois amoni te Liloba oyo ezali mpe
mpo ya ye, mpe abandi kotambola na bobola yonso na kopalinginia Nsango
elamu ya Yezu na bato yonso. Bato mosusu balandi ye. Franois apesi bango
nkombo ya : Bandeko ya mike ( Frres mineurs ), na nsima ya bato yonso.
Oyo ebandela ya lingomba ya ba-franciscain. Bato bazali kolanda Franois
bazali bilenge, oyo batiki yonso lokola Franois, mpe ntango oyo bazali
kosenge makabo na bato mpo na kobika. Bazali kopalinginia Nsango elamu,
bazali kozongisa boboto na kati ya bato bazali koyinana, bazali koyebisa bato
te bamiyokisa mpasi, mpe bazali koteya bato mambi etali Ukaristia esantu.
Na 1210, bandeko oyo ya mike bakomi 12 mpe bakei na Roma, na kotala
Papa. Papa andimi ligomba ya bango na monoko, mpe alobi na bango : Bokoki
koteya bato na mokili mobimba. Boboto na bolamu ! : oyo maloba na bango
ntango bakutani na bato. Boboto oyo ezali kouta na Nzambe, bolamu mpe
oyo tokozwa na ye. Bazali koluka na koteya Nsango elamu lokola yango ezali,
kobakisa te, kolongola te. Bazali na bolingo monene na Kristu, na bobola, na
esengo ya komona biloko ya Nzambe akeli ( familiarit avec la nature ), na
limemia na bato yonso.
Na 1212, Franois akeli lingomba ya : Basi babola ( Pauvres dames ).
Mwana mwasi moko asalisi Franois na kokela lingomba oyo : Claire, oyo
amipesi na Nzambe na komona ndakisa ya Franois. Bazali kobenga bango :
Ba-surs clarisse.
Na 1215, Franois abandi kotinda bandeko na ye na mikili mosusu. Franois
aluki koteya ba-musulman, mpo babongola motema mpe bakoma bakristu.
Yango wana akomi na Egypte, na 1219, mpe asololi na Sul-tan, mokonzi ya
ba-musulman. Na nta-ngo wana, bakristu na ba-musulman bazalaki kobunda
etumba. Franois alingi te bitumba ezali na kati ya bango. Tokomi na 1221,
Franois akeli lingomba mosusu, mpo na ba-lac ( Tiers-ordre ), na ntina te
ba-lac balanda ndakisa ya bobola, ya bosawa mpe ya bisambo ya lingomba
ya Franois.

Bomoi bwa Basantu

11

Na paroisse ya biso Saint Amand bapagano bazali mingi, bato batiki


kosambela bazali mingi : tozala na mpiko lokola ye mpo na kokende epai ya
bato, mpo na koteya bango, kozongisa bango na kati ya Eklezia.

10 fvrier :
Santu Scholastique (480-543), ngondo. Bokundoli
Abotamaki na Norcia (Italie). Uto bomwana na ye amipesi na Nzambe, na
bongondo. Santu Benot azali ndeko ya ye, tata moko, mama moko.
Scholastique akei kofanda penepene na Benot na Mont-Cassin. Na mbula
moko mbala moko, Benot azalaki kobima na couvent na ye mpo na kokutana
na Scholastique mpe kosolola na ye mambi ya Nzambe. Na bokutani ya nsuka,
Scholastique alingaki te ndeko na ye azonga na couvent na butu, alingaki
kokoba masolo etali esengo kuna o likolo. Kasi Benot alingi kaka kozonga.
Bongo Scholastique asali nini ? Abandi kosambela, mpe tala, likolo oyo ezalaki
na lipata moko te, eyei moindo, mpe mbula ebandi konoka makasi. Benot
amoni nzela te ya kozonga na couvent, bongo masolo na bango ekobami butu
mobimba.
Mikolo misatu na nsima, Scho-lastique akufi. Bakundi ye, na nsima mpe
bakundi Benot na lilita moko wana. Bongo liwa ekaboli te banzo-to ya bango,
na motindo mpe mili-mo ya bango ezalaki ya kosangana.
Liloba ya Nzambe : Moto azali na bolingo atosi mobeko mobimba. (Rom,
13,8)
Topesa na losambo ya santu Scholastique bandeko na biso mi-bali na basi
baye bazali na biso makila moko.

11 fvrier :
Santu Maria ya Lourdes. Bokundoli
Santu Maria amonani mbala 18 na Bernadette Soubirous, banda le 11 fvrier
kino le 16 juillet 1858, na grotte ya Massabielle, penepene na Lourdes (France).
Mokolo moko santu Maria alobi na Bernadette, na limemya yonso : Soko
olingi, yaka awa mikolo 15 mobimba. Santu Maria alobi na ye lisusu : Kende

12

Bomoi bwa Basantu

komela na liziba, osukola mpe kuna. Bernadette akei mpe amoni mai ebimi
na mabele ya potopotoMai ezali kobikisa molimo na nzoto. Mokolo mosusu
santu Maria alobi na Bernadette : Kende koloba na banganga Nzambe baya
awa na bato, na molongo, batonga mpe ndako Nzambe. Oyo ebandela ya
ba-plerinage yonso ya Lourdes.
Je suis lImmacule Conception : elingi koloba, nazali na lisumu te banda
libumu ya mama na ngai. Oyo maloba ya santu Maria alobaki mokolo mosusu
na Bernadette. Ndenge wana santu Maria alendisi maloba ya papa Pie IX, oyo
atindaki bakristu yonso, na 1855, bandima te santu Maria azali na lisumu te
uto ebandela ya bomoi na ye na kati ya libumu ya mama na ye.
Tokoki koloba boye : Na Lourdes Mokonzi Nzambe akomisi ngolu ya ye
penepene na bato, ya ye alingaka mingi. Kuna mpe santu Maria azali kobondela
lokola abondelaki mwa-na na ye na Cana. (Jean 2) Lelo, ba-million mitanu
ya bato bazali kouta na mikili yonso, mbula na mbula, bazali koya na Lourdes
mpo na kosambela mama ya Yezu, mpe kozwa, na lisalisi ya ye, ngrasya ya
Nzambe, elingi koloba kobongola motema mpe kobika na mpasi ya molimo
mpe ya nzoto. Ya solo, na Lourdes, bato mingi bazali kozwa lisalisi.
Tosenge na santu Maria akotisa na bisambo ya ye bakoni yonso, baye bakoki
kobika te, mpo te bazala na makanisi ya koboya Nzambe te.

14 fvrier :
Santu Cyrille (827-869), monako, na
santu Mthode (815-885), episkopo. Bokundoli
Na ntango wana, Eklezia ya Roma na Eklezia ya Constantinople bakabwani
naino te. Bokabwani ebandi nsima, na 1054. Cyrille na Mthode bazalaki
bandeko ya tata moko, mama moko. Babotami na Salonique (Grce). Patriarche
ya Constantinople atindi bango na mokili ya ba-slave (Moravie), mpo na
kopalinginya Nsango Elamu ya Yezu. Mpo na kosalisa bato wana : bayebi
grec te, bayebi latin mpe te, Cyrille akeli bikoma (alphabet) mpo te ba-slave
bakoka kokoma na monoko ya bango. Oyo ezali ebandela ya alphabet
cyrillique na minoko ya ba-slave, tee lelo. Cyrille abandi kobalola na monoko
ya ba-slave Mikanda misantu, bisambo, na mikanda mosusu. Tosengeli koyeba

Bomoi bwa Basantu

101

efungwami, mpe nzela emonani na kokutana ntango yonso na banzelu ya


Nzambe. Biso tokoki, na lisalisi ya liturgie na biso, banda ntango oyo, kosangisa
banzembo na biso na oyo ya banzelu bazali kofukamela Nza-mbe, biso tokoki
koloba elongo na bango : Yo mosantu, yo mosantu, yo mosantu, lokola tozali
koloba na nsuka ya prface ya Misa.
Liloba ya Nzambe : Nzambe akoti-nda banzelu ba ye bakengele yo o nzela ya yo inso. Bakomeme yo o maboko ma bango, mpo te lokolo la yo lotuta
libaku te ( Nzembo 91, 11-12 ).
Losambo : Tobalola miso na biso ya motema na anzelu oyo Nzambe aponeli
biso.

4 octobre :
Santu Franois dAssise (1182-1226). Bokundoli
Santu Franois akufi na butu ya 3 na 4 octobre 1226 na Assise ( Italie ).
Mbula mibale na nsima, na 1228, Papa Grgoire IX, moninga mpe mobateli
ya Franois, aluboli ye mosantu. Nkombo na ye ezalaki Jean. Azali mwana ya
moto ya mombongo ya Assise. Tata ya Jean azali kokende na France mpo na
kosomba bilamba na ye, mpe azali kolakisa na Jean monoko ya franais mpe
banzembo ya mokili ya France.Yango wana Jean azwi nkombo ya Francesco
( le Franais ). Na bolenge na ye, Franois aluki na kolanda bisengo ya mokili
elongo na baninga na ye, ye mokonzi ya bolenge. Akomi soldat, akei mpe
kobunda etumba na Prouse, kuna bakangi ye mpe atikali mbula moko na
boloko. Na 1206, akomi lisusu soldat, kasi mokolo moko aloti ndoto, ayoki
Yezu na kuruse azali koyebisa ye : Mpo nini ozali kolanda mosaleli ( elingi
koloba : mokonzi ya basoldat ) mpe olandi mokonzi ( elingi koloba Yezu )
te ? Banda ntango wana, Fran-ois abandi kosambela mingi mpe kokaba
mbongo na babola. Bobele na mbula wana, na ndako Nzambe ya santu Damien,
na Assise, ayoki Yezu na kuruse azali koloba na ye : Franois, kende mpe
bongisa ndako na ngai oyo ezali kokweya. Bongo, Franois akomi maon,
mpe ateki ndambo ya bilamba ya tata na ye mpo na kobogisa ndako Nzambe.
Tata afundi ye. Yango wana, Franois atiki bilamba na ye yonso ya nzoto mpe
alobi : Nazali na tata mosusu te, bobele oyo azali na likolo.

100

Bomoi bwa Basantu

bazali bakambi mpe baninga ya moto moko moko. Na Bondeko ya kala tozali
koyoka mbala na mbala te banzelu bazali. Na Bondeko ya sika tozali koyoka
lisusu te bango bazali. Banzelu, bikelamo ya mokili oyo ezali komonana te,
bazali komonana mingi na mokili ya bato.
Bikoma bisantu mpe mateya ya Eklezia ezali koyebisa biso te anzelu
mobateli azali moninga ya solo ya moto na moto, ya moto akozwa na mbotama
na ye. Na bofandi na anzelu penepene na moto, na moi mpe na butu, mpe na
bisambo na biso, anzelu azali kosalisa biso, tokweya na masumu te, tozala
mpe na mposa ya kosala mambi malamu.
Yezu alobi nini mpo na banzelu babateli ya bana mike ? Na santu Matthieu
18, 10, Yezu alobi boye : Bokeba te bokinola moko wa bana baye te, zambi
nayebisi bino : banzelu ba bango bakomonoko ntango inso elongi ya Tata
wa ngai azali o likolo. Na Bikela ya bapostolo 12, 6-16 tozali kotanga
mambi ya anzelu oyo abimisaki Pierre na boloko. Pierre alobi : Sikawa nayebi
solo te Mokonzi atindi anzelu wa ye mpe alongoli ngai o maboko ya Erode
mpe o makambo manso bayuda balingi kosala ngai.
Bakristu bakumisi banzelu babateli na bileko yonso. Na 1670, Papa atindi
te bokundoli ya banzelu babateli esalema na Eklezia mobimba. Na losambo
ya Misa ya banzelu babateli, tozali koloba : E Mokonzi, otindi banzelu mpo
ya kobatela biso, sala te babatela biso malamu, bongo mokolo moko tokoma
esika bango bazali, tomona mpe esengo elongo na bango.
Na Misa mpe tozali koyoka Liloba ya Nzambe na buku ya Bobimi 23, 2023 : Nakotindela yo ( Israel ) anzelu wa ngai akende liboso lya yo mpo
akengele yo o nzela mpe akomisa yo o esika naponelaki yo. Memya mpe
tosa monoko mwa ye. Soko oboyi maloba maye, akolimbisa yo te, mpamba
te, Nkombo ya ngai ezali na ye. Kasi soko otosi monoko mwa ye, mpe soko
osali lokola nalobi, nakozala monguna wa banguna ba yo mpe nakobunda
na baye bakobundisa yo- Losambo nsima ya Komunio : Mpo ya bobateli
ya banzelu, kamba biso, e Mokonzi, na nzela ya malamu, tofanda na boboto
mpe tobika.
Na Jean 1, 51 tozali kotanga : Yezu alobi : ya solo solo, nalobi na bino :
bokomono likolo likofungwama mpe banzelu ba Nzambe bakobuta mpe
bakokita mpo ya Mwana wa moto. Ezali kolakisa nini ? Awa Yezu ayei, likolo

Bomoi bwa Basantu

13

te na ntango wana mikanda yonso ezalaki na monoko ya grec to latin. Yango


wana, banganga Nzambe mosusu bamoni mabe na ndenge ba-bandi kokoma
na monoko mosusu, monoko ya ba-slave. Babandi koyo-kisi Cyrille na
Mthode mpasi. Yango wana bakei na Roma na kotuna Papa na likambo yango.
Papa andimi mosala ya bango. Na ntango bazalaki wana, Cyrille akufi (869).
Mthode akomi episkopo na ma-bele ya ba-slave, akobi mosala na mpiko
yonso. Kasi amonaki mpe mpasi mingi mpo azalaki koteya bato mpe kokoma
na monoko ya ba-slave.
Ata na kati ya mpasi, mosala ekei na liboso, mpe nsima ya liwa ya Mthode
(885), bayekoli na ye bapalinginyi Nsango Elamu na Bohme (Rp. Tchque),
na nsima na Croatie, na Pologne... Batisimu ya ba-polonais ezalaki na 966.
Mpo na misala yonso Cyrille na Mthode basalaki, Papa Jean Paul II akomisi
bango babateli ya Mpoto, elongo na santu Benot.
Tosambela basantu Cyrille na Mthode mpote Eklezia ya Roma na Eklezia
ya Constantinople bayo-kana, bakoma Eklezia moko.

22 fvrier :
Kiti ya koteya ya santu Pierre
(Chaire de saint Pierre). Eyenga
Liloba oyo chaire ebimi na liloba cathedra, elingi koloba kiti ya koteya.
Tokanisa na liloba cath-drale, ndako Nzambe, esika epis-kopo azali koteya
bakristu. Eyenga oyo ebanda kala, na sicle ya minei. Kiti ezali elembo ya
mosala ya Papa, zambi azali motei, mbuta nganga mpe mokengeli ya Eklezia
mobimba. Eyenga oyo ezali kopesa biso nzela ya kokanisa na mosala ya Pierre
na mpe bakitani na ye (ba-papa) bazali kosala na kati ya Eklezia. Tokanisa
mpe na motindo Eklezia azali koluka na ntango oyo, na nzela ya cumnisme,
na kosangisa bakristu yonso. Liboso, na eyenga oyo, tozali kokundola mosala
ya Yezu apesaki na Pierre. Yezu alobi na ye : Kasi ngai (Yezu) nasambeli mpo
na yo, mpo te boyambi bwa yo bolembe te. Bongo, soko osili obongoli
motema, lendisaka bandeko na yo. (Luc 22, 32) Ata Pierre awangani Yezu,
mpo na nsomo, na butu wana bakangi Yezu, ata bapostolo yonso bakimi na
butu wana, na boyambi na ye, akamati esika ya liboso na kati ya lisanga ya

14

Bomoi bwa Basantu

bakristu, na ebandela ya Eklezia. Toyoka santu Paul na 1 Cor 15, 5 :Yezu


amilakisi na Kefa (Pierre), ye na sima na bapostolo yonso. Bayekoli ya Yezu
balobi na bayekoli ya Emmaus : Ya solo, Mokonzi Yezu asekwi o bawa ! Simon
(Pierre) amoni ye ( Luc 23, 24).
Santu Lon ya Monene alobi boye : Libanga ya kosimba ndako ezali Kristu,
kasi Yezu alobi na Pierre : Yo ozali libanga, elingi koloba, ngai nazali libanga
oyo bakoki koningisa te, libanga oyo ezali kosimba ndako kasi yo mpe
ozali libanga mpo ozali makasi na makasi na ngai.

23 fvrier :
Santu Polycarpe (70-155), episkopo na martiro.
Bokundoli
Polycarpe, elingi koloba : moto ya bambuma mingi. Mpo na bomoi ya ye
molai, Polycarpe azalaki moto ya koyebana mingi na kati ya bakristu ya Asie
Mineure (Turquie). Santu Irne, episkopo ya Lyon, azalaki moyekoli ya
Polycarpe. Irne ayebisi biso te : Polycarpe amonaki santu Jean, apostolo
ya Mokonzi Yezu, mpe bakristu mosusu baye bamonakiYesu. Santu Ignace
(akufaki na 110) akomelaki Polycarpe mokanda, ntango Poly-carpe akomaki
episkopo ya Smyrne, mpo na kolendisa ye. Toyoka ndenge nini Polycarpe
akomaki nzeneneke ya Yezu : Ezalaki na mboka Smyrne na mbula 155. Moto
moko ya mosala ateki Polycarpe. Bakangi ye mpe bakambi ye na miso ya
gouverneur ya Smyrne, na kati ya stade, esika bato mingi bakutani mpo na
kotala masano. Gouverneur alobi na Polycarpe : Olaya ndai na nkombo ya
empereur mpe obete Kristu mobondo (maudis le Christ !) Ngai nasaleli ye
banda bambula 86, ye asali ngai mabe moko te oyo eyano ya Polycarpendenge nini nakoki kobete Mokonzi mpe Mobikisi na ngai mobondo ?
Gouverneur ameki na banzela yonso na kotinda Polycarpe aboya boyambi ya
ye. Na nsuka bato bafandi na stade babandi koloba na monoko makasi na
gouverneur : Oboma ye, zambi azali komemolo banzambe ya biso. Bongo
gouver-neur atindi bazikisa ye.

Bomoi bwa Basantu

99

Eklezia, mama na ngai, nako-zala bolingondenge wana ngai nakofanda


yonso.
Losambo na nsima ya Komunio : E Mokonzi, bolingo monene etindi
Thrse na komipesa na maboko na yo, mpe kokanisa kaka na kobikisa bato
mosusu. Thrse alobi, ntango azali komigongisa na kosala bilako : Nakoti
na carmel mpo na kobikisa milimo, mpe mingi mpo na kosambela mpo na
banganga Nzambe. Na 1895, balobi na ye : Okoma ndeko ya moli-mo ( sur
spirituelle ) ya sminariste moko alingi akoma missionnaire, osalisa ye na
bisambo.
Na 1896, bapesi ye moto mosusu, oyo azali missionnaire. Thrse mpe na
ntango wana asambeli mpo na kozwa ngrasia ya kokoma mission-naire ye
moko mpe kokoma na Indo-chine, kasi bokono ya ntolo ekomi makasi, mpe
mosika te, Thrse akufi.
Liloba ya Nzambe, na Isae 66, 12-14 : Yawe alobi boye : nakokotisa boboto
epai ya ye lokola ebale, mpe lokumu ya bikolo lokola moluka motondi na
mai. Bokonunga mable, bakomeme bino o loketo, bakofandisa bino o bibelo
mpe bakosepelisa bino mingi mpenza. Ngai nakobondo bino, lokola mama
akobondoko mwana wa ye : o Yerusalem bokotonda na esengo. Mokolo
bokomono bongo, bokoyoka nsai, makasi ma nzoto makozongela bino.
Santu Thrse akomi lisusu boye: Banda ntango ngai nazwi ngrasia ya
koyeba bolingo ya motema ya Yezu, bolingo wana ebengani bobangi yonso.
Kokanisa na mbeba na ngai ezali kosalisa ngai na komikitisa, ezali kosalisa
lisusu na kotia motema lisusu te na makasi na ngai. Makasi na ngai, nini ?
Ezali kaka kozanga makasi. Kokundola oyo ya mbeba na ngai ezali koyebisa
ngai ngolu mpe bolingo ya Nzambe. Ndenge nini, ntango moto abwaki mbeba
na ye na kati ya mto ya bolingo, ndenge nini mbeba yango ekozika te libela ?

2 octobre :
Banzelu babateli. Bokundoli
Banzelu bazali te basantu lokola bato, kasi bakristu bazali kokumisa banzelu,
na ndenge bango bazali komonana na bato mpe bazali kobatela bango. Biso
mpe topusi kokumisa mpe kobondela banzelu babateli, lokola te banzelu oyo

98

Bomoi bwa Basantu

Papa abengi santu Thrse mosantu eleki monene na ntango oyo ya sika ( des
temps mo-dernes ).
Na nzembo ya boyingeli ya Misa ya santu Thrse tozali kotanga : Lokola
engondo ( aigle ) ezali kokengele zumbu ya ye mpe epimbwi likolo lya bana
ba ye, etandi mapapu ma ye mpe ememi bana, ekei na bana o mapapu ma ye,
se bongo Yawe ye moko akambi bango, mpe nzambe mosusu azalaki na bango
te ( Mibeko 32, 11-12 ).
Losambo ya liboso ya Misa ezali koloba : E Nzambe, santu Thrse azalaki
na bosawa lokola mwana ya moke. Salisa biso, tolanda ndakisa ya ye. Thrse
alobi : naleki ya moke na kati ya bikelamo ya Nzambe, nayebi bobola na
ngai, bozangi makasi na ngai. O ndeko, ya ngai nalingi, nabo-ndeli yo, kitisa
miso na yo ya bonza-mbe na likolo ya lisanga momene ya milimo ya mike.
Nakobondela yo na kopona milimo ya mike mingi, baye bazali komipesa na
yo mpe babongi na kolinga yo.
Yezu alobi na Mat 18, 1-4 : Soko bobongwani te, mpe bokomi lokola bana
bake te, bokoyingela o Bokonzi bwa likolo te. Mwana ya moke, mpo na
Thrse, azali oyo andimi yonso, mpe akoloba ntango yonso : ngai oyo !
Oyo ezalaki likanisi ya Thrse ntango azwi nkombo : ya Mwana Yezu.
Na kati ya carmel, mampasi ya ndenge na ndenge ezali kopetola molimo
na ye, lokola wolo ezali kope-twama na kati ya mto : mpio makasi na kati ya
ndako na basanza mosusu ya mbula, mposa ya kosambela te, makanisi na kati
ya bisambo te, mpasi mpo ya bokono ya tata na ye, ntembe ya Thrse amoni
na motema na mambi etali boyambi, bokono na ye ya ntolo.
Thrse, na bolingo na ye monene na Nzambe, alingi kosala misala ya
ndenge na ndenge : kokoma motei, kokoma nganga Nzambe, martiro, kasi
mokolo moko atangi na monka-nda ya liboso ya santu Paul na bakristu ya
Corinthe, eteni ya 13, mpe ayebi sikawa te bolingo ezali nzela ya koleka
kitoko, oyo ezali kokamba biso na Nzambe. Yango wana alobi : nayebi sikawa
te, bolingo ezali ntina ya misala yonso, bolingo ezali yonso Yango wana,
na esengo ya ngai nayoki na koyeba likambo yango, nagangi na mongongo
makasi : E Yezu, bolingo na ngai, mosala na ngai nasengeli kosala, nazwi
yango, mosala na ngai, nde : bolingo ! Iyo, na zwi esika na ngai na kati ya
Eklezia, mpe esika wana, yo, Nzambe na ngai, opesi ngai yango. Na kati ya

Bomoi bwa Basantu

15

Liloba ya Nzambe : Ya solo solo nalobi na bino : soko mboto ekwei na


mabele te, ekotikala yango mo-ko ; kasi soko ewei, ekobota mbuma mingi.
(Jean 12, 24)
Tosenge bolingo mpo na Ekle-zia, na molende mpo na kolanda Yezu tee na
kobonzela ye bomoi na biso.

16

Bomoi bwa Basantu

Bomoi bwa Basantu

97

Mars

Octobre

7 mars :
Basantu Perptue, Flicit na baninga na bango (bakufaki
le 7 mars 203 na Carthage, Afrique du Nord). Bokundoli

1er octobre :
Santu Thrse ya Mwana Yezu, ngondo
mpe mobateli ya ba-mission (1873-1897). Eyenga

Baninga na bango bazalaki mi-nei : Revocat, Saturnin, Secondule na Sature


(catchiste).
Nkombo ya Perptue na Flicit ekoti na losambo monene ya Misa (Canon
de la Messe). Ezali kolakisa lokumu monene bakristu bapesi bango, uto
ebandela. Nsango ya liwa na bango ekomami na mo-nkanda moko na nkombo
ya Misala ya bamartiro ya Car-thage . Perptue moto abandi kokoma
monkanda oyo, ntango bakangi ye mpe azali na boloko, moto mosusu asilisi
yango ntango amonaki ndenge bamartiro baku-faki. Monkanda oyo eleki
mbele bansango yonso mosusu oyo ezali kotala bamartiro ya ba-sicle ya
liboso ya Eklezia. Ntango bakangi Perptue, Flicit na baninga na bango,
bango banso bazali naino ba-catchumne, longola se Sature oyo azali
catchiste na bango. Perptue azali mwasi ya lokumu mpe azali na mwana ya
moke ya komele mabele. Flicit azali mosali ya Perptue, mpe azali na zemi.
Bango banso bakuli batisimu ntango bazali na boloko. Awa Flicit alingi
kobota, azali komona mpasi mingi. Na moto azali kokengele boloko mpe azali
koloba na Flicit : ozali kolela na ntango oyo ya kobota, bongo ndenge nini
okofanda na liboso ya baniama ? Lelo oyo eyano ya Flicit ngai moto
nazali komona mpasi, kasi ntango wana Mosusu akofanda na kati na ngai,
zambi nakoyoka mpasi mpo na ye.
Na mokolo ya liwa, bango bakoti na stade na elongi ya esengo mpe ya
mpiko . Baniama ezali kozila bango na stade : ngombe ya mwasi, nkoi, ours,
na ngulu ya zamba. Na nsima ya bato yonso, Perptue akoti na stade, azali
kotala bato na mpiko yonso, ye bato bazali kokitisa miso ya bango. Mpasi ya
Perptue, Flicit na baninga na bango eumeli ntango mingi. Perptue moto

Thrse akufi na carmel ( ndako ya ba-sur carmlite ) ya Lisieux le 30


septembre 1897. Abotami na France na 1873, na kati ya libota ya bakristu,
esika Thrse akoli na kati ya bolingo mpe limemia na Nzambe. Azali na
bandeko basi minei. Ntango mama na ye akufi, Thrse azali na mbula 4. Na
nsima ya liwa ya mama, tata na ye akei kofanda na libota na ye na Lisieux.
Thrse azali na mbula 14 ntango aluki kokota na carmel. Na kati ya carmel,
bandeko na ye mibale bakoti na liboso na ye.Thrse akei tee na Roma mpo
na kosenge na Papa nzela ya kokota noki na carmel. Bongo akoti kuna na
mbula 15. Kuna azwi nkombo ya Thrse ya Mwana Yezu. Bambula libwa
atikali na carmel wana tee na liwa ya ye.
Bikoma bisantu, kasi mingi ba-vangile mpe Nzembo ya Salomon
( Cantique des cantiques ) ezali koleisa molimo ya sur Thrse, mpe noki
Thrse akomi na bomoi mosantu. Na 1893, Thrse azali kosalisa sur
mosusu na formation ya ba-novice. Mpe na 1894, sur Agns ( oyo azali
ndeko na ye ) asengi ye na kokoma mambi ya bomwana na ye. Oyo ebandela
ya monkanda: Histoire dune me ( Histoire ya molimo moko ) oyo Thrse
akomi. Monkanda wana ezali kolakisa nzela moko ya mpasi te ya kokoma
mosantu. Thrse azali kobenga yango : nzela ya moke. Ezali nzela ya kotia
motema mpe komipesa na mpiko yonso na Nzambe, ya kofanda na liboso ya
Nzambe lokola mwana ya moke azali kofanda na liboso ya tata na ye.
Mosika te, bokono ya ntolo esimbi ye, mpe akufi. Azali na mbula 24. Ntango
ya liwa ya ye, alobi : Nakofa-nda na likolo mpo na kosala mambi ya malamu
na bato ya mokili. Ya solo, bakristu bazali kosambela santu Thrse mpe bazali
kozwa lisalisi ya ndenge na ndenge mpo na molimo mpe nzoto ya bango.

96

Bomoi bwa Basantu

Na Bethlem atikali tee na liwa na ye. Kuna ye akobi kobongola Bikoma


bi-santu na latin. Na ntango wana Bikoma bisantu ezalaki ya kokomama na
hbreu to na grec, kasi na Italie mpe na mikili mosusu bato mingi bayebi grec
to hbreu te. Masonama masantu ya Jrme abongoli na monoko ya latin
ezwi nko-mbo ya Vulgata, elingi koloba : ya peuple.
Jrme akomi mpe minkanda mpo na kolimbola Liloba ya Nzambe.
Monkanda moko na ye : Des hommes clbres, eli-ngi koloba bakristu oyo
bayebani mingi mpo na minkanda na bango uto ebandela ya Eklezia, ekomeli
biso. Jrme akomi mpe ba-lettre mingi, ezali tee lelo. Na kati ya ba-lettre
wana, Jrme mbala mo-susu azali kotomboka makasi na bato bazali koteya
makambo ya lokuta, to ba-zali na makanisi mosusu oyo ezali kose-pelisa ye
te.
Jrme alobi : Moto atali Bikoma bi-santu mpamba, atali mpe nguya ya
Nza-mbe mpe mayele ya Nzambe mpamba : koyeba Bikoma bisantu te, ezali
koyeba Kristu te.
Na monkanda moko, Jrme azali koloba na bakristu bakuli batisimu mikolo
wana : Bino baye bolati Kristu ntango oyo, bino baye bozali kolanda nzela ya
biso, lokola bambisi bazali kolanda mpambo, botika Liloba ya Nzambe ebikisa
bino mpe ebimisa bino na mai ya koningana ya mokili oyo.
Na monkanda mosusu, Jrme alobi : Ntango oyo, yo ndeko ya bolingo
mingi, loba na ngai : kofanda na kati ya Minka-nda oyo misantu, kokanisa
yango ntango yonso, koyeba to koluka eloko mosusu te, longola Minkanda
oyo, ezali te, banda awa na mokili oyo, kofanda na bokonzi ya likolo ? Yo
mpe, mona mabe te soko ndenge ya kokoma ezali ya kozanga lole-ndo, ezali
kitoko te, mpamba te, yango ekoki kozala mbeba ya moto abaloli monkanda
na monoko mosusu, to Nza-mbe alingi te yango ezala bongo. Mi-nkanda
misantu ezali ndenge oyo : ata bato bayoki yango mbala ya liboso, ba-zali
kozwa nzela ya koyekola ; mpe na nzela ( phrase ) moko mpamba, moto ya
mayele mpe moto ya kozanga koyekola, bango mibale bazali kozwa na kati
na ya-ngo ntina, ya bango bazalaki kokanisa te.
Liloba ya Nzambe : Nawei na mposa ya kosalela yo, zambi banguna ba
ngai babosani maloba ma yo ( Nzembo 119, 139 ).

Bomoi bwa Basantu

17

ya liboso ya ngombe ya mwasi akweyisi na maseke na ye, kasi atelemi lisusu,


mpe ntango amoni te Flicit akwei lokola, Perptue akomi penepene na ye
mpe asimbi ye na loboko mpo na kotelemisa ye. Bango mibale batikali ya
kotele-ma Perptue, na liboso ya liwa ya ye azwi lisusu mpiko ya koloba na
monoko ya makasi na ndeko na ye mpe na moto mosusu azalaki wana :
Bolingana bino na bino, boyoka nsomo te mpo ya mpasi ekweli biso.
Na losambo ya bamama oyo mibale : Perptue na Flicit oyo bapesaki
bomoi na bango na mpe bana na bango na Nzambe, biso topesa na maboko na
ye bato yonso oyo Nzambe apesi biso na kotala.

19 mars :
Santu Joseph, bolongani ya ngondo Maria
Eyenga
Lokumu ya bakristu bapesi na santu Joseph, na Eklezia ya Orient, ezalaki
mingi banda sicle ya mitano. Na Eklezia ya Occident, bakristu babandaki
nsima na koku-misa santu Joseph. Banda 1300- 1400, nkombo ya santu Joseph
eyebani mingi na Eklezia mobimba. Na 1870, Papa Pie IX apesi na santu
Joseph nkombo ya Mobateli ya Eklezia mobimba . Na 1956, Papa Pie XII
abimisi eyenga mosusu, ya Santu Joseph, mosali (premier mai). Santu
Matthieu abengi Joseph moto ya libota ya David (1, 20). Na Nazareth, Joseph
azali kosala mosala ya teknon (Mat 13, 55), elingi koloba moto ayebi
kotonga ndako, kosala misala na mabaya, to na bibende. Azali fianc ya Maria,
ntango Nzambe atindi Wanzio ya ye na Maria (Luc 1, 27). Joseph andimi
mwana oyo Maria akobota na nsima, abali Maria mpe ye moto apesi mwana
nkombo ya Yezu.
Yezu akamati nkombo ya : mwana ya mokabinda (charpentier). Batu
bazalaki koloba : Ye mwana ya mokabinda te ? (Mat, 13, 55). Batu bazalaki
koloba lisusu : Ye Yezu, mwana ya Joseph te ? (Jean 6, 42). Yezu ye moko
azali charpentier. Batu balobi mpo na Yezu : Ye mokabinda te ? (Marc 6, 32).
Malo-ba oyo yonso elakisi ndenge nini nkombo ya Yezu ekangemi na nkombo
ya Joseph. Maloba oyo ezali kolakisa mpe mosala Joseph asali na bomoi ya
Yezu.

18

Bomoi bwa Basantu

Tozali kosepela eyenga ya santu Joseph mosaleli wa malamu mpe wa


mayele oyo mokonzi akotia kapita wa bato ba ndako ya ye (Luc 12, 42).
Nzambe atii santu Joseph na kotala libota yasantu. Na ndenge santu Maria
akomi mama ya Eklezia, Joseph mpe, moto ya malamu mpe ya mayele, oyo
azali kotala libota ya ye, akomi mobateli ya libota ya Yezu, elingi koloba : ya
Eklezia mobimba. Ata liloba moko te ebimi na monoko ya santu Joseph, na
Nsango Elamu mobi-mba. Bossuet alobi : Joseph, na ndako na ye azali na
eloko ya kobenda miso ya bato ya mokili mobimba, kasi batu bayebi ye te.
Azali mobateli ya Nzambe Mwana, mpe azali koloba eloko moko te, azali
tmoin ya mobombamo monene, mpe azali kopanza nsango wana te.

25 mars :
Anzelu apesi Maria nsango
Eyenga enene
Mambi ya biso bakristu toko-kundola na eyenga oyo eyebani malamu : na
ndako ya Nazareth na Galilea, mwana mwasi na nkombo ya Maria. Anzelu
akoti na ndako ya ye : Sepela, otondi ngrasia. Anzelu ayebisi na mwana mwasi
oyo abandi kobanga : okozwa zemi mpe okobota mwana mobali oyo akozala
Mesia ya Israel. Nzambe ayebisi, mpe Nzambe azali kozila Mambi manso
ezali na maboko ya Maria. Atuni : ndenge nini ekosalema ? Mpe na nsima
alobi : Esalema (Fiat) na ngai lokola olobi. Tokotanga nsango oyo na santu
Luka, 1, 26-38.
Na koloba Fiat wana, Maria akomi mama ya Mobikisi, liboso ya kokoma,
na nse ya kuruse, mama ya Eklezia. Eyenga ya Anzelu apesi Maria nsango
ezali te bobele eyenga ya santu Maria. Ezali mpe eyenga ya bokomi moto ya
Mwana ya Nzambe, zambi na mokolo ya lelo Nzambe akomi moto na libumu
ya Maria. Na mokolo ya lelo Mwana ya Nzambe abandi bomoi na ye ya
bomoto, bomoi ya ye akofanda na yango, banda eloko ya moke na kati ya
libumu ya mama ya ye tee na kuruse mpe nsekwa ya ye. Na Nazareth, bakomi
boye na efelo moko ya ndako : Awa Liloba ya Nzambe akomi moto. Sanza
libwa na liboso ya eyenga ya Mbo-tama, bakristu bakosepela eyenga ya
Bokomi moto ya Liloba ya Nzambe. Banda ba-sicle ya yambo ya Eklezia,

Bomoi bwa Basantu

95

30 septembre :
Santu Jrme, nganga Nzambe mpe motei ya Eklezia
( 340 419 to 420 ) - Bokundoli
Santu Jrme akufaki na Bethleem le 30 septembre 419 to 420.Abotami
pene-pene na mbula 340 na Stridon ( Dalmatie ) na kati ya libota ya bakristu.
Akomi na Roma mpo na koyekola. Batei na ye bazali bato ya koyebana mingi.
Kuna mpe Jrme asombi minkanda mingi mpe asali bibliothque. Azali na
mbula 19 ntango azwi batisimu na maboko ya Papa Libre. Jrme azali moto
ya mpiko mingi, alingi asala makambo mingi, ata ayebi malamu te nini asengeli
kosala. Bongo abandi kosala mibembo mingi, akomi na Trve ( Allemagne ),
na nsima na Aquile ( Ita-lie ). Na 372, akei na Orient. Akomi na Antioche,
esika ayekoli hbreu mpe abandi koloba monoko ya grec malamu. Mokolo
moko abeli kuna makasi. Amoni na limoni Zuzi ya bato azali koloba na ye :
ozali moyekoli ya Ciceron, kasi moyekoli ya Yezu te. Mpamba te, Jrme
alingi mingi Ciceron na bakomi mosusu ya kala, bapagano ya bokonzi ya
Roma. Bongo Jrme akei kofanda ye moko na kati ya mabel ya zelo zelo na
mokili ya Syrie. Na nsima akomi nganga Nzambe, akei na Constantinople
mpo na koyekola ndenge ya kolimbola Minkanda ya Nzambe. Batei na ye
bazali bato ya mayele mingi. Na 382 azongi na Roma, akomi secrtaire ya
Papa Damase. Damase amoni te Jrme azali na mayele mpenza, bongo apesi
ye mosala ya kobalola ba-vangile na Banzembo na monoko ya latin. Na Roma
mpe akomi conseiller ya molimo ya basi mosusu ya lokumu baye balingi
komipesa na Nza-mbe mpe koyekola Liloba ya Nzambe. Bankombo na bango :
Marcella, Paula, Eustochium
Ntango Papa akufi na 384, bato mosusu babandi koboya Jrme mpo na
ezalela na ye ya makasi, mpo na bo-miyokisi mpasi ya ye mpe ya basi bamipesi na Nzambe, mpe na ndenge Jrme ababoli Liloba ya Nzambe na latin.
Nde-nge wana, Jrme atiki Roma mpe akei kofanda na Bethleem. Basi mosusu
bazalaki na Roma balandi ye kuna, Paula akamati mbongo na ye mpo na
kotonga bandako ya kofanda, ndako moko ya bampaya, eteyelo mpe moko,
esika J-rme azali koteya latin na grec na bana oyo bazali kofanda na bamboka
penepene.

94

Bomoi bwa Basantu

azali ntoma ya Nzambe. Toyoka na Luc 1, 19 : Ngai na-zali Gabriel, oyo azali
ntango inso o boso bwa Nzambe, natindami mpo te na nalo-ba na yo mpe
nayebisa yo nsango eye ya esengo ( ya mbotama ya Jean Baptiste ). Anzelu
Gabriel mpe ayebisi mbotama ya Yezu, na Luc 1, 26-27 : Nsima ya sanza
motoba, Nzambe atindi anzelu Gabriel o Nazarete, mboka yoko ya Galilea.
Atindi ye epai ya ngondo moko, nkombo na ye Maria
Raphl, na hbreu : Nzambe azali kobikisa. Anzelu oyo akobima na buku
ya Tobie. Raphl azali kokende nzela moko na Tobie, azali kosalisa ye, abikisi
mbuta Tobit oyo azali komona lisusu te, abikisi mpe Sara na zabolo. Azali
moko ya banzelu nsambo bazali koteleme na miso ya Nzambe. Totangi na
buku ya Tobie 12, 15 : Nazali Rafael, moko wa banzelu nsambo batelemi
ntango inso penepene na Mokonzi mpo te bayingela o Nkembo ya ye.
Na Hbreux 1, 14 tozali kotanga : Bo-ngo banzelu bazali banani ? Bazali
bili-mo bikosalelaka Nzambe mpe bitindami kosalisa baye bakozwa libiki.
Na losambo ya eyenga ya lelo, tozali koloba : Tosengi yo, Mokonzi, baye
ba-salelaka yo na likolo, babatela biso mpe awa na nse.
Mpo na mosala ya banzelu, toyoka santu Grgoire Monene : Nkombo na
bango ezali kolakisa mosala na bango. Bazali banzelu lokola te Batindami
bo-bele ntango bakomeme nsango. Tozali kobenga banzelu baye bazali
komeme bansango oyo ezali na mosala mingi te ; tokotanga banzelu bakumi
baye bako-meme bansango ya koleka mosala.
Losambo na nsima ya Komunio : E Mokonzi, tozwi mampa ma likolo, tozwi
makasi ya sika. Tokosenge yo na limemia te banzelu babatela biso, totambola
na nzela ya libiki. Mampa ya Ukaristia esantu, elembo na yango ezalaki
mampa oyo anzelu apesaki na Elie. Mampa mana epesi ye makasi na kokoma
na ngomba ya Nzambe, Horeb ( 1 Rois 19, 5 ).
Biso bakristu tozali kokumisa Nza-mbe awa na mokili. Banzelu na likolo
bazali mpe kokumbamela Nzambe. Toyoka maloba ya Prface ya banzelu :
Yango wana, elongo na banzelu yonso baye bazali kokumbamela yo o likolo,
biso tozali koyemba : Yo mosantu

Bomoi bwa Basantu

19

bakristu bakokumisa santu Maria lokola Eva ya mibale. Boboy kotosa ya Eva
ya liboso ememi bato na liwa, kondima ya santu Maria esali te akomi mama
ya mibale mpe ya solo ya batu bakondima Yezu.
Bangonga ya bandako Nzambe oyo ezali kobeta na suka, na midi mpe na
mpokwa mpo na Angelus (nsango ya Anzelu) ezali koyebisa libiki ya biso,
mpo tokundola yango, mpe ba-million ya Maria losako ya bakristu bazali
kosa-mbela mokolo na mokolo, ezali koyebisa ntango yonso tee na nsuka ya
mokili nsango ya libiki ya Anzelu ayebisaki biso.
Toyoka maloba ya Nicolas Cabasilas : Ntango Nzambe akeli Adamo, alobi
na Mwana se moko ya ye : Tosala moto. Kasi, ntango Nzambe asengeli,
motindo santu Paul alobi : kokotisa na mokili oyo Mwana ya liboso , moto
ya bwania oyo ya kokamwa, mpe kokela Adamo ya mibale, ayebisi likambo
yango na Ngondo. Mpe likambo oyo ya monene, Nzambi alakisi yango, mpe
azali kozila Ngondo na kopesa eyano. Ndenge wana, bokomi moto ya Liloba
ezali te bobele mosala ya Tata, ya Nguya ya ye (Mwana) mpe ya Elimo Santu :
moko alingi yango, mosusu atongi ndako ya ye, mpe ya misato azipi na elili
ya ye, kasi yango ezali mpe mosala ya bolingo mpe ya boyambi ya Ngondo,
zambi mosala oyo ekoki kosalema te ya kozanga ba-Persona misato, mosala
oyo mpe ekoki kosalema te ya kozanga bondimi mpe boyambi ya Yapetopeto.

20

Bomoi bwa Basantu

Bomoi bwa Basantu

93

Avril

na kosala nini ? kokotisa mto na motema ya bato, kosala lokola Mwana ya


Nzambe asa-laki : ye moto ayei mpo na kopelisa mto ya bolingo na ye na
mokili. Biso toluka nini lisusu ? Toluka te mto epela mpe ezikisa yonso
yango wana, ezali ya solo te, ngai natindami mpo na kolinga Nzambe mpamba
te , kasi mpo na bato balinga Nzambe. Ekoki te soko nalingi Nzambe, soko
ndeko na ngai alingi ye te.

7 avril :
Santu Jean Baptiste de la Salle, nganga Nzambe
(1651-1719). Bokundoli

29 septembre :
Basantu Michel, Gabriel na Raphal, banzelu bakumi.
Eyenga

Abotami na France, na kati ya libota moko ya mbongo. Ayekolaki mingi na


mboka ya ye Rheims mpe na Paris. Na 1678 akomi nganga Nzambe. Abandi
komituna : ngai nasala nini mpo te bana bazali babola bakoka koyekola ?
Mposa yango ekomi monene na motema na ye. Amoni mpe te ye moko akoki
te na mosala yango. Bongo abandi koluka bato basalisa ye na kofungola
biteyelo. Oyo ebandela ya lingomba ya Bandeko ya Biteyelo ya bakristu (Frres
des Ecoles Chrtiennes). Liboso afungoli biteyelo mpo na bana basi babola,
na nsima mpo na bana mibali babola. Na ntango wana ateki biloko na ye
yonso mpe ye moko akomi mobola.
Na komona ndenge bana babola bazali koyekola, ata bango bafuti te, batei
ya biteyelo mosusu bayokeli Jean Baptiste zuwa. Bafundi ye lokola moto alingi
kobebisa mosala na ba-ngo. Na kati ya bandeko ya lingomba ye akelaki, matata
ya ndenge na ndenge ebimi mpe : zuwa, kofunda ye na makambo ya lokuta
Mambi ya ndenge wana eyokisi ye mpasi mingi na motema. Ezali mpo na
bolingo na ye mpe mpo na motema soke ya ye te alongi bampasi yango yonso.
Na nsuka ya bomoi ya ye alobi : Na kati ya mambi yonso, ngai nafukameli
mpo elingi Nzambe na bomoi ya ngai (jadore en toute chose la volont de
Dieu mon gard).
Santu Jean Baptiste de la Salle moto ya liboso ya kofungola ba-cole normale
mpo na koformer batei. Abaloli mpe motindo ya koteya bana, na latin lisusu
te, kasi na franais.
Eklezia aluki ntango yonso na kobokolo bana. Eklezia azali kotala Jean
Baptiste de la Salle lokola profeta mpo na mosala na ye na kati ya bana. Ba-

Banzelu, basaleli mpe bantoma ya Nzambe, bazali komonana mingi na kati


ya Biblia, banda anzelu oyo azali kopesa mpiko na Agar na mabel ya zelo
zelo ( Gen 16, 7 ) tee anzelu oyo azali kotesa Yerusalem ya likolo ( Apoc 21,
17 ). Ba-nzelu misato bazali komonana mingi lo-kola bapersona : tobengi
bango banzelu bakumi, bakonzi ya banzelu. Santu Paul na 1 Thes 4, 16 akomi
boye mpo na nta-ngo ya nsekwa ya bato : zambi, ntango anzelu mokumi
akobelela mpe bakobete mondule mwa Nzambe - Santu Jude, na monkanda
na ye, nzela ya 9 abengi Michel : anzelu mokumi.
Lokumu ya bakristu bapesi na banzelu bakumi ezali monene na bileko yonso
uto ebandela.
Michel, na hbreu : Mi-ka-El = Nani lokola Nzambe azali komonana na
buku ya Daniel ( 10, 13.21 ; 12, 1 ), na monka-nda ya Jude 9 mpe na buku ya
Boyebisi ( Apoc 12, 7-9 ). Minkanda oyo ezali koyebisa biso etumba ya Michel
na likolo, elongo na banzelu na ye, na Dra-gon mpe banzelu na ye. Boyebisi
12, 7-9 ezali koloba : O ntango ena etumba engali o likolo : Mikael, na Banzelu
ba ye babundisi Ngando. Ngando na Ba-nzelu ba ye babundi mpe, kasi bakoki
kolonga te, mpe Mikael na Banzelu ba ye babengani bango o likolo. Babwaki
ebakata ya Ngando, Nyoka ya kala, eye bakobyangaka Zabolo to Satana, mosenginyi wa bato banso. Bakweisi ye o nse, ye na Banzelu ba ye.
Gabriel, na hbreu : Moto ya Nza-mbe, to Nzambe ( azali ) makasi na
ngai. Ezali nkombo ya anzelu azali kobima na buku ya Daniel 8, 16 ; 9, 21.
Mosala na ye ezali ya kolimbola makambo. Na Bo-ndeko ya sika, Gabriel

92

Bomoi bwa Basantu

Bongo abandi kosangisa basi mosusu ya lokumu mpo na koluka nzela ya


ko-salisa babola. Na 1625, Vincent akeli lingomba ya banganga Nzambe ya
Mis-sion ( Prtres de la Mission ) mpo na ko-teya babola na bamboka mpe na
koteya bilenge balingi kokoma banganga Nza-mbe na ba-sminaire, lokola
Eklezia eza-laki kosenge. Na ntango wana banganga Nzambe mingi bayekolaki
malamu te, bayebi mosala na bango malamu te. Nda-ko ya liboso ya lingomba
ya Vincent ezali na Paris, babengi ndako wana : ya santu Lazare, yango wana
banganga Nzambe na ye bazwi nkombo ya ba-lazariste.
Na 1633, na lisalisi ya Louise de Ma-rillac, Vincent abandisi lingomba ya :
Bana basi ya bolingo ( Filles de la cha-rit ), mpo na kosalisa babola, bakoni.
Mangomba oyo mibale epalangani noki na France mpe na mikili mosusu.
Mpo na bandako ya Vincent afungoli, mpo na bolingo na ye na babola, mpe
mpo na bosantu ya bomoi na ye, Vincent akomi moto ayebani mingi na ntango
na ye. Ba-lettre na ye etikali tee lelo ezali 2000, ba-confrence ya ye azakaki
kopesa etikali mingi mpe tee lelo.
Azalaki koloba na ba-Sur na ye : Ezali kotika Nzambe te soko otiki Nzambe mpo na ye, lokola te soko otiki mo-sala moko ya Nzambe mpo na kosala
mo-sala mosusu ya Nzambe. Bozali kotika bisambo to kotanga minkanda, to
bozali kotika esika ya kimia mpo na kosalisa mobola, oh, bino bana na ngai,
bosengeli koyeba te misala yonso oyo ezali ko-salela Nzambe.
Kopesa formation na banganga Nza-mbe, Vincent amoni yango mosala ya
makasi, ya kosala yango mbangu, mpa-mba te azali koloba : Ezalela ya mabe
ya banganga Nzambe ezali ntina ya ko-kweya ya Eklezia ; na ndenge banganga
Nzambe bazali, na ndenge wana mpe bato bazali.
Santu Vincent atali banganga Nzambe lokola bato bazali kosalisa baninga.
Toyoka ye : Eloko mosusu ezali te oyo ekokani na Nsanto elamu, lokola oyo :
kosangisa liboso makasi, mayele mpo na molimo na yo, na kati ya bisambo,
na kotanga minkanda, na kofanda na esika ya kimia, mpe na nsima kokende
na kokabana na bato mosusu bilei oyo ya molimo.
Toyoka maloba ya Concile Vatican II : kotika babola, kotala bango mpamba
eza-li kouta na bato bazali koluka bomengo, na banzela yonso. Toyoka maloba
ya santu Vincent na banganga Nzambe na ye : bobengami ( vocation ) na bino
ya-ngo oyo : kokende, kasi na paroisse mo-ko te, kasi na mokili mobimba ;

Bomoi bwa Basantu

21

Frres des Ecoles Chrtiennes bazalaki 300 na ntango Jean Baptiste de la Salle
akufaki. Sikawa bakomi 8000 mpe bazali kosala na mokili mobimba. Na 1950,
Papa Pie XII akomisi santu Jean Baptiste de la Salle Mobateli ya batei bakristu
yonso.
Losambo : Tosenge mposa ya kosalela ba-jeune. Tolakisa na santu Jean
Baptiste de la Salle batei yonso : asambela mpo na bango.

11 avril :
Santu Stanislas, episkopo mpe martiro
(1030-1079). Bokundoli
Stanislas abotami na Pologne na 1030. Fanda mpe kumisa Nzambe, oyo
maloba ya tata na ye na mokolo Stanislas abotami, oyo mpe ntina ya nkombo
Stanislas. Ayekolaki liboso na Cracovie mpe na nsima na France, mbula nsambo
mobimba. Likambo yango esali te bondeko efanda na nsima na kati ya Eklezia
ya France na Eklezia ya Pologne. Na France, Stanislas amonaki ndenge nini
ba-bndictin babandaki kobongisa eza-leli ya bakristu, kolongola mimeseno
ya mabe, na bokuse kosala rforme ya Eklezia. Ntango Stanislas azongi na
Pologne asali makasi mpo na kobongisa mpe ezaleli ya bakristu. Na 1072,
Stanislas akomi episkopo ya Cracovie. Eklezia ya Pologne akokisi na ntango
wana bambula monkama banda 966 : oyo mbula ya ba-polonais bazwaki
batisimo.
Stanislas azali na mpiko, azali kobanga te. Abandi koloba na mo-konzi ya
Pologne : Boleslas : ezaleli ya yo malamu te. Ozali koboma bato basali mabe
te. Abimisi Boleslas na kati ya lingomba ya bakristu mpe apekisi ye kokota
na ndako Nzambe soko abongoli motema te. Oyo ntina ya Boleslas ye moko
akati Stanislas mot. Histoire ekoyebisa biso te na nsima Boleslas abongoli
motema, atiki bokonzi ya ye mpe akufi na kati ya couvent ya ba-bndictin.
Stanislas azali mobateli ya Polo-gne. Abundi etumba mpo na bose-mbo.
Lokola soldat ya Kristu, bibuneli na maboko, azali kobatela ye moko bato
oyo bazali koniokwama. Na monkanda ya santu Cyprien, ya biso tozali kotanga
na eyenga ya santu Stanislas, tozali koyoka : Tozali biso moko te ntango tozali
kobunda etu-mba mpo na boyambi ya biso. Nza-mbe azali kotala biso, banzelu

22

Bomoi bwa Basantu

na ye bazali kotala biso, Kristu azali kotala biso. Santu Paul azali koloba : Bokanga Bosolo bo nkamba o loketo, bolata Bosembo bo molato mwa etumba ;
mpe bo sapato bolata Mpila (Mpiko) o bopalinginyi Nsango Ela-mu ya boboto
(Eph 6, 14).

25 avril :
Santu Marc, mokomi ya Nsango Elamu
(akufaki na mbula 75). Eyenga
Marc moto ya liboso akomaki Nsango Elamu ya Yezu. Marc ako-maki
Nsango Elamu ya ye wapi, mpe na mbula nini ? Akomaki yango na Roma.
Kuna na Roma akomaki secrtaire ya apostolo Pierre. Pierre akufaki kuna na
Roma na mbula 64. Marc akomaki Nsango Elamu ya ye na nsima ya liwa ya
Pierre, akomi yango mpo na bakristu ya Roma, na liboso ya mbula 70.
Uto liwa mpe nsekwa ya Yezu, bapostolo, badiakono, na Paul, na Marc, na
bakristu mosusu bazalaki koteya bato na monoko. Malembe malembe, makambo mosusu ya Yezu azalaki koloba to kosala, bakomi yango na monkanda
mpo na kosalisa bato oyo bazali kopalinginia Nsango Elamu ya Yezu.
Toyebi nini ya bomoi ya santu Marc ? Marc azali elenge mobali oyo bazali
kobenga na nkombo ya Jean Marc. Azali mwana ya Maria, mpe Maria azala
moninga ya Pierre. Pierre akendeki na ndako ya Maria, mama ya Jean oyo
bazali kobenga Marc. Bato mingi bakutani kuna mpe bazali kosambela Nzambe
(Actes 12, 12). Marc abandaki kokende na santu Paul na esanga ya Chypre.
Marc aboi na kolanda lisusu Paul. Kasi na nsima Marc akei kotala Paul azali
na boloko na Roma. Paul atindi ye lisusu na ko-tala bakristu bazali na Asie
Mineure (Turquie) (Col 4, 10). Na nsuka Paul abengi ye lisusu na Roma. Paul
azalaki koloba na Timothe : Kama-ta Marc, yaka na ye nzela yoko, zambi
akoki kosalisa ngai malamu awa (2 Tim 4, 11). Pierre azali na ntango wana na
Roma. Na monkanda na ye ya liboso (1 Pierre 5,13) akomi boye : Bandeko ya
Eklezia ezali awa na Babilone (Roma) batindi bino mbote. Nzambe aponaki
bango lokola apo-naki bino. Marco, mwana na ngai, atindeli bino mbote lokola.
Makambo mosusu ya bomoi ya Marc toyebi yango malamu te. Batu mosusu
bazali koloba : Marc ateya-ki Nsango Elamu ya Yezu mpe na Alexandrie
(Egypte). Akufaki mpe wana.

Bomoi bwa Basantu

91

Santu Bde alobi : Moto oyo akofanda na nsima apostolo mpe motei ya
bapa-gano abendi na nsima na ye, ntango abongoli motema, molongo mobimba
ya basumuki, na nzela ya libiki. Kalaki oyo ya mpako, mosumuki, mpe na
nsima missionnaire, akomi Nsango elamu ya Yezu na molongo ya kitoko. Ye
moyuda, oyo bayuda mosusu lokola bafariseo bazalaki koboya, akomi moyuda
oyo aleki ba-vangeliste mosusu, mpamba te ye moto akotisi na Nsango elamu
ya ye mambi ebele ya Bondeko ya kala.
Na ndakisa ya santu Matthieu toluka mayele ya motei ya mobeko : soko
ako-mi kondima bokonzi bwa likolo azali lokola nkolo wa ndako azali na
biloko mingi ; o kati ya biloko bya ye, akopono biye bya sika mpe biye bya
kala ( Mat 13, 52 ).

27 septembre :
Santu Vincent de Paul, nganga Nzambe
( 1581-1660 ). Bokundoli
Vincent abotami na 1581 na France, na kati ya libota ya basali ya bilanga.
Mosala ya liboso ya Vincent : kokengele bangulu ya tata na ye. Alingi mosala
wana te. Aluki nzela ya koyekola. Azali na mbula 19 ntango akomi nganga
Nza-mbe. Aluki esika moko ya kitoko mpo na kosalisa mpe libota na ye.
Ndenge wana akomi na Paris. Kuna abandi kosala mosala na kati ya ndako ya
mwasi mo-konzi ya France. Na nsima akomi mpe cur mpe motei ya libota
moko ya lo-kumu.
Na ntango wana akutani na bato mibale ya Nzambe, baye basalisi ye na
koyeba nini oyo mosala ya nganga Nzambe. Bato mibale wana : Pierre de
Berulle na santu Franois de Sales. Vincent akomi mpe aumnier ya bato bazali
koluka nkai na bamasuwa, lokola baombo. Amoni nde-nge bato wana bazali
komona mpasi, bayekoli te, bayebi makambo ya Nzambe te. Vincent mpe
abandi kosala na paroisse mosusu : kuna amoni bato ya mboka bazali kofanda
na kati ya mpasi mpenza : bokono, bobola, bozangi koyekola, bozangi koyeba
makambo ya Nzambe. Vincent abaloli motema, ye mpe alaki elako te :
nakomipesa na Nzambe mpo na kosalisa babola.

90

Bomoi bwa Basantu

ma-lamu ya moyekoli ya sika : Levi alambeli Yezu limpati linene o ndako ya


ye. Ba-futisi mpako bayike na bato basusu bazalaki na bango elongo ( Luc 5,
29 ).
Na mbula 125, mokristu moko, Papias akomi boye : Matthieu atii na
molongo maloba ya Yezu, na monoko ya ba-hbreu. Mpe na nsima, Origne,
oyo akufi na 254 alobi boye : Matthieu aza-laki mokomi ya liboso ya Nsango
elamu, akomi Nsango elamu na ye mpo na ba-kristu bauti na ekolo ya bayuda.
Bato mosusu balobi te santu Mat-thieu atei Nsango elamu na Perse ( Irak ),
na Syrie, na Ethiopie. Kuna na Ethiopie babomi ye mpe.
Losambo ya eyenga ya santu Matthieu eyebisi biso motema ngolu ya
Mokonzi Yezu, oyo aponi mofutisi mpako mpo na kokomisa ye apostolo. Santu
Bde alobi : Ntango Yezu alobi na ye : landa ngai, Yezu alobi te te : otambola
na nsi-ma ya ngai, kasi : ofanda lokola ngai, mobola.
Na Evangile na ye, Matthieu azali kotia Eklezia na liboso. Nkombo ya
Eklezia ezali kobima mingi na minkanda ya Bondeko ya sika, kasi na baEvangile ezali kobima na Evangile ya santu Mat-thieu, mbala misato : Na
Matthieu 16, 18, Yezu alobi na Pierre : Bongo ngai nayebisi yo : nkombo ya
yo Petro, lokola te Libanga ; mpe o libanga liye nako-tonga Eklezia ya ngai,
mpo na kolakisa lisanga ya bakristu oyo etongami na likolo ya libanga oyo
ezali Pierre. Na Mat 18, 17 tozali kotanga : Soko moto asali mabe mpe aboi
koyoka bango ( banzene-neke ), boyebisa likambo yango na Ekle-zia. Soko
aboi mpe koyoka lisanga ya Eklezia, botala ye lokola mopagano to mofutisi
mpako.
Liloba oyo mpe : Bokonzi ya Nzambe ezali kobima na Nsango elamu ya
santu Matthieu mbala na mbala. Bokonzi oyo ezali na likolo, ezali kosalema
mpe awa na mokili lokola elili ya bokonzi ya likolo. Monkanda ya mibeko ya
bokonzi wana ezali mateya ya Yezu na likolo ya ngomba ( Sermon sur la
montagne 5, 3-11 ).
Matthieu azali na esengo ya koyamba Yezu na ndako na ye, yango wana
abengi baninga na ye : bafutisi mpako na bato ya masumu, elongo na Yezu na
bayekoli na ye. Yezu andimi na kokende na ndako ya moto ya mbindo, na
kokabana na bato wana bilei : ezali kolakisa motema ngolu ya Yezu, motema
ya moto azali kofu-ngola nzela ya libiki na basumuki.

Bomoi bwa Basantu

23

Toyoka nini santu Irne, episko-po ya Lyon (130-200) akomaki : Matthieu


abimisi na mokili ya ba-hbreu, na monoko na bango, Nsango Elamu moko,
na ntango Pierre na Paul bazalaki koteya Nsango Elamu na Roma. Na nsima
ya liwa ya bapostolo oyo mibale, Marc, moyekoli mpe secrtaire ya Pierre,
alekisi na bato, na kati ya monkanda, makambo oyo Pierre azalaki koteya

29 avril :
Santu Catherine ya Sienne, ngondo mpe motei ya Eklezia
( 1347-1380) Bokundoli
Catherine akufaki le 29 avril 1380, na ebandela ya grand schisme
dOccident , elingi koloba kokabwana ya monene ya bakristu ya Mputu
(1378-1417). Papa akomisi ye mosantu na 1461. Na 1939, Papa akomisi ye
mobateli ya Italie, mpe na 1970, Catherine akomi motei ya Eklezia.
Catherine Benincasa azalaki mwana ya ntuku mibale na mitano mpe ya
nsuka na libota na ye. Tata na ye azalaki teinturier (moto azali kope-sa langi
na bilamba). Mama na ye aza-laki mwana ya moto moko bazalaki kobenga
pote. Makambo ya mystique, tokoki koloba : ya boyambi monene, ezalaki
na Catherine uto bomwana na ye. Azali mpe na mayele mingi. Azali na mbula
mwambe ntango amipesi na Nzambe, na libala ya mystique na Yezu. Abandi
kofanda ye moko na esika ya kimia, mpo na kosambela mpe komiyokisa mpasi.
Akokisi mbula 20 ntango akoti na lingomba ya ba-laic ya santu Domi-nique.
Ndenge wana amonaki te ndoto alotaki : ngai nalingi kokoma dominicaine
mpo na koteya Liloba ya Nzambe mpe kozongisa na kati ya Eklezia baye
baboyaki eyamba ya solo, ndoto wana ekomi ya solo. Abandi kosangisa bato
penepene na ye. Bato wana bakomi libota ya ye , ye bango bakomi bamissionnaire. Na makolo bazali kokende na Catherine na bamboka ye na
bangu-mba ya Italie, ye na ndambo ya France. Bazali kotanga Liloba ya
Nzambe, bazali kolimbola yango, komaniola yango na kati ya motema. Bazali
koyekola mateya ya ba-mystique, bazali koyekola thologie ya santu
Thomas Ba-secrtaire misato bazali kokende nzela moko na Cathe-rine mpe
libota ya ye. Bazali kokoma makambo bazali komona, ya Catheri-ne azali
koloba. Catherine ayebi kokoma te.

24

Bomoi bwa Basantu

Na ntango wana ba-Papa bazali kofanda lisusu na Roma te, kasi bazali
kofanda na Avignon (France). Cathe-rine akomeli Papa azali na France
monkanda : Tata mosantu, oyoka liloba ya Yezu azali kolobela yo : batu bazali
kofanda penepene na yo bazali kobebisa bato bazali kofanda na ngai o likolo
Yango wana, ozonga na Roma, na kiti na yo, oumela te. Na 1376, Catherine
na libota na ye bakomi na Avignon. Papa, na nsima ya sanza misato azongi na
Roma.
Na 1378, Eklezia ekabwani : ba-kristu mosusu bazali kolanda Papa atikali
na Roma, bakristu mosusu bazali kolanda Papa azongi na Avi-gnon. Catherine
asali yonso, akabi bomoi na ye na Nzambe na ntina te boyokani ezonga na
kati ya Eklezia. Catherine akufi na Roma, akokisi bobele bambula 33. Tee
ntango oyo Catherine azali kokoba mosala na kati ya Eklezia na minkanda
(lettres) azalaki kokoma na bato ya ndenge na ndenge, mingi mpe na nzela ya
buku na ye : Dialogue. Na kati ya buku oyo, Catherine azali kolakisa boyambi
na ye makasi na Nzambe, mingi na kati ya masolo na ye na Nzambe. Toyoka
bolingo ya moto moto ya santu Catherine na kokanisa mpasi ya Yezu : Yezu
ya malamu mpe ya boboto, ozalaki wapi ntango molimo ya ngai ezalaki
komona mpasi ya ndenge wana ? Ngai nazalaki na nse ya motema na yo
oyo eyano ya Yezu zambi nakokende mosika te na bani-nga na ngai
nazalaki na kati ya motema ya yo.
Maloba ya nsuka ya bomoi ya ye : Moninga na mono ya motema (mon
Bien-aim), ozali kobenga ngai, ngai oyo ! Nazali koya, na matomba (mrites)
te, kasi na ngolu ya yo kaka, ye na nguya ya makila na yo.

Bomoi bwa Basantu

89

baepiskopo misato na banganga Nzambe nsambo ya France. Bamartiro


bakufaki : basusu na 1839, basusu na 1846, basusu na 1866 mpe na 1867.
Andr Kim Taegon abotami na libota ya lokumu na Core. Tata na ye :
Ignace akufi mpe liwa ya martiro, na 1821. Mi-nkanda mibale ya Andr Kim
ekomeli biso : moko ya mbula 1846, ntango azalaki na boloko. Atindi
monkanda na Vicaire Apostolique oyo akulisi ye bo-nganga na Macao ( Chine
). Monkanda mosusu atindi yango na bandeko ba-kristu ya Core. Santu Andr
Kim Tae-gon azali nganga Nzambe ya liboso ya Core mpe martiro ya liboso.
Eklezia, na ezalela na ye, asengeli kopalinginia Nsango elamu ya Yezu.
Concile Vatican II azali koloba : Eklezia ya Nzambe atindami na bapagano
mpo na kofanda kisakramento ya libiki ya bato yonso. Eklezia oyo azali na
nkombo ya catholique, na ezalela na ye azali kotosa mobeko ya Mozalisi ya
Eklezia, yango wana Eklezia, na mpiko yonso azali kopalinginia Nsango
elamu na bato yonso. Eklezia azali koteya biso te bo-martiro ezali ngrasia
monene ya Nzambe, elembo eleki kitoko ya bolingo ya moto mpo na Nzmbe.
Bomartiro ezali kosala te, mbuma oyo ekwei na mabel ebota mbuma mingi
( Jean 12, 24 ).

21 septembre :
Santu Matthieu, apostolo ya Yezu
mpe mokomi ya Nsango elamu. Eyenga
Ba-Evangile elakisi biso Matthieu lo-kola mofutisi mpakko ( Mat 9, 9 ).
Azali mwana ya Alphe, mbele azali moto ya mboka Capharnaum, mbele
mpe ndeko ya apostolo Jacques, mpo Jacques mpe azali mwana ya Alphe.
Nkombo ya Matthieu, Matthaios elakisi : Likabo ya Nzambe. Babengi ye mpe
Levi. Mosala na ye nini ? Kofutisa bato mpako mpo na bato ya Roma, baye
bazali banguna ya bayuda. Mosala oyo ekomisi ye moto ya bosoto, moto ya
masumu, yango wana bayuda bazalaki koboya ye na lisanga na bango.
Yezu oyo ayei kobenga bato ya bo-sembo te kasi basumuki, mpo te babongola motema ( Luc 5, 32 ), ntango abe-ngi Matthieu, Matthieu ayoki esengo
ya solo mpe alandi Yezu. Santu Luc ayebisi biso te ntango Yezu abengi ye,
atiki binso, atelemi mpe alandi ye ( Luc 5, 28 ). Santu Luc alakisi motema ya

88

Bomoi bwa Basantu

Cyprien akufa na etumbu ya mbeli. Cyprien azongisi : Deo gratias : Matondo


na Nzambe.
Na monkanda ya Cyprien na Papa Corneille tozali kotanga : Okundola ngai,
mpe ngai nakokundola yo, tozala motema moko, makanisi ndenge moko, moto
na moto na esika na ye tosambelana biso na biso. Tokutola mpasi mpe bobangi na biso na lisalisi ya bolingo biso na biso.
Na monkanda ya Cyprien : Likolo ya bomoko ya Eklezia ( Sur lunit de
lEglise ) tozali kotanga lisusu : Moto moko te akoki kofanda na Nzambe
lokola tata, soko afandi na Eklezia te lokola mama. Soko moto akoki kobika
na li-banda ya masuwa ya No, moto mpe akoki kobika na libanda ya Eklezia
Bato ya Kristu bakoki kofanda ya koka-bwana te. Yango wana elamba ya Kristu
( tozali kotanga na Jean 19, 23-24 : Awa basoldat babaki Yezu o kuruse
bakamati bilamba bya ye, mpe bakaboli byango na biteni binei : soldat moko
moko azwa eteni. Bakamati mpe monkoto mwa ye molai, motongama, basoni
mwango te. Basoldat balobani : Topasola mwango te ; kasi tobete mbese soko
nani akozwa mwango.) bakoki kopasola yango te na bato oyo bafandi na yango.
Ezali elamba ya kokabwana te, ezali elamba moko, ezali elembo ya boyokani
mpe ya bo-moko ya libota ya Nzambe. Na mobo-mbamo ya elamba oyo, mpe
na elembo na yango, Kristu alakisi polele bomoko ya Eklezia.

20 septembre :
Basantu Andr Kim Taegon, nganga Nzambe,
Paul Chong Hasang, na baninga na bango ( bakufaki na
kati ya bambula oyo : 1839-1867 ), bamartiro. Bokundoli
Andr Kim Taegon na Paul Chong Ha-sang bakomi basantu, elongo na
bamartiro mosusu 111, na 1984, ntango Papa Jean Paul II akendeki na Core
du Sud ( Asie ). Na mokili ya Core, Nsango elamu ya Yezu ebandi kokota na
ebandela ya bambula 1600, na lisalisi ya bakristu mo-susu ya mpiko, bazali
banganga Nzambe te, bobele ba-lac. Basali yonso mpo na kobanda na lisanga
ya bakristu. Lisanga wana elekisi mpe boyambi na Yezu na bana na bango tee
na ebandela ya bambula 1800, ntango ba-missionnaire franais bakoti na
Core. Bamartiro oyo bazali penepene na bango yonso ba-coren, longola

Bomoi bwa Basantu

25

Mai

1er mai :
Santu Joseph, mosali Bokundoli
Mokolo ya yambo ya sanza mai ezali eyenga ya bato ya mosala. Mpo na
kokotisa na kati ya mosala makanisi ya Nzambe : mosala ezali eloko ya lokumu
mpe ya monene, Papa Pie XII asali eyenga ya santu Joseph, mosali.
Liloba ya ki-grec : tekton, ya biso tobongoli na :mokabinda (charpentier),
elakisi moto azali kosala mosala na mabaya, na mabaya mpe na bibende, elakisi
mpe moto azali kotonga ba-ndako. Santu Joseph azalaki mokabi-nda. Mokolo
moko bato bakamwi mpo na bwania mpe makamwisi ya Yezu, balobi : Ye
mwana ya mokabinda te ? (Mat 13, 55). Mosala ya mokabinda Yezu azwi
yango, ntembe te, na tata na ye Joseph, ndenge tozali kotanga na santu Marc
(6, 3) : Yezu azali te mo-kabinda, mwana ya Maria ? Ntango wana mosala
ya maboko ezalaki eloko ya lokumu mpo na bato banso, ata mpo na batei, ata
mpo na banganga Nzambe. Tokanisa na santu Paul, apostolo ya Yezu, oyo
azalaki kosala mosala ya kotonga biema.
Toyoka maloba tozali kotanga na Talmud, buku ya bayuda bakoma kala
mpo na kolimbola Liloba ya Nzambe : Oyekola mosala ya maboko penepene
na koyekola na yo na eteyelo, mpe Moto azali kolakisa mosala ya maboko
na mwana ya ye te azali lokola akomisi mwana na ye moto ya mobulu.
Santu Paul alobi : Moto azalaki moyibi liboso, ayiba lisusu te, kasi andima
koyoka mpasi na mosala mwa bosembo, bongo akoka kokabela moto oyo
akeleli mwa eloko (Eph 4, 28). Totangi mpe na monkanda ya Concile Vatican
II : Eklezia na mokili ya ntango oyo : Bamibali na basi baye bazali kosala
mosala mpo ya kobika mpe kobikisa libota na bango basengeli kosepela mpe
kokanisa te mosala ya bango ezali kokoba na kobongisa mosala ya Nzambe,
mozalisi ya likolo na nse, abandaki Moto azali kobonzela Nzambe mosala
na ye, azali kosangana na mosala ya libiki ya Yezu salaka. Yezu apesi na mosala
lokumu monene, mpe ye moko asali mosala na maboko na ye na Nazaret.

26

Bomoi bwa Basantu

Tosenge na Misa ya santu Joseph mosali na kolinga mosala, na kosepela


mpe na mosala yonso tozali kosala.

2 mai :
Santu Athanase, episkopo mpe motei ya Eklezia (295 373)
Bokundoli
Santu Athanase, mobateli ya solo mpe ya mpiko ya boyambi na biso na
Yezu Kristu : Yezu azali Nzambe, abotami na Nzambe, Tata aboti ye, asali ye
te, ezaleli na ye ekokani na ezaleli ya Tata. Oyo ezalaki boyambi ya Athanase,
ezali mpe boyambi ya biso tee lelo, lokola tozali kosambela na Credo. Athanase
abotami na Alexandrie (Egypte) na 295. Alexandrie ezalaki engumba monene,
engumba ya misato na bokonzi ya Roma. Na 313 episkopo ya Alexandrie
abengi Athanase na kovanda penepene na ye. Mosika te, Athanase akomi
diakono. Na 320 Athanase akomi monkanda, esika alobi : Mosala ya libiki ya
biso ezali ya moto akufa te, kasi ya moto azali na bomoi, azali Nzambe.
Mpo na nini akomaki boye ? Na ntango wana, nganga Nzambe moko, nkombo
te Arius, abandi kobima na Alexandrie mpe koloba : Yezu azali Nzambe te
lokola Tata, Yezu azali uto ntango yonso te, akelami na Nzambe Tata, azali
ekelamo ya liboso Nzambe Tata. Ma-teya oyo ya lokuta, bakristu mingi, na
baepiskopo mpe babandi kondima yango. Arius alobi : Yezu ye moko alobi na
Nsango Elamu ya santu Jean, 14, 18 : Tata aleki ngai. Kasi Arius abosani na
kotala bisika mosusu, wapi Yezu alobi te : ye akokani na Tata. Mo-bulu ekoti
na kati ya Eklezia. Empereur Constantin abengi baepiskopo na mpe bantoma
ya Papa na mboka Nice (Turquie), na 325, mpo na kokata likambo yango.
Ezalaki Concile ya liboso ya Eklezia. Athanase akei kuna mpe, lokola diakono
mpe secrtaire ya episkopo ya Alexandrie. Bato yonso bakamwi na mayele na
ye, ndenge asambi na mpiko yonso eyamba ya Eklezia. Na nsuka, Concile
alobi mpo na Yezu : Yezu azali Nzambe, abotami na Nzambe, Tata Nzambe
aboti ye, asali ye te, Yezu akokani na Tata.
Mbula misato nsima ya Concile ya Nice, Athanase akomi episkopo ya
Alexandrie. Bambula 45 aumeli na mosala wana, kasi bambula 17 afandi na
mboka wana te. Babengani ye mbala na mbala, mpamba te, bakristu na

Bomoi bwa Basantu

87

Mosika te, minioko ebandi lisusu. Babengani Papa Corneille na Roma.


Mosika te mpe Papa akufi, na 253.
Cyprien abotami na Carthage ( Tu-nisie, Afrique du Nord ). Akomi motei
monene mpe ya lokumu. Azali na mbula 25 ntango akuli batisimu. Na 249,
Cyprien akomi episkopo ya Carthage. Ntango ya minioko ya empereur Dce
akimi, kasi azali kotindela bakristu na ye minkanda mpo na kolendisa bango.
Na 251, azongi na Carthage. Mambi ya bakristu baboi eyamba na bango (
lapsi ) epesi ye mpasi mingi, kasi, elongo na Papa Corneille, alimbisi bango,
azongisi bango na kati ya Eklezia. Kasi basusu baboi, balingi te bakristu wana
bazonga na kati ya Eklezia.
Makambo mosusu eyokisi Cyprien mpasi na bambula wana : Bakristu oyo
baboi Eklezia ya catholique bakoki nde kopesa batisimu na moto alingi akoma
mokristu ? Cyprien, elongo na baepis-kopo ya Afrika balobi te : batisimu
wana ezali ya solo te. Kasi Papa Etienne na Ro-ma alobi : batisimu ezali ya
solo, mpamba te bato bazalaki liboso ya ngai bandimaki batisimu wana mpe.
Koswana wana elingaki kokoma likambo ya mabe, kasi ntango Papa, na 257,
mpe Cyprien na 258 bakufi, makambo yango esili mpe.
Losambo ya Misa ezali kokumisa ba-santu Corneille na Cyprien, bakengeli
ya malamu mpe ya mpiko mingi. Toyoka Cyprien akomeli Papa Corneille
monka-nda : Tozali kosala Eklezia moko kaka, mitema ya biso ezali ya
kosangana, bomoko ya biso ekoki kokabwana te ; episkopo nani akomona
esengo te na lokumu ya ndeko mosusu episkopo azwi ? Akomona te lokumu
wana lokola ya ye moko ?
Toyoka mateya ya Cyprien mpo na bomoko ya Eklezia : Episkopo azali na
kati ya Eklezia, mpe Eklezia ezali na kati ya episkopo. Moto azali koyokana
na episkopo te, azali na kati ya Eklezia te. Bomoko oyo ezali kosalema na
Ukaristia esantu. Bomoko ya baepiskopo yonso na boyambi mpe na boyokani,
na lisanga na kiti ya Roma ( Papa ) ezali kosala bo-moko ya Eklezia mobimba.
Eklezia ya Pierre ezali elembo ya lisanga ya baepis-kopo bango na bango.
Empereur Valrien abandi koniokolo lisusu bakristu na 257. Babengani
bongo Cyprien na Carthage. Na nsima babengi ye lisusu. Cyprien alobi : Eleki
malamu, episkopo andima mpasi mpo na mokonzi na mboka ya Eklezia ya
ye. Bakangi Cyprien mpe bakitisi ye na liwa. Bakomi na libaya : Totindi te

86

Bomoi bwa Basantu

na mpasi ya ye : opesa na Eklezia na yo na kosangana mpe na mpasi ya Kristu


mpo na kokabana na ye nkembo ya nsekwa.
Na losambo ya libonza tozali koloba : E Nzambe, olingi te santu Maria
akoma mama na biso ntango atelemi penepene na kuruse ya Yezu. Ezali wana,
na nse ya kuruse ya bomama ya Maria epalangani na bakristu yonso, baye
babotami na mopanzi etobwani ya Yezu.
Na losambo nsima ya Komunio : Na kokanisa bolozi ya Maria, toyeba kokokisa na nzoto ya biso mpasi oyo ezangi mpo na libiki ya bato. Santu Paul alobi
boye na bakristu ya Colosses : Sikawa nasepeli mpo na mpasi eye nazali koyoka
mpo ya bino ; nakokisa bongo na nzoto ya ngai mpasi Kristu ayokaki mpo na
Nzoto ya ye, yango nde Eklezia ( 1, 24 ).
Losambo : Tosenge na mama ya Yezu asalisa biso na kokanga motema na
ntango ya mpasi, mpe na kosangisa mpasi ya biso na mpasi ya Yezu.

16 septembre :
Santu Corneille, Papa ( akufaki na 253 ), na santu Cyprien,
episkopo ( akufaki na 258 ), bamartiro. Bokundoli
Corneille akomi Papa na 251. Mbula mobimba bakokaki kosangana te mpo
na kopona Papa ya sika, empereur Dce azalaki koniokolo bakristu makasi.
Empereur azali koloba : Soko nayoki te moto moko atomboki na ngai, mpe
abandi kobunda na ngai, nasengeli komona mabe, kasi ngai nazali komona
mabe ya koleka soko namoni episkopo azali kofanda na Roma. Ntango
Corneille akomi Papa, makambo ya mpasi ezalaki mpo na ba-kristu oyo
baboyaki boyambi na bango na ntango ya minioko, mpe babonzeli banzambe
ya Roma mabonza. Bazalaki kobenga bango : lapsi, lokola : bato ba-kwei.
Babandi komituna : tosala na bango nini ? Tolimbisa bango mpe tondima bango
lisusu na kati ya Eklezia ? Papa ali-ngi koyokela bango mawa mpe kolimbisa
bango. Kasi nganga Nzambe moko, Nova-tien, aboi na koyamba bango. Mpo
na yango, na Roma, na France mpe na Espa-gne eklezia mosusu esalemi, oyo
aboi koyokana na Papa. Eklezia wana ezwi nkombo : ya bato ya bopeto ( des
purs ). Nani asalisi Papa Corneille na etumba ya molimo na Novatien mpe na
bakristu na ye ? Cyprien, episkopo ya Carthage, na Afrique du Nord. Kuna
mpe eklezia ya ba-bopeto ezali.

Bomoi bwa Basantu

27

baepiskopo na ba-empereur mosusu bakobi na kolanda mateya ya Arius.


Athanase akomaki mikanda ya kitoko. Yango wana akomi mpe motei ya
Eklezia.

3 mai :
Basantu Philippe na Jacques, bapostolo ya Yezu.
Eyenga
Mpo na nini tozali kosepela ba-postolo oyo mibale na mokolo moko ? Na
mbula 565, babenisi ndako Nza-mbe ya bapostolo 12 na Roma. Mokolo wana
batii na nse ya altare ya ndako Nzambe mikuwa ya bapostolo Philippe na
Jacques.
Philippe : mboka na ye Betsaida, ezali mpe mboka ya Andre na Pierre (Jean
1, 44). Philippe alobi na Na-thanael : Tomoni moto oyo Moise akomaki mpo
ya ye o buku ya Mobeko, oyo baprofeta bayebisaka : Yezu, mwana wa Joseph
wa Nazaret (Jean 1, 45-46). Mokolo mosusu Yezu atunaki Philippe :
Tokosomba mampa wapi mpo te bato baye balia ? Philippe azongiseli ye :
Ata tosombi mampa ma denario nkama ibale, makokoka te mpo te moto na
moto azwa mwa ndambo (Jean 6, 5-7). Ntango Yezu akoti na nkembo, na
Yerusalem, bato mosusu bazalaki bayuda te bapusani penepene na Philippe
mpe batuni ye : Tata, tolingi komona Yezu (Jean 12, 20). Na mpo-kwa ya
limpati ya nsuka ya Yezu na bapostolo na ye, Philippe alobi na Yezu : Mokonzi,
lakisa biso Tata, yango ekoki na biso (Jean 14, 8). Yezu apesi ye mpe eyano.
Philippe asakoli Nsango Elamu ya Yezu na Asie Mineure (Turquie), babaki
ye na kuruse mpe asukisi ndenge wana bomoi ya ye.
Jacques : Babengi ye Jacques ya Leki. Bato mingi bazali koloba te : Jacques
azali ndeko ya Mokonzi Yezu, lokola tozali kotanga na Gal 1, 9 : Paul alobi :
Namonoki apostolo mosusu te, tika se Yakobo, ndeko ya Mokonzi. Yezu
mpe amilakisi na Jacques. Santu Paul alobi : Yezu abimeli Yakobo, na nsima
abimeli bapostolo basusu banso (1 Cor 15, 7). Santu Jacques akomaki
monkanda ya biso tozali kotanga ya santu Jacques. Ndenge bato ya kala
balobaki, babomaki Jacques na Yerusa-lem, batombolaki ye na motondo ya
tempelo mpe babwaki ye na nse.

28

Bomoi bwa Basantu

Na Nsango elamu ya lelo tokotanga maloba ya Philippe : Mokonzi, lakisa


biso Tata, yango ekoki na biso. Yezu alobi na Philippe : Moto amoni ngai,
amoni Tata (Jean 14, 6-14).
Na monkanda ya santu Jacques (1, 27) totangi boye : O miso ma Nzambe
Tata wa biso, losambo la solo loye lozali na mbeba te, lozali boye : kosa-lisa
bana bitike na basi bazenge, ntango bazali koyoka mpasi, mpe kotikala motema
peto o makambo ma mokili. Na Jacques 2, 14-17 tokotanga lisusu : Bandeko,
soko moto alobi : Nazali na boyambi, kasi misala miye eyamba ekotindaka,
akosala myango te, boya-mbi bwa ye bokobikisa ye, solo ? Nda-kisa : Soko
ndeko mobali to mwasi azali na elamba te, biloko ya kolia mpe te, mpe moto
moko wa bino alobi na ye : kende malamu, kenge koyoto mto mpe lia
malamu, kasi akabeli ye biloko te biye bisengeli na nzoto ya ye, maloba ma
moto ona mazangi ntina te ? Se bongo soko boyambi bwa moto bomononi na
misala te, boyambi bwa ye bosili bokufi.

14 mai :
Santu Matthias, apostolo ya Yezu.
Eyenga
Tozali kosepela eyenga ya santu Matthias na eleko ya Pasika, zambi Matthias
aponomi apostolo ya Yezu na nsima ya nsekwa ya Yezu, mpe na liboso ya
Pentekoste, ndenge tozali kotanga na Bikela ya bapostolo 1, 15-26. Matthias
(Likabo ya Nzambe, na hbreu, Dieudonn, na franais) azala-ki moyekoli ya
Yezu, mpe Batata mo-susu ya Eklezia balobaki te nkombo ya ye na Evangile
ezali : Zache (Luc 19). Na Bikela ya bapostolo, Pierre apesi mateya na ye
liboso ya kopona Matthias. Bapostolo bayebi te bazali lisanga ya bato
baponami na Yezu, na ntalu ya zumi na mibale, mpo na ko-koba mosala na ye.
Batikali bobele zumi na moko, mpo Yudas azali na bango lisusu te. Basengeli
koluka moto mosusu na kokitana na esika ya moto ateki Yezu. Ntalo ya zumi
na mibale emonani na Bikoma bisantu lokola ntalu ya santu. Toyoka maloba
ya Yezu na Mat 19, 28 : Ya solo solo, nalobi na bino : bino bato bolandi ngai :
mokolo mokili mokobongwana, ntango Mwana wa moto akofanda o ngwende
ya nkembo, bino mpe bokofanda na kiti zumi na ibale mpo ya koyangela

Bomoi bwa Basantu

85

Esengo na yo, kuruse, mpo obongi komeme mbuma oyo ya bomoi, mpe
bato na lisanga bazali kobete yo maboko na lilonga na yo. Losako, kuruse
esantu ! Losako, bobele yo elikia ya biso !
Na eyenga oyo ya kuruse esantu, tokanisa Liloba ya Yezu : Mpe ngai, mokolo
bakotombola ngai, nakobenga bato banso epai ya ngai ( Jean 12, 32 ).
Losambo : O kuruse, lakisa biso mayele ya bolingo.

15 septembre :
Bokundoli ya santu Maria, mama ya mpasi
Bakristu babanda kala na kokanisa mpasi ya mama ya Yezu. Eklezia atii
bo-kundoli oyo na mokolo ya kolanda eyenga ya Kuruse esantu mpo na
koyebisa biso : tala ntina ya mpasi wana ! Mpamba te, nani moto akoti na kati
ya mpasi ya Yezu lokola mama na ye ? Nani afandi penepene na mwana na ye,
banda mbo-tama tee kuna na nse ya kuruse, lokola ye ? Yezu ayei mpo te
bato bapona ye, to baboya ye, Yezu ayei komema mbeli ya kokabola. Toyoka
maloba ya Simon na kati ya tempelo ya Yerusalem ( Luc 2, 34-35 ) : Simeoni
abenisi bango mpe alobi na Maria, mama wa ye : Tala ! Mwana oyo akozala
ntina ya bokiti to ya boto-mbwami bwa bato baike o Israel ; bako-bete ntembe
mingi mpo ya ye, mpo te makanisi mabombami o mitema mya bato ebele
mayebana. Bongo, mpasi ekotubola motema mwa yo lokola mompanga,
mama.Na mpasi ya Yezu, mama na ye ayoki nini na kati ya motema na ye ? Concile
Vatican II alobi : Maria atelemi na nse ya kuruse, ayoki mpasi mingi elongo
na Mwana se moko na ye, asangani na mote-ma na ye ya bomama na libonza
ya Mwa-na na ye, andimi na bolingo libonza ya moto abotami na ye. Maria
asangani na Mobikisi na ndenge ya koleka ndenge yonso mosusu, akoti na
mosala ya libiki ya bato ya koleka bato yonso mosusu.
Eklezia abengami, na ndakisa ya Maria na kukabana malozi ya Yezu, na
mpe nkembo na ye. Elongo na Maria na nse ya kuruse, biso tokumbamela
Mo-bikisi ya bato.
Na losambo ya ebandela ya Misa ya lelo tozali koloba boye : E Mokonzi,
oli-ngaki te mama na yo, oyo atelemi pene-pene na kuruse ya Yezu, asangana

84

Bomoi bwa Basantu

te, mpo nase-ngeli kosala yango. Solo, mawa na ngai, soko nasangeli Nsango
Elamu te !

14 septembre :
Kuruse Esantu
Eyenga
Na ntango santu Hlne, mama ya empereur Constantin, azwi na Yerusalem,
na likolo ya ngomba Kalvario kuruse ya Yezu, ye, na lisalisi ya mwana na ye,
atongisi ndako Nzambe na esika wana. Na kati ya ndako Nzambe monene
wana, esika ya lilita ya Yezu ekoti mpe na kati. Babengi yango : ndako Nzambe
ya Nse-kwa. Babenisi yango le 14 septembre 335. Oyo ebandela ya eyenga ya
lelo, ekamati nkombo ya : Botomboli ya kuruse ya ntalo mpe ya bopesi bomoi
( Exaltation de la prcieuse et vivifiante croix ), mpa-mba te, na eyenga oyo
bazalaki kotombola kuruse ya Kristu mpo te bakristu baku-mbamela yango,
na kolakisa lilonga ( vic-toire ) ya Yezu na liwa ya ye, mpe bopesi bomoi na
bato. Eyenga ebandi kopa-langana na Constantinople mpe na nsima na Eklezia
mobimba.
Yezu Kristu abonzi na likolo ya kuruse libonza na ye mpo na kobikisa bato
na masumu na bango. Kuruse ezali mpo na bakristu elembo ya lilonga mpe ya
elikia ya kozwa libiki na Nzambe. Kuruse ezali eloko ya bato ya mokili bazali
koboya, kuruse ekomi lokumu mpo na biso. Soko nzete ya paradisu eboti
mpo na Adamo mbuma ya liwa, nzete ya kuruse eboti mpo na biso mbuma ya
bomoi, elingi koloba Kristu, na libiki mpe na nsekwa ya ye.
Toyoka nzembo ya bakristu banda kala bazali koyemba ( Vexilla regis ) :
Tala bendele ya Mokonzi na biso ezali kobeleme, na likolo na biso kuruse
ezali kongenge na kati ya mobombamo na yango, wapi, na nzoto na ye,
Mozalisi ya likolo mpe ya nse, bato babaki ye lokola moyibi na nzete ya
baombo. Nzete ya kitoko ezali kongenge, ezali kozingama na moi, balatisi yo
na elamba ya motane ya bokonzi. Baponi yo lokola nzete ebongi mpenza na
komeme nzoto oyo esantu santu mpe na kosimba biteni na yango. Kuruse ya
esengo, wapi ntalo ya kofuta bato ya mokili ekangemi ; mpo na yango, limfelo,
na bokonzi na yango bazali kolenge.

Bomoi bwa Basantu

29

mabota zumi na mabale ma Israel. Pierre ayebisi mpe ndenge moto akoki
koponama : asengeli kofanda na kati ya banzeneneke ya liboso ya bomoi mpe
nsekwa ya Yezu tee na Mbuta ya ye o likolo(Actes 1, 21).
Misa ya eyenga ya santu Matthias ezali koyebisa biso ndenge Yezu aponaki bapostolo na ye, ezali kolakisa biso mpe ndenge aponaki biso : Bino
boponi ngai te, kasi ngai naponi bino mpe nati-ndi bino bokende, bobota
mbuma, mpe mbuma ya bino iumela seko (Jean 15, 16).
Santu Matthias asalaki mosala wapi ? Toyebi yango malamu te. Ba-susu
balobi : Matthias akufaki na Yeru-salem, basusu : akufaki na Ethiopie. Na moto
oyo amemaki mbele Nsango elamu ya Kristu na Ethiopie, topesa na maboko
na ye Eklezia ya Afrika.

26 mai :
Santu Philippe Neri, nganga Nzambe (1515-1595).
Bokundoli
Philippe azwi nkombo ya apostolo ya Roma. Abotami na Florence (Italie).
Ayekolaki mingi. Ntango akokisi mbula 18, akomi na Roma. Abandi koteya
bana, mpo na kozwa mbongo ya kobika, azali kokoma ba-posie, koyekola
philosophie, thologie, kosa-lisa bakoni na hopital, kotala bato ya boloko.
Ezaleli ya ye etindi ye na ko-lakisa esengo, kosepelisa bato. Ntango wana
Roma ezalaki kofanda na kati ya masumu mingi, bapapa, baepiskopo mosusu
bazalaki kolakisa ndakisa mabe Martin Luther abimi na nta-ngo wana,
abandi koboya papa, baepis-kopo, ma mambi mosusu mingi ya eyamba ya
biso.
Philippe abandi kosala mosala na kati ya bilenge. Akeli lingomba moko,
esika bazali kosangana mpo na koku-misa Nzambe, mpo na kosalisa bakoni,
bampaya bazali koya na Roma. Na 1551 akomi nganga Nzambe. Na 1552
Oratoire ebandi : oratoire ezali esika ya kosambela, ya kopesa mateya, ya koyemba. Ye moko Philippe azali koyangela makita wana, kasi mambi yonso ezali
kosalema kuna na esengo, moto na moto azali koloba na ndenge azali komona na motema na ye, na boboto yonso. Oyo ebandela ya lingomba ya
banganga Nzambe, ya ba-sminariste bazali kofanda esika moko, bazali kosa-

30

Bomoi bwa Basantu

la mosala mpo na Oratoire. Lingomba oyo epalangani na Italie mpe na Mpoto


mobimba.
Na mosala na ye, Philippe azali koluka na kopesa kolongonu, makasi na
bomoi ya bakristu, na nzela ya boboto mpe esengo. Aluki kosala mosala mpo
na kobongisa motema ya bato, mpo te babalola motema na koyoka Liloba ya
Nzambe. Makambo ya libanda, ya komonana kitoko na miso ya bato, azalaki
koluka yango te. Azalaki komona te bato yonso bakoki kokoma basantu,
banganga Nzambe, ba-moine, ba-lac... Ntango azalaki koteya azalaki koloba
mambi ya bo-lingo, azalaki koloba mingi te mambi ya komiyokisa mpasi,
lokola bato bazalaki koloba mingi na ntango wana. Alingaki bakristu balekisa
ndelo te na makambo yonso, bato bavanda na limemia, na esengo.
Bazalaki kobenga ye moto ya koyengayenga mpo na Nzambe (vagabond
de Dieu), mpo azalaki kota-mbola tambola na balabala mpo na kosolola na
bato, kosalisa bango. Azalaki koloba na bato na ye: Esengo ezali kolendisa
motema, kosalisa moto na kotika nzela ya Nzambe te. Bozala na esengo kasi
bosala masumu te.
Liloba ya Nzambe : Bosepelaka o Mokonzi ntango inso. Nalobi yango
lisusu : bosepela ! (Phil 4, 4).

31 mai :
Eyenga ya Maria akei kotala Elisabeth (Visitation)
Tozali kosepela eyenga oyo nsima ya eyenga ya Anzelu apesi Maria nsango (25 mars) mpe na liboso ya eyenga ya Mbotama ya Jean Baptiste (24
juin). Maria azwi zemi na nguya ya Elimo Santu. Maria ayoki mpe te Elisabeth
azwi zemi na bobange na ye. Esengo ezalaki na Maria mingi. Akoyebisa nsango
oyo ya esengo na nani ? Nte-mbe te, Joseph akoyeba mambi oyo malamu
te Yango wana akanisi na ndeko na ye Elisabeth mpe akei mbangu kotala
ye na ndambo ya bangumba ya Yudea. Toyoka maloba ya Nzembo ya Salomon
(Cantique des Cantiques) 2, 8 : Nazali koyoka boli-ngo wa ngai, tala ye wana
azali koya, apoti mbangu o ngomba, mpe api-mbwi o ngomba ike. Na esengo
Eklezia azali kokundola ngondo Maria azali komeme na libumu na ye Mwana
ya Nzambe, mpe azali koke-nde kotala ndeko na ye Elisabeth mpo na kosalisa

Bomoi bwa Basantu

83

ndelo ya bato minene. Mwasi wana asali yonso mpo na kolongola Jean na
Constantinople mpe kotinda ye mosika. Ezalaki na mbula 403. Kasi mosika
mingi te na nsima, bandimi te azonga na Constantinople. Bato basepeli mingi
mpe bayambi ye na esengo monene. Basanza mingi te na nsima, empereur
Archadius alongoli ye lisusu. Atindi ye mosika, mpe na nsima atindi ye mosika
ya koleka. Na mpasi ya nzela mpe na ndenge bazalaki koyokisa ye mpasi,
akufi na nzela. Maloba na ye ya nsuka : Nkembo na Nzambe mpo na mambi
yonso. Amen.
Bandimbola ya Jean Chrysostome ya Bondeko ya kala mpe ya Bondeko ya
sika ezali mingi mingi. Jean apusi kolinga minkanda ya santu Paul. Azali
kotanga yango yonso, mbala mosusu mbala mibale na mposo moko. Azali na
mpiko ya koleka. Ntango babengani ye na Constantinople, amoni mpasi yango
lokola dikabo ya Nzambe, alobi : Napumbwi na esengo, mpamba te
namibombeli bomengo monene na kati ya mpasi. - Azalaki koloba na liboso
te babengana ye : nabangi te bobola, nalingi bomengo te, nabangi liwa te,
eloko nalingi yango oyo : kosalisa bino na kobongisa bomoi na bino.
Toyoka ye lisusu : Ukaristia esantu ezali koteya biso na komipesa na Nzambe
mpe komipesa na bato. Tala Kristu azali kokufa na liboso ya ndako na yo
Bikisa Kristu oyo azali na nzala, na boloko, na bolumbu. Komibosana biso
moko mpo na kokende kotala bato mosusu, oyo mobeko ya wolo mpo na
bakristu ( Rgle dor du chrtien : cest soublier soi-mme pour aller vers les
autres ).
Na monkanda moko ya santu Jean Chrysostome totangi boye : Nkombo ya
basantu esengeli kokota na ndako ya bino, na nzela ya nkombo ya bino bozali
kopesa na bana na bino, mpo te nkombo yango ezala liteya mpo na mwana
mpamba te, kasi mpe mpo na tata, mama na ye, ntango bango bazali kokanisa
te bazali tata, mama ya Jean, Elie, Jacob. Soko nkombo oyo epesami na mwana
mpo na boyambi na bino, mpe mpo na kokumisa baye bawei, soko biso topusi
kolinga bondeko ya bato ya bosembo, mpe biso totii na nsima bondeko ya
bankoko na biso, eloko oyo ekosalisa biso mingi, ekosalisa mpe bana na biso.
Oyo ezali te eloko ya mpamba, ezali eloko ya mosala mingi.
Na eyenga oyo ya santu Jean Chrysos-tome, tokanisa na Liloba oyo ya
Nzambe, na 1 Cor 9, 16 : Na bosangeli Nsango Ela-mu nalingi kozwa lokumu

82

Bomoi bwa Basantu

mokumba eleki mingi, bongo akokweya, kasi akangi monoko ; bilei ezali
malamu te, akangi monoko amileli te, ata moke, akokanga motema mpo
azali mpu-nda. Ndenge wana mosaleli ya Nzambe asengeli kofanda. Nzembo
73, 22-23 ezali koloba : Lokola zoba, nayebaki nti-na te, nakomaki lokola
niama o miso ma yo. Nzokande nazali ntango inso pene na yo te ?

13 septembre :
Santu Jean Chrysostome, episkopo mpe motei ya Eklezia
(349-407) - Bokundoli
Jean, Monoko ya Wolo = Chrysosto-me abotami na Turquie na 349 na kati
ya libota ya bakristu mpe bato ya lokumu. Tata na ye azalaki officier, mpe
mama na ye, Antousa, azali mwasi moko ya malamu mingi, akomi mpe
mosantu. Antousa azali na mbula ntuku mibale ntango mobali na ye akufi.
Ntango wana Jean azali na mbula 2. Mama akotisi Jean na eteyelo ye rhteur
Libanos, moto aye-bani mingi. Na 368 Jean akomi mokristu mpe akoti na
cole ya thologie. Banda 372 tee 378 Jean akomi moine mpe afa-ndi na esika
ya kimia ye moko. Kasi ayo-ki na motema te Nzambe azali kobenga ye azonga
na kati ya bato mpo na kosalisa bango na makambo ya Nzambe. Na 381 akomi
diakono mpe na 386 akomi nga-nga Nzambe. Abandi koteya na mboka
Antioche. Ba-homlie, elingi koloba bandimbola ya Liloba ya Nzambe ekomisi ye moto ya koyebana mingi na Eklezia ya Orient. Azali kolimbola Liloba
ya Nzambe mpe azali koluka ekota na bomoi ya mokolo na mokolo ya bakristu.
Azalaki kotuna : Liloba oyo ya Nzambe ezali kolakisa nini na bomoi na biso
bakristu ? Na ndenge Jean azali koteya esepelisi bato mingi. Azalaki
kobete lokola na fimbo motema ya bato ya ezalela ya mabe, mpe ya bato
minene mpo na mbongo na bango mingi. Azalaki kobunela babola etumba,
zambi azali kolinga bango mingi, akomi mobateli monene ya bango. Ye akoki
te komona bango to kokanisa bango ya kozanga ndako, ya kozanga bilamba,
ya kolenge mpo ya mpio, mpe ye azanga koyoka mawa mingi na motema.
Na 398, akomi patriarche ya Cons-tantinople, mboka mokonzi, esika
empereur afandi. Mokolo moko mwasi ya empereur azoki na motema na ye
mpo na homlie ya Jean, mpamba te Jean afundi makasi bomengo ya koleka

Bomoi bwa Basantu

31

ye, mpo na koyemba ngolu ya Nzambe, Mobikisi ya bato. Ezali eyenga ya


bokutani ya bana mibale bazali na libumu ya bamama na ba-ngo : ya Yezu
mpe Jean . Esengo ekoti tee na mwana Jean azali na libumu ya mama na ye,
aningani na kiese. Elimo Santu oyo alakisaki na Maria na kokende kotala
Elisabeth, alakisi mpe na ye na kolumisa Nzambe na nzembo ya Magnificat.
Maria ayembi mambi minene Nzambe asali. Alobi mpe : Ya solo, uto lelo
bato banso bakotanga ngai moto wa esengo, mpo Nzambe nta bokasi asali
ngai mambi manene (Luc 1, 49)
Santu Bde (673-735) akomi boye : Maria atondi na likabo monene ya
Nzambe, mto ya bolingo epeli na motema na ye mpo na mwana oyo, ya ye,
na esengo yonso, amemi na libumu na ye. Ye azali na ntina ya solo solo ya
koyoka nsai mpo na Yezu Ndenge wana, lokola biso bakristu tomeseni
koyemba mikolo yonso, na bisambo ya mpokwa, nzembo ya ngondo Maria
(Magnificat), yango ezali kopesa biso esengo monene. Eyenga oyo ya
Visitation etondi na malili ya kitoko, na mambi ya bomengo ya motema :
Maria, na bolingo na ye akei kotala Elisabeth ; bokutani ya bana mibale
babotami naino te ; nzembo ya Maria atondi na esengo

32

Bomoi bwa Basantu

Juin

1er juin :
Santu Justin, martiro (akufaki na 165). Bokundoli
Justin abotamaki na Naplouse (Pales-tine), na ebandela ya sicle ya mibale.
Baboti na ye bazalaki bapagano, bato ya mbongo. Justin ayekoli na biteyelo
ya philosophie, mpe ye moko akomi philosophe. Na ntango wana Justin abandi
koluka bosolo na kati ya biteyelo wana ya philosophie. Mokolo moko, moto
ya mayele, mpe mokristu abandi kopesa Justin toli, mpe alobi na ye : Oyekola
Bikoma bisantu ya Bondeko ya kala !, alobi na ye mpe : ozali koluka na koloba
malamu malamu, kasi ozali moninga ya mosala mpe ya bosolo te. Ndenge
wana, Justin ntango akokisi mbula 30 akomi mokristu. Atikali lac, kasi azalaki
koloba : tozali na lotomo ya koyebisa na bato mambi ya boyambi na biso.
Akei na Roma, afungoli eteyelo ya philosophie. Ecole na ye ebandi koyebana
mingi. Justin akomaki minkanda ya philosophie, minkanda misato etikali tee
lelo : ba-Apologie mibale, na Dialogue na moyuda Tryphon. Na minkanda
wana, Justin alakisi te, na nzela ya bokomi moto ya Liloba (elingi koloba :
Yezu) bosolo yonso emonani na biso bato. Minkanda ya Justin ekoyebisa biso
mpe ndenge nini bakristu ya ntango wana bazalaki kofanda, boyambi na bango,
ndenge nini bakatekumene bazalaki kolanda malongi mpo na kozwa batisimu,
ndenge nini bakristu bazalaki kosambela Ukaristia esantu.
Empereur Marc Aurle abandi konyokolo bakristu na ntango wana. Justin
aboi na kobonzela banzambe ya bapagano mabonza. Justin alobi na Prfet ya
Roma : moto moko te, soko azali na mayele, atiki bosolo mpo na kolanda
lokuta. Bakati mot ya Justin. Ezalaki na mbula 165.
Toyoka eteni ya Apologie ya Justin : Tozali koloba te Kristu abotami mbula
150 eleki, na ntango ya gouverneur Quirinius. Mpe na nsima abandi koteya,
na ntango ya Ponsio Pilato, mateya na ye. Bakoki koloba te : bato oyo
bafandaki na bambula ya kala, ntango Kristu abotami naino te, bango bazali
na mbeba te, masumu te. Boyoka eyano biso tokopesa : Kristu azali mwana

Bomoi bwa Basantu

81

koyeba te na ntango wana bato ya mombongo mosusu bazali kosomba bato


na Afrika mpe bazali komeme bango na Amerika mpo basala mosala na baplantation mpe na ba-mine. Makambo wana ezalaki koyokisa bato basali mabe
moko te mpasi mingi mingi. Mpasi ya nzoto : minioko, nzala, boko-no mpasi
ya molimo : mawa na mote-ma, koyekola te, koyeba Yezu te Pierre Claver
azali ntango yonso na libongo ya Carthagne, soko masuwa eyei komema
baombo, mpo na kosalisa bango, kokanga bampota na bango, kolatisa bango,
kobondo mpe kopesa bango mpiko, kofuta mbongo, soko nzela emonani, mpo
na kolongola bato mosusu na boombo, koleisa bango, koteya bango Nsango
elamu ya Yezu, kobatisa bango, kopesa bango Komunio esantu, tee kuna
baombo bakoti na ba-plantation to na ba-mine mpo na kosala mosala.
Bato mingi balingi te Pierre Claver asala mosala wana. Kasi mwasi moko
ya Espagne asalisi ye mpe alendisi ye na mosala. Pierre Claver azali kokota
mpe kofanda mingi na kati ya bato ya boloko, na kati ya bato bakitisi bango
na liwa. Mosala na ye na ba-hopital ezali kokamwisa bato mingi.
Na bambula minei ya nsuka ya bomoi ya ye, ntango akoki lisusu kotambola
mpenza te, atikali na kati ya mwa ndako, ye moko. Moto ya bango batii mpo
na kosalisa ye, azali na limemia te na Pierre Claver. Pierre amileli te, azali
koloba : masumu na ngai ekoki na etumbu ya koleka oyo.Akufi na 1654. Kasi
banda mokolo akufi, bato babosani ye lisusu te, bakumisi ye mingi. Akomi
mosantu na 1888.
Yezu alobi : nazalaki koyoka nzala, bopesaki ngai bilei ; nazalaki koyoka
mposa ya mai, bopesaki ngai mai ma ko-mele, nazalaki mompaya, boyambaki
ngai malamu ; nazalaki bolumbu, bola-tisaki ngai elamba ; nazalaki na bokono,
boyaki kosalisa ngai ; nazalaki na bolo-ko, boyaki kotala ngai ( Mat 25, 3536 ).
Topesa na maboko ya santu Pierre Claver bato yonso bazali na bonsomi te
( bazali baombo ), bato bazangi lokumu na mokili mobimba, asambela mpo
na bango.
Toyoka maloba mosusu ya santu Pierre Claver : ntango ngai nazali kosala
te oyo mpunda ya moke ( ne ) azali kosala, nakozwa eloko moko te. Bongo
mpunda azali kosala nini ? Bazali koto-nga ye, azali kokanga monoko, bazali
kopesa ye biloko ya kolia te, akangi monoko, bazali kotia na mokongo na ye

80

Bomoi bwa Basantu

Toyoka mateya oyo likolo ya mbo-tama ya Ngondo Maria : Lelo mokili


epesi mbuma na yango ya peto, mokili oyo ezalaki kopesa bobele banzube,
bambuma ya lisumu. Lelo likolo eyebi te ekelami mpamba te, zambi ntina na
yango emonani. Mwese oyo emonani na likolo mpe eyebi ntina ya yango
ezwi moi : mpo na kotala mokolo ya lelo. Nta-ngo oyo bikelamo yonso ebandi
koye-bana malamu, mpamba te mokili mobi-mba ezali kongenge. Ntango oyo
banzelu yonso ya Nzambe basangani na koyemba na mongongo makasi
Mokonzi na bango, mpo na nini ? Oyo ( Maria ) azali komo-nana aleki minzoto
yonso na kongenge, mpe aleki mokili mobimba na matomba.
Na bisambo ya liturgie ya lelo tozali koloba : Mbotama na yo, Maria, ezali
koyebisa esengo na mokili. Nzela moko na yo, moi etelemi na mokili. Kristu
abaloli lisumu ekoma ngrasia ; liwa ekoma bomoi ya mbula na mbula. Tika
te eyenga oyo eyela biso esengo ya koleka. Maria amemeli bato libiki. Makila
ya Kristu ezali kobikisa ye, kasi ye ( Maria ) azali ntina ya makila wana.
Bikelamo yonso basengeli koyemba mpe kobina, basala yonso mpo te esengo
ezala monene. Lelo ndako esantu ezali koto-ngama. Mpe nani akofanda na
kati ? Nza-mbe wa likolo mpe ya nse. Ekelamo moko ( Maria ) azali
kobongisama mpo na ko-pesa na Mozalisi ndako mosantu wana.

9 septembre :
Santu Pierre Claver, nganga Nzambe
( 1580-1654) - Bokundoli
Pierre Claver abotami na Espagne na 1580. Akoti na lingomba ya ba-jsuite.
Ntango azali koyekola, azali kosolola mbala na mbala na Frre Alphonse
Rodrigues, oyo azali kosala mosala na monoko ya ndako wana ya ba-jsuite,
oyo akomi mpe mosantu na nsima. Frre Rodrigues azali koyebisa Pierre
Claver : Soko olingi kosala mosala moko kitoko mpenza, kende kosala mosala
na Amerika, na kati ya bato ya Afrika, baye bakomi baombo mpe bazali kosala
mosala kuna. Ndenge wana, na 1610, Pierre akoti na masuwa mpe akomi na
Carthagne ( Colombie, Amrique du Sud ). Na 1616, akomi nganga Nzambe,
mpe abandi mosala na kati ya baombo bauti na Afrika. Asaleli bango bambula
33. Azalaki koloba : Nalingi nafanda moombo ya baindo libela. Tosengeli

Bomoi bwa Basantu

33

ya liboso abotami na Nzambe, Liloba ya Nzambe. Bato yonso bazali kozwa


likabo na Liloba. Oyo mambi ya biso toyekoli, mpe tozali koyebisa. Bato oyo
bazalaki kotosa na Liloba bazali bakristu, ata bango bayebaki Nzambe te,
ndakisa, na kati ya ba-grec : Socrate, Hraclite, na bato ya ndenge wana, mpe
na kati ya bato bazali ba-grec te : Abraham, Elie, na bato mosusu ebele, tokoki
kotanga misala mpe nkombo ya bango yonso te.
Liloba ya Nzambe : Nasambeli Nzambe, yango wana bapesi ngai mayele,
nabondeli ye, mpe atindeli ngai Elimo ya Bwanya. Le-ka montongo mpe
ngwende ya bokonzi, napusi kolinga Bwanya, na nkita na Bwanya, nkita ezali
se mpamba (Bwanya 7, 7-8).

3 juin :
Santu Charles Lwanga na baninga na ye 21, bamartiro
(bakufaki na 1885 1887). Eyenga
Le 3 juin ezali mokolo biso tozali koku-ndola liwa ya Charles Lwanga na
baninga na ye mosusu. Liboso bayokisaki bango mpasi ya ndenge na ndenge,
mpe na nsima batumbi bango na mt, na Namungongo, ngomba moko
mpembeni na Kampala, mbo-ka mokonzi ya Ouganda, mpo te bato bamo-na
bango mpe babanga. Ezalaki le 3 juin 1886. Joseph Mukasa afandi moto ya
liboso ya bango bakataki mot, na 1885, mpamba te, ye moto apalelaki
mokonzi Mwanga mpo na ezaleli na ye ya mabe (makambo ya bosoni), mpe
mpo abomaki episkopo moko anglican. Na ntango wana, Eklezia ya Ouganda ezalaki ya sika mpenza, akokisi bobele mbula zumi. Liboso mokonzi ya
Ouganda andimi ba-missionnaire malamu, kasi mokonzi akitani na ye :
Mwanga, ezaleli na ye mabe. Bana mibali oyo bazalaki kosala mosala na
lopango na ye, baboi kosala makambo ya bosoni, mpamba te bazalaki koloba
na mokonzi : Biso tozwaki batisimu, mpe tosengeli kofanda na bopeto.
Mokonzi akangisi bango. Bazali bilenge, moko, Kizi-to azali na mbula 13.
Moto azalaki kokamba bango na mosala na lopango ya mokonzi, nkombo na
ye : Charles Lwanga. Charles moto ya liboso na komata na likolo ya bankoni.
Na kati na bango, mwana moko azali, tata na ye azali kokamba bato bazali
koniokolo bamartiro wana. Mwana alingi kozonga nsima te, alobi na tata na

34

Bomoi bwa Basantu

ye : moko-nzi atindi yo na koboma ngai, ngai nalingi kokufa mpo na Yezu


Kristu.
Mbula moko na nsima ya liwa ya bamar-tiro oyo, ntalo ya bakristu mpe ya
bakateku-mene emati makasi, eyikami mbala misato.
Andr Kagwa akufaki liboso ya bango, bakati ye mot, mpe batumbi nzoto
na ye na mt. Na mokolo ya kolanda, mokristu mosusu : Matthias Murumba,
moto ya loku-mu babomi na kati ya minioko mingi. Mat-thias Murumba
akulaki batisimu na 1881, mpe aboi esika ya lokumu na kati ya lopango ya
mokonzi, alobi : Nazali moombo te, moombo ya Yezu Kristu ?
Papa Benot XV, na 1920, akomisi ba-martiro ya Ouganda ba-esengo.
Charles Lwanga akamati nkombo ya : mobateli ya bilenge yonso ya Afrika,
na monoko ya Papa Pie XI, na 1934. Papa Paul VI akendeki na 1964 na
Ouganda mpo na kotia na molongo ya basantu : Charles Lwanga na baninga
na ye.
Tosenge na bamartiro ya Ouganda basa-mbela mpo na bandeko na biso
homosexuel, mpe mpo na bana ya mobulu, baoyo bapesi nzoto na bango mpo
na kosala makambo ya bosoni.

4 juin :
Eyenga ya Motema mbindo te ya Maria.
Bokundoli
Eyenga oyo ezali kolakisa biso ndenge bakristu bazwi nzela mosusu na basicle oyo ya nsuka, mpo na kolakisa bolingo na bango na mama ya Yezu.
Bamoni motema na ye eloko ya ntalu, ya lokumu ya bango babandi komemia.
Eyenga ebandi na 1648. Na mbula wana, santu Jean Eudes asambeli mbala ya
liboso eyenga ya Motema mosantu ya Maria. Ba-janseniste baboi eyenga oyo,
bango bazalaki bato na motema makasi, bazalaki kondima na mpasi bolingo
ya Nzambe mpo na bato.
Na 1942, Papa Pie XII abonzi Eklezia mobimba na mpe mokili mobimba
na Motema mbindo te ya Maria. Soko totali Bikoma bisantu tomoni te motema
ezali esika ya moto azali kokutana na Nzambe, esika ya kolakisa bolingo na
botosi na Nzambe. Nzambe abongisi na kati ya motema ya Ngondo Maria

Bomoi bwa Basantu

79

Santu Grgoire akomi babuku ya ndenge na ndenge. Ba-lettre 800 ekomi


tee lelo na maboko na biso.

8 septembre :
Mbotama ya santu Maria. Eyenga
Santu Luc ayebisi biso te Maria aza-laki na Nazareth ntango anzelu ayebisi
ye nsango ya mbotama ya Yezu. Ntango wana Maria alingi abala Joseph. Joseph
azali moto ya libota ya David, ebandela ya libota yango ezali na Bethleem
(Yu-dea). Maria abotami wapi ? Na Nsango elamu bakomi yango te. Bato
mosusu bazali koloba te Maria abotami na Galilea, na mboka Sephoris. Kasi
biso toyebi mpe te : Maria azali ndeko ya Elisabeth. Elisabeth afandi na Yudea,
mosika te na Yerusalem. Maria akei mpe kuna mpo na kotala Elisabeth.
Zacharie, mobali ya Elisabeth azali nganga Nzambe mpe azali kosala mosala
na tempelo ya Yerusalem. Ndenge wana tokoki koloba mpe : Maria abotami
na Yerusalem ? Na buku moko, na nkombo ya Protvangile ya Jacques tozali
kotanga nkombo ya baboti ya santu Maria : Joachim na Anna. Tozali kotanga
na kati ya mokanda wana te : baboti ya Maria bamemi ye na tempelo ya
Yerusalem, ntango Maria azalaki mwana moke. Tokoki mpe kobakisa boye :
na Yerusalem kala ezalaki na ndako moko, ya bango bazalaki kobenga : ndako
ya Anna. Penepene na ndako wana batongi ndako Nzambe moko, mpe babenisi
yango le 8 septem-bre. Date oyo baponi yango na Yerusalem mpo na kokundola
mbotama ya Maria. Eyenga oyo ya mbotama ya Maria epalangani na
Constantinople na sicle ya mitano, mpe na nsima na Roma.
Mbotama yonso ya moto ezali ntina ya esengo mpe ya kopesa matondo na
Nzambe ya bomoi., oyo abengi mwana na kokabana na ye bomoi ya nsuka te.
Mbotama ya Ngondo Maria ezali kopalinginia na mokili mobimba mpe
matondo ya koleka, ye moto aponami na kozala mama ya Mobikisi, ya Mwana
se moko ya Nzambe.
Na mbotama ya Maria mwango (plan) ya Nzambe ya kobikisa bato ebandi
ko-monana, mosika te, na mwana mwasi oyo Yezu akobotama. Toyoka nzembo
ya ebandela ya Misa ya lelo : Tokumisa na kati ya banzembo ya esengo
mbotama ya Ngondo Maria : na nzela na ye, moi, elingi koloba Yezu abimeli
biso.

78

Bomoi bwa Basantu

malamu na bakristu. Abundi etumba na ba-arien, ba-donatiste, bato bazali


koteya mateya ya lokuta. Grgoire abangi te na koboya makambo mosusu ya
empereur azali ko-sala, lokola : kopekisa ba-soldat to ba-fonctionnaire bakoma
banganga Nzambe.
Grgoire azali na nzoto ya makasi te, kasi azali na mpiko mingi na mosala.
Ata ntango azali kotambola lisusu te, azali kokoma ba-homlie na ye malamu
malamu, mpe moto mosusu azali kotanga yango na ndako Nzambe. Ye moto
alobi : Papa azali mosaleli ya basaleli ya Nzambe ( serviteur des serviteurs de
Dieu ).
Na ba-homlie na likolo ya Ezekiel, akomi boye mpo na kolimbola mosala
azali kosala ya kokengele bato ya ye : Sinzili azali koteleme na esika ya likolo
mpo na komona mosika mambi ezali koya. Mpe moto yonso akamati mosala
ya sinzili, asengeli kofanda na esika ya likolo, na ndenge na ye ya kofanda,
mpo na kosalela bato na bokebi na ye. Grgoire alobi : ya solo, nasengeli
kotala mbala mosusu makambo ya Eklezia, mbala mosusu ya ba-monastre,
mbala mingi kosambisa makambo ya bato, kotala mambi etali bomoi ya mboka,
mbala mosusu kolela mpo na banguna bazali koya kokufa bato, koyiba, mbala
mosusu kobanga bankoi balingi kopanza mameme ya Nzambe apesi ngai.
Mosala mosusu ya papa Grgoire : atindi ba-moine 40 na Angleterre mpo
na koteya Nsango elamu ya Yezu na kati ya bato ya mokili wana. Moine
Augustin azali kokamba ba-moine wana. Augustin akomi mpe episkopo ya
liboso ya Can-torbery ( Angleterre ). Ndenge wana ma-teya ya Yezu epalangani
na mokili wana na lisalisi ya ba-moine ya santu Benot. Bango babandisi mpe
ba-monastre mosusu na mikili mosusu ya Mpoto.
Grgoire alobi lisusu mpo na bato ya Nzambe : Ntango Nzambe, oyo azali
kotala biloko yonso, azali kotia na mapeka na bango mokumba, bango, ata
balingi mokumba wana te, bazali kotosa kaka na Nzambe oyo alingi bango.
Mpo na bolingo, ya bango bazwi lokola likabo ya Nzambe, bango balingi
kosalela Nzambe, kasi lokola bazali basaleli, bazali komeme mokumba ya
Nzambe azali kotia na mapeka na bango. Bato yonso oyo bazali kofanda
ndenge wana, ata na libanda makelele mpe mobulu ezali mingi, oyo yonso
ekoki kokota na motema na bango te. Motema na bango efandi na boboto,
ezali koningana te, komona nsomo te.

Bomoi bwa Basantu

35

esika ya malamu mpo na Elimo Santu. Yango wana Maria akoki koyemba :
Molimo mwa ngai moko-kumisa Mokonzi, mpe motema mwa ngai motondi
na nsai mpo na Nzambe Mobikisi wa ngai. - Ndenge wana motema ya Maria
ezali liziba ya matondo ya ye azali kopesa na Nzambe. Eklezia azali kobenga
bakristu yonso na kosangana na santu Maria mpe kopesa matondo na Nzambe
na kati ya motema na bango.
Na Nsango Elamu ya santu Luc 2, 19, tozali kotanga : kasi Maria abombi
maka-mbo maye manso, mpe amanyoli mango o motema. Na santu Luc 2, 51
tozali kotanga lisusu : Mama ya Yezu abombi mambi mana manso o motema.
Maria azali elili ya Eklezia, ndakisa ya bakristu yonso. Toyoka maloba ya
santu Laurent Justinien : Ntango Maria azalaki komaniola na kati ya motema
mambi yonso amonaki to ayokaki, tala ndenge nini azalaki kokola na matomba
mpe na boyambi Landa ndakisa na ye, yo molimo ozali koya-mba ! Mpo
na komipetola yo moko na kati ya molimo na yo, mpe mpo na kobika na
bokono ya lisumu, okota na kati ya tempelo ya motema na yo.
Kokumisa Mama ya Nzambe ezali kotinda biso na kondima lokumu ya
koleka monene ya mama ya Nzambe, ezali kotinda biso na kolinga Mama
oyo na bolingo ya bomwana mpe kolanda ndakisa ya ye.

5 juin :
Santu Boniface, episkopo mpe mar-tiro (673 754).
Bokundoli
Babomaki Boniface na Dokkum (Hollan-de) ntango azalaki kosambela
Misa, elongo na ye babomaki mpe baninga na ye 52. Eza-laki na mbula 754.
Boniface abotamaki na Angleterre, na 673. Akoti na lingomba ya ba-bndictin.
Abandi mosala : koteya, ko-koma minkanda, kosakola Nsango Elamu ya Yezu.
Ye moto ya liboso ya kokoma gram-maire ya latin kuna na Angleterre. Na
719, Papa apesi ye mosala ya koteya Nsango Ela-mu ya Yezu na Allemagne,
mpe apesi nko-mbo ya : Boniface (moto azali kosala mambi malamu). Na
722, akomi episkopo. Abandi kokomela Papa minkanda, to azali kokende
kotala Papa na Roma, mpo na koyebisa ye makambo ya mosala na ye. Akomi
na Ba-vire, abandisi diocse ya Salzbourg, Frei-sing, Ratisbonne, Passau

36

Bomoi bwa Basantu

Na 744, abandisi monastre ya Fulda. Asengi na Papa afanda ye moko mokonzi


ya monastre wana. Azalaki komona te soko moto mosusu azali mokonzi ya
monastre wana, mosala ya Nzambe ekoki kobeba. Na 747, mokonzi Pepin
ya France apekisi Boniface na kokoba mosala na ye. Amoni Boniface lokola
mompaya, moto ya likama.
Boniface akomaki apostolo monene ya Germanie, asalaki mpe mosala na
France. Na mosala na ye, Boniface alandi nzela mibale, ya liboso : azalaki
koluka lisalisi ya bakonzi mpe ya bato minene. Kasi alingi te ye moko to
Eklezia bakoma baombo ya bato. Asali makasi mpo te Eklezia ezala na
bonsomi. Ya mibale : azalaki koluka ba-moine mpo na kosalisa ye na mosala
ya koteya bakristu. Ye moko abandisi ba-monastre mosusu, lo-kola monastre
ya Fulda. Ba-monastre ezalaki bisika, wapi mosala ya kokumisa Nzambe
ezalaki kitoko, ba-monastre ezala-ki mpe bisika ya koyekola mambi ya Nzambe, ya koteya bato mpe kokolisa mayele na bango. Boniface azalaki
mokengeli malamu. Toyoka maloba na ye : Tofanda te bambwa bazali koloba
te, tozala te bato bazali kotala mpamba, tofanda te bato bazali kosala mosala
mpo na mbongo, mpe soko niama ya mabe ayei, tokima. Tofanda bake-ngeli
bayebi koyoka bato, bayebi kokengele mpata ya Kristu, bayebi koteya bato :
bato minene na bato mike, babola to bato ya mbo-ngo. Toluka koyeba nini
Nzambe alingi na bomoi ya biso.
Na Allemagne, Boniface azwi lokumu mingi. Tee lelo, monastre ya Fulda,
esika bakundi Boniface, ezali kobenda bato mingi. Baepiskopo ya Allemagne
bazali kokutana na Fulda mbala na mbala mpo na makita na bango.

11 juin :
Santu Barnab, apostolo. Bokundoli
Tozali kotanga na Bikela ya bapostolo 11, 24 : Barnab azalaki moto
molamu, moto atondi na Elimo Santu mpe na boyambi. Azwaki nkombo ya
apostolo, ata azalaki te na kati ya bapostolo ya Yezu aponaki. Na Bikela ya
bapostolo bazalaki kobenga ye Jo-seph, bango bapesi ye mpe nkombo mosusu : Barnabas, elingi koloba : mwana wa libondi (fils dencouragement).
Abotamaki na Chypre, azali moyuda mpe levita. Azali na Yerusalem, ntango

Bomoi bwa Basantu

77

Septembre

3 septembre :
Santu Grgoire Monene, papa mpe motei ya Eklezia
( 540-604 ) Bokundoli
Na 590, ba-snateur, banganga Nza-mbe na bakristu ya Roma baponi Grgoire : Papa. Ntango wana Grgoire azali bobele diakoko. Liboso aboi te
akoma papa, kasi na nsima andimi. Bongo, le 3 septembre 590 akomi episkopo
mpe abandi mosala na ya ya papa.
Grgoire abotami na Roma na 540. Libota na ye ezali ya bato ya lokumu
mpe ya mbongo. Mama na ye, Silvie, akomi mosantu ; batata basi na ye mibale
bakomi mpe basantu. Grgoire azalaki gouverneur ya Roma banda 573 tee na
578. Na nsima, alingi kofanda na esika ya kimia mpo na komipesa na Nzambe.
Ndako na ye ekomi lokola monastre mpe Grgoire na bandeko na ye mosusu
bafandi wana lokola ba-moine. Bazali kolanda mibeko ya santu Benot.
Na 579, papa Pelage akomisi ye diakono mpe atindi ye na Constanti-nople,
lokola ntoma ya ye na esika ya empereur. Na 586, azongi na Roma, mpe akobi
mosala na ye ya moine. Na 590, papa Pelage akufi na bokono ya mabe ( peste
). Grgoire akomi papa. Ntango wana bato mingi bazali kokufa na peste mpe
na nzala. Ebale Tibre mpe ebimi na mbeto na ye mpe mai ekoti na bandako.
Grgoire azali kolendisa bakristu mpe asalisi bankembi ( processions ) na
bala-bala ya Roma mpo na kobondela Nza-mbe. Asali makasi mpo na kokotisa
na mboka Roma biloko ya kolia. Mokolo moko, mokonzi ya Sicile atindi na
Roma ba-sac ya mbuma ya mampa. Grgoire akomeli ye monkanda oyo :
Keba, soko otindi ba-sac moke ndenge oyo, ozali kokufisa moto moko te kasi
peuple mobimba.
Na 592, ba-Lombard ( bato bauti na mokili mosika mpe bakoti na Italie )
balingi kokota na Roma. Grgoire asali manso mpo na koyokana na bango
mpe kozongisa bango na mokili na bango. Grgoire asali makasi mingi mpo
banga-nga Nzambe na ye bafanda na ezalela ya malamu, bapesa ndakisa ya

76

Bomoi bwa Basantu

Eyenga ya kosepela mbotama ya Hrode ekomi. Hrode asepeli mingi na


mabina ya mwana mwasi ya Hrodiade. Makanisi ya Hrode ekomi lokola ya
moto ya ligboma : Hrode alobi na mwa-na mwasi wana : nalayi ndai nde :
ata nini okosenge , nakopesa yo yango ! Mama na ye alakisi ye eloko asengeli
kosenge, ya-ngo wana mwana mwasi alobi na Hrode : Pesa ngai mot ya
Jean Baptiste na sani (Marc 6, 17-29).
Santu Augustin alobi : Ndai ya koza-nga ntina, ya kozanga mayele, Hrode
akokisi yango mpe akomi mobomi ya Jean.- Jean aleki liboso ya Yezu na
mbo-tama mpe na bomartiro na ye.
Tokoki koloba boye : Jean Baptiste azali koganga mpe na kati ya esobe ya
mokili oyo, na bato ya ntango oyo : Bo-bongola motema mpe bokoma bato
ya bosembo. Jean azali kolakisa biso ntina ya batisimu ya biso : kokaba bomoi
ya biso ntango yonso na kati ya bosembo mpe bosolo ya Nsango elamu,
komipesa na mosala wana tee na nsuka.
Toyoka maloba ya santu Bde : Jean atei Nsango elamu ya bonsomi mpe
ya boboto ya Nzambe, mpe bato ya mabe bakangi ye mpe bakotisi ye na
boloko. Bakotisi ye na ndako ya kozanga moi, ye moto ayei mpo na koyebisa
mambi etali mwinda, elingi koloba : Kristu (Jean 1, 7). Ye moto abongi kozwa
nkombo oyo, lokola Yezu alobaki mpo na Jean : Mwi-nda ezali kopela mpe
kongenge (Jean 5, 35). Na makila na ye moko, Jean Baptiste azwi batisimu,
ye moto abatisaki Mobi-kisi ya bato.
Na kokundola liwa ya santu Jean Bap-tiste tokanisa mpe na maloba ya Yezu
na Pilato : Nabotami mpe nayei awa o mokili mpo te nasakola bosolo (Jean
18, 37).

Bomoi bwa Basantu

37

Eklezia ebandi. Tozali kotanga na Bikela ya bapostolo mpo na ye : Joseph


mpe, oyo bapostolo bazalaki mpe kotanga Barnabas (lokola te : Mwana wa
libondi), azalaki na elanga ; ateki yango mpe ayei kotika mosolo o maboko
ya bapostolo (4, 36-37). Barnab ayoki ntina ya lisolo ya Yezu na moto ya
mbongo, na Mat 19, 21 : Soko olingi kobongo ny, teke biloko bya yo, kabela
babola mosolo, okozwa nkita o likolo ; na nsima yaka landa ngai.
Barnab abandi koteya Nsango Elamu ya Yezu na Antioche. Antioche ezalaki
engu-mba monene. Kuna bato mingi, bayuda na bapagano bandimi Yezu mpe
bakuli batisi-mu. Bayekoli ya Yezu bazwi na Antioche mbala ya liboso nkombo
ya : bakristu.
Ntango Paul abongoli motema, mpe akomi mokristu, Barnab akei koluka
ye na Tarse, amemi ye na Antioche mpo basala mo-sala ya koteya bato esika
moko. Na nsima, Paul na Barnab bakomi kotambola na bamboka mosusu,
bakomi liboso na Chypre, esika Barnab abotamaki. Oyo mobembo ya liboso
ya bango mibale.
Na Antioche, na nsima ya bambula, mobulu ebimi : bakristu oyo bazalaki
liboso bayuda, balobi na bakristu oyo bazalaki li-boso bapagano : Soko bakati
bino nzoto te (circoncision), bokobika te. Na mbula 49, Barnab na Paul bakei
na Yerusalem mpo na kotuna bapostolo na likambo yango. Li-kita lisalemi na
mbula wana, esika bapostolo balongisi Barnab na Paul, balobi : Bokati nzoto
ezali mobeko lisusu te.
Na nsima ya mbula wana, Paul na Bar-nab bakabwani. Barnab azongi na
Chypre mpo akobi mosala ya Nzambe kuna elongo na ndeko na ye Jean Marc
(mokomi ya Nsa-ngo Elamu ya santu Marc). Barnab akomi mpe na Roma,
mpe na nsuka babomi ye na mabanga penepene na Salamine (Chypre).

13 juin :
Santu Antoine ya Padoue, nganga Nzambe
mpe motei ya Eklezia (1195 1231). Bokundoli
Mokolo ya eyenga ya santu Antoine ezali mokolo ya liwa ya ye : akufaki le
13 juin 1231. Mbula moko nsima ya liwa na ye, Papa akomisi ye mosantu
mpe Papa Pie XII akomisi ye motei ya Nsango Elamu. Antoine abotamaki na

38

Bomoi bwa Basantu

Lisbonne (Portugal) na libota ya bato ya mbongo. Akoti na lingomba ya santu


Augustin. Na 1220, ba-missionnaire mosusu ya lingomba ya santu Franois
ba-kufaki liwa ya bamartiro na kati ya ba-mu-sulman kuna na Maroc. Bazongisi
bibembe ya bango na Portugal. Mposa ya kokoma missionnaire na kati ya bamusulman esimbi Antoine.Yango wana akoti na lingomba ya ba-franciscain.
Batindi ye na Maroc, kasi akomi kuna te, mpamba te masuwa, mpo na
ekumbaki, esemaki na Sicile. Bongo Antoi-ne akomi na Assise, na 1221 mpe
akutani na santu Franois, oyo abandisaki na ba-mbula wana lingomba ya bafranciscain. Na komona mayele ya Antoine, santu Franois alobi na ye : Nalingi
oteya bandeko na ngai thologie yasantu.
Na bambula wana, na Italie mpe na France bakristu mosusu babimaki,
bazalaki kobenga bango ba-cathare (lokola te bato ya bopeto). Mateya ya
bango ezalaki ya lo-kuta mingi, mpe bato mingi babandi kolanda bango. Bongo
batindi Antoine mpo na ko-teya bango. Ndenge wana Antoine akomi mpe na
France. Na mboka moko kuna na France, Antoine azwi lisusu, na ndenge moko ya kokamwa, monkanda moko ya ntalo oyo ebungaki. Oyo ezali ebandela
ya bisa-mbo ya bakristu na santu Antoine mpo na kozwa lisusu biloko oyo
ebungi. Bakristu mingi bazali kosepela na kozwa biloko na bango ebungi na
kosambela santu Antoine. Na 1227, Antoine azongi na Italie, mpe ba-poni ye
azala Pre provincial ya Romagne.
Antoine asukisi bomoi na ye na Padoue. Abandi kobela makasi, makolo
evimbi. Mo-sala na ye na basanza ya nsuka ya bomoi ya ye : kodict minkanda
mibale : Sermons pour les dimanches na Sermons en lhonneur des Saints.
Akokisi mbula 36 mpamba na bomoi na ye. Na esika bakundi ye, batongi
basilique moko monene : basilique ya santu Antoine ya Padoue. Bato mingi,
ya mokili mobimba bazali koya na Padoue mpo na kokumisa mpe kosambela
santu Antoine. Mingi bazali kozwa lisalisi na ye na mambi ya molimo mpe ya
nzoto.
Antoine azalaki koloba : Bakristu yonso batia motema na ngolu ya Nzambe.
Yo mo-sumuki, mpo na nini ozali kokanisa te okobika te ? Tala, Nsango Elamu
mobimba ezali koloba mambi ya ngolu mpe ya bolingo. Balobeli mibale oyo,
otala bango : mama moko (Maria) na Mobikisi ! Te, te, moto azali koloba
mpo na biso, mam mpe azali kolobela biso, yango wana ngolu ya Nzambe
ekoki koboya yo te.

Bomoi bwa Basantu

75

monoko mpo ya bolingo ; soko ozali koloba, oloba mpo ya bolingo ; soko
olimbisi moto, osala yango mpo ya bolingo.
Bambula ya nsuka ya santu Augustin epesi ye mawa mingi : ba-Vandale (
bato bauti na mokili ya bampaya ) bakoti na mabel ya bokonzi ya Roma,
kuna na Afrika. Babandi kozinga mboka Hippone na basoldat na bango. Na
ntango wana, bato mingi bakimi bamboka na bango mpe bakoti na Hippone
mpo na komiba-tela. Eklezia ezali kosalisa bango. Mosika te, Augustin abandi
kobela, mpe akufi le 28 aot 430. Basanza zumi na mitano na nsima, ba-Vandale
bakoti na mboka.
Toyoka Liloba ya Nzambe na 1 Jean 4, 16 : Biso bato tomonoki bolingi
Nza-mbe akolingaka biso mpe toyambi bolingi bwa ye : Nzambe azali Bolingi.
Moto aza-li na bolingi o motema, azali na Nzambe lisanga mpe Nzambe azali
na ye lisanga.

29 aot :
Bomartiro ya santu Jean Baptiste. Bokundoli
Soko tozali kokanisa na Jean Baptiste, tozali kokanisa na Yezu : Jean
atamboli liboso ya Yezu na koteya mpe na kopesa bomoi na ye mpo ya
bosembo. Jean, profeta ya nsuka, azali kobanga te na koloba na bafariseo, na
libongo ya ebale Yordane : Bino bana ya nyoka ! - Mpe na Hrode, Jean alobi :
okoki kofanda na Hrodiade te, mwasi ya ndeko na yo Philippe.
Ntango oyo Jean azali na boloko, mpamba te, moto akoki te kokima etumbu
soko azali kopalela bato minene na miso ya bato. Ayebi te Hrodiade ayini
ye mpe azali koluka nzela ya koboma ye. Jean ayebi mpe te Hrode azali
koyoka ye na esengo ; kasi Jean akoki kotia motema na ye te. Jean mpe, na
boloko azali na ntembe mpo na Yezu : azali Mesiya ya solo, to ? Azali kosimba
lungu na maboko na ye. Mpo ya nini azali kopepe mbuma ya ye te, na nkembo
mpe na bokonzi yonso ? (Mat 3, 12). Kasi Yezu apesi ye eya-no : Tala, bato ya
kokufa miso bazali ko-mona, bato ya kokufa makolo bakota-mbola Esengo
na moto akotuta libaku mpo ya ngai te ( Mat 11, 2-6 ). Ntembe ya Jean esili.
Akoki sikawa kosakola esakola ya ye ya nsuka, mosala ya Nza-mbe atindi ye
na kosala, ekoki.

74

Bomoi bwa Basantu

Mosika te, ye na mama mpe mwana na ye balingi kozonga na Afrika. Bakomi


na Ostie, oyo ezali libongo ya mboka Ro-ma, esika bango basengeli kozwa
masu-wa. Kasi fivre ya makasi ekamati mama na ye bobele kuna. Monique
akufi na ma-boko ya mwana na ye. Ntango Augustin azongi na Thagaste,
akeli lingomba ya bato bazali kosambela mpe komaniola Liloba ya Nzambe.
Kasi bakristu balingi Augustin akoma nganga Nzambe, mpe na nsima, episkopo
ya Hippone. Augustin andimi. Bongo bomoi na ye ekomi etu-mba ya mokolo
na mokolo mpo na kobu-ndela eyamba ya solo. Mateya ya lokuta ezalaki mingi
na ntango wana.
Bato mpe bauti na mikili ya mosika babandi kokota na mabel ya bokonzi
ya Roma. Bazali kobenga bango : barbares. Na 410, bakoti na Roma mpe
babebisi yango, na koboma, koyiba mpe kotumba bandako. Na koyoka
makambo wana ya nsomo, Augustin azwi likanisi ya kokoma monkanda
moko : Mboka ya Nzambe (Cit de Dieu). Na kati akomi boye : Mboka ya
Nzambe ezali lokola mboka ya bato te. Mboka ya bato ezali bokonzi ya Roma,
mpe yango ezali kokweya, kasi mboka ya Nzambe ekoki kokweya te. Mboka
ya Nzambe ezali Eklezia oyo ezali kofanda mbula na mbula.
Augustin afandi episkopo ya Hippone mbula 34. Azali kofanda elongo na
banganga Nzambe na ye esika moko. Mo-kolo na mokolo azali kosambela
Misa. Balomingo yonso azali koteya bakristu na ndako Nzambe, na biyenga
yonso mpe ; azali koteya bakatekumene, azali kosalisa babola, azali zuzi na
makambo ya bakristu bapesi ye na kokata.
Augustin akomi minkanda mingi. Babuku oyo etikali tee na moi ya lelo
ezali 113. Minkanda (Lettres) ezali 200. Ba-homlie na ndako Nzambe : 500.
Babuku na ye mibale eyebani mingi tee sikawa : Confessions na Cit de
Dieu. Toyoka eteni ya Confessions : Nabandi kolinga yo na nsima mingi, yo
Kitoko ya kala, kasi mpe ya sika, nabandi kolinga yo na nsima mingi. Kasi,
tala, ozalaki na kati ya ngai, ntango ngai nazalaki na libanda, mpe ngai nazalaki
koluka yo na libanda Ozalaki na ngai, mpe ngai nazalaki na yo te. Obengi
ngai, ogangi, olongi, matoi na ngai ebandi koyoka. Ongengi, olongoli butu na
miso na ngai.
Na monkanda mosusu, Augustin ako-mi boye : Zala na bolingo, mpe sala
yonso yo olingi ! (Aime et fais ce que tu veux !). Soko okangi monoko, kanga

Bomoi bwa Basantu

39

21 juin :
Santu Louis de Gonzague, religieux (1568 1591). Bokundoli
Santu Louis akufaki na Roma le 21 juin 1591. Sicle ya kumi na sambanu
ezali sicle ya Luther, ya ba-protestant, ya Concile de Trente mpe ya rforme
catholique. Ezaleli ya mabe ya bato mosusu : bapapa, baepisko-po, banganga
Nzambe na bakristu etindi bakristu na nzela ya kokabwana. Kasi na sicle
wana basantu bafandi mpe mingi. Na kati na bango totangi santu Louis de
Gonza-gue. Abotamaki penepene na Mantoue (Italie), na 1568. Tata na ye
azali mokonzi monene. Alingite Louis akoma soldat ya mpiko mpe prince
mpo na kokitana ye na nsima. Ntango Louis azalaki mwana, akoli na bandako
ya bato ya lokumu. Ndenge wana Louis akomi mpe na Florence, na kati ya
bato minene. Ezaleli ya mabe ya bato mi-ngi na kati na bango etindi Louis na
kolaka na kati ya motema na kotikala ya bopeto na bomoi na ye. Azali mbula
12 ntango akuli komunio ya yambo, na maboko ya moto moko mosantu ya
ntango wana : Charles Borrome. Santu Charles alendisi Louis na mokano na
ye ya bopeto. Na 1583, Louis alingi kokota na lingomba ya ba-jsuite, mpe
ayebisi na tata na ye. Tata asiliki mingi, aboi, kasi Louis atiki lokumu mpe
bomengo yonso mpe na 1585 akoti na lingomba ya ba-jsuite na Roma. Kuna
akutani na mo-santu mosusu : Robert Bellarmin, oyo akomi motei ya ye.
Louis alingi mingi kosala misala ya komiyokisa mpasi. Azalaki moto ya
lokumu na ndako ya tata na ye. Sikawa alati bilamba kitoko te, atii libenga na
mokongo mpe abimi na balabala mpo na kosenge limosina na ndako ya bato.
Mpo na komikitisa alu-kaki na kosala na ndako misala oyo ezali na lokumu
te. Azalaki na mbula 22 ntango Nzambe ayebisi ye te akozala na bomoi ya
molai lisusu te. Likambo yango ebongoli bomoi na ye : kimia monene ekoti
na mote-ma na ye. Tokomi na mbula 1591, mbula ya liwa na ye. Na mbula
wana, bokono ya mabe (peste) ebimi na Roma.Louis abandi kosalisa bakoni
na makasi na ye yonso, kasi ye moko abeli na bokono wana mpe akufi. Na
ntango ya liwa agangi : Esengo kani ! Azalaki na bambula 23.
Na Nkunga 119, 9 tokotanga boye : Bo-niboni elenge mobali akoki kotikala
na bopeto ? Bobele soko atosi maloba na yo, Mokonzi. Tolingi kopesa na
maboko ya santu Louis de Gonzague bilenge yonso mpo te asambela mpo na
bango.

40

Bomoi bwa Basantu

24 juin :
Mbotama ya santu Jean Baptiste. Eyenga enene
Eyenga oyo ebanda kala, na sicle ya mi-nei. Ezali kokweya basanza motoba
na liboso ya eyenga ya Mbotama ya Yezu (25 dcembre), na ndenge anzelu
alobi na Ma-ria : Mpe tala, ndeko wa yo Elisabeth, ye mpe akweli zemi ya
mwana mobali, awa asili akomi mobange. Azalaki ekomba, sikawa akomi na
zemi ya sanza motoba (Luc 1, 36). Baboti ya Jean : Zacharie, nganga Nzambe,
na Elisabeth, ndeko ya Maria, mama ya Yezu. Eyenga oyo ezali monene, mpo
na nini ? Mpo na makambo minene ya Nzambe asali mpo na Jean. Na kati ya
bana banso bamama baboti, moko te aleki Yoane Mobatisi, oyo maloba ya
Yezu na Mat 11, 11. Jean atindami na Nzambe mpo na kobongisa mitema ya
bato, bongo bakoka koyamba Yezu. Jean apesi batisimu na Yezu, mokonzi ya
batisi-mu, ndenge wana mai ezwi nguya ya kosa-ntisa bato. Na nsima, Jean
asilisi mosala na ye ya profeta mpe andimi liwa ya martiro.
Toyoka maloba ya Jean Baptiste : Nkolo wa mwasi nde mobali, kasi moninga
wa bo-longani, atelemi penepene na ye mpe ayoki ye, atondi na nsai mpo
ayoki mongongo mwa mobali. Yango nde esengo ya ngai, mpe nayoki esengo
enene mpenza. Ye asengeli kokola, ngai namikitisa (Jean 3, 29-30).Ye (Yezu)
asengeli kokola, ngai namikitisa. Na Mpoto mwinda (moi) ya mokolo na
mokolo, banda le 21 juin, ebandi kokoma moke. Mwinda wana ebandi kokoma
monene lisusu banda le 21 dcembre, penepene na Mbotama ya Yezu. Toyoka
maloba ya santu Augustin mpo na ba-date ya anniversaire ya Jean Baptiste na
mpe Yezu : Bilumbu ya anniversaire na bango ezali kolakisa biso likambo.Ezali
likambo etali mwinda, mpe moi na likolo ezali wana mpo na kolakisa biso
yango. Banda lelo (24 juin) mikolo ezali kokoma mikuse, banda Mbotama
(25 dcembre) mikolo ezali kokoma milai. Ye asengeli kokola, ngai
namikitisa. Yezu, Mokonzi ya biloko yonso, Moyangeli ya likolo mpe ya nse,
abotami na ntango ye ali-ngi. Na yango, ye aponi mokolo ya Mbota-ma na ye
na kolakisa biso nini mokolo wana esengeli kolakisa. Ye mpe aponi mokolo
ya mbotama ya moto oyo atamboli liboso na ye. Ndenge wana ye alingi bato
bayeba te ye azali Nzambe.
Eloko tokosenge na mokolo ya lelo : Bosawa oyo ezali kokamba biso na
esengo.

Bomoi bwa Basantu

73

te, mpo na kokamba moto moko na Nzambe, tosala mosala na limemia, na


kotia motema, na kokanga motema (douceur, confiance, pa-tience), mpamba
te, Nzambe oyo : Soko monkekele mobukani, akokata mwango te, soko mto
molembi, akozimisa mwa-ngo te ( Isae 42, 3 ), ye mok akokota na kati ya
makambo na biso na ntango ekoki.
Na eyenga ya santu Monique toma-niola Liloba oyo ya Nzambe : Moto
ako-kumisa tata, akoumela mibu miike o mokili, oyo akotosa Mokonzi,
akosepelisa mama wa ye ( Sirac 3, 6 ).
Losambo : Topesa na santu Monique bamama yonso bazali motema likolo
likolo mpo ya libiki ya bana na bango, mpe bana oyo bazali ntina ya boleli ya
bamama na bango.

28 aot :
Santu Augustin, episkopo mpe motei ya Eklezia
(354-430). Bokundoli
Augustin abotami na Thagaste (Al-grie, Afrique du Nord ), na 354. Mama
na ye : santu Monique. Augustin akomi motei ya rhtorique na Carthage. Afandi
na mwasi, aboti mwana moko : Adodat. Ntango wana Augustin azwi naino
bati-simu te, azali bobele katekumene. Mateya ya lokuta ya ba-manichen
ebandi kose-pelisa ye, mpe alandi yango. Ba-mani-chen bazali koteya :
Banzambe bazali mibale : moko ya malamu, oyo akeli mi-limo ya bato, mpe
moko nzambe ya mabe, oyo akeli biloko tozali komona na miso. Kasi Augustin
azali bobele koluka : mposa ya kozwa bosolo ezali na motema na ye mingi.
Augustin azali na bomoi mo-ko ya mobulu, mpe mama na ye amoni mawa
mingi na motema na likambo yango. Azali kolela. Augustin alembi na koyoka
boleli ya mama na ye, mpe na bonkutu atiki mama mpe akei na Roma, mpe na
nsima na Milan na kokoba mosala na ye ya motei ya rhtorique. Monique
alandi ye tee na Milan. Kuna episkopo Ambroise azali. Mateya ya Ambroise
azali kopesa, ebeti Augustin na motema. Akamati mokano ya kozwa batisimu.
Na butu ya Pasika ya mbula 387, akamati batisimu elongo na mwana na ye
Adodat, na maboko ya episkopo Ambroise.

72

Bomoi bwa Basantu

Na ntango wana Augustin azali na mbula 16, azali katekumene, kasi azali
na bomoi ya mobulu. Mpe Monique alandi ye tee na Carthage, alingi kofanda
pene-pene na mwana na ye, na koteya mpe ko-sambela mpo na ye. Augustin
atiki mama na ye na bonkutu mpe akomi na Milan (Italie). Kuna mpe Monique
alandi ye. Na 387, na eyenga ya Pasika, Monique ase-peli mingi mpo mwana
na ye Augustin azwi batisimu. Bobele na mbula wana, Monique na mwana na
ye balingi kozonga na Afrika. Bakomi na Ostie, oyo ezali libongo ya mboka
Roma. Bazali kozila masuwa. Na Ostie, Monique akufi. Bato bazalaki koloba
na ye : ozali kobanga te na kotika nzoto na yo mosika na mboka na yo ?
Monique ayanoli : Eloko moko ezali mosika na Nzambe te, tokoki ko-banga
te te ya abunga esika bakundi ngai, mpo na kosekwisa ngai.
Losambo ya eyenga ya santu Monique ezali kokundolela biso mpizoli na
ye mpo na mwana na ye Augustin. Episkopo Tha-gaste alobi na Monique :
Kende, mwana ya mpizoli mingi ya ndenge oyo akoki kobunga te.
Toyoka nini santu Augustin akomi na monkanda na ye : Confessions mpo
ya mama na ye, ntango bango mibale bazali kozila masuwa na Ostie : Tozalaki
kosolola biso mibale, na bolingo mpe na boboto mingi. Tobosani mambi ya
kala, mpe biso tozali koluka mambi ezali koya, tozali koluka elongo esika ya
Bosolo, elingi koloba esika ya yo, Nzambe : nini oyo bomoi ezangi nsuka ya
basantu ? Bomoi ya liso emoni te, ya litoi eyoki te, ya motema ekoki te na
koyeba. Motema na biso efungwami mbango mpo na koyamba mai oyo ebimi
na liziba ya yo : liziba ya bomoi ezali na yo.
Kuna na Confessions, Augustin akomi maloba ya nsuka ya mama na ye
mo-santu : Mwana na ngai, ntango oyo, eloko moko ezali lisusu te, oyo ekoki
kosepelisa ngai na bomoi oyo. Nakosala nini lisusu na mokili ? Mpo ya nini
nazali naino awa ? Nayebi yango te. Elikia na ngai na mokili oyo, ntango oyo
esili ekoki. Eloko moko ezalaki kopesa ngai mposa ya mokiki oyo, eloko
wana nde : ngai nali-ngaki komona yo na liboso ya liwa na ngai te osili okomi
mokristu catholique. Nza-mbe, na likambo yango, atondisi ngai na esengo
eleki, mpamba te, namoni te yo okomi mosali ya Nzambe, yo mpe otiki
bisengo ya mokili. Nazali kosala lisusu nini awa ?
Santu Monique ayebi, na kolela mpe na bisambo na ye, kotia motema na
Nza-mbe, mpe na mwana na ye Augustin. Nda-kisa na ye ezali kolakisa biso

Bomoi bwa Basantu

41

28 juin :
Santu Irne, episkopo mpe martiro (130 202). Bokundoli
Irne abotamaki na Smyrne (Turquie) na mbula 130. Nkombo na ye na
ki-grec ela-kisi : moto ya boboto. Azalaki moyekoli ya santu Polycarpe.
Polycarpe azalaki moyeko-li ya santu Jean, apostolo ya Yezu. Irne ye moko
mpe, na nsima, akomi episkopo ya Lyon (France). Makambo yango ya koyeba
te mateya euti na Yezu na nzela ya apostolo Jean, na nzela ya Polycarpe, mpe
na nzela ya ye moko, ekoteli Irne makasi na mo-tema (transmission dhomme
homme du dpt de la foi).
Irne akomi na France mpe na nsima akei na Roma. Kuna akutani na santu
Justin, oyo azalaki philosophe. Justin azalaki kobu-nda makasi na mambi ya
lokuta, ya bato mosusu bazalaki kopanza, mateya ya gnose, elingi koloba ya
boyebi eleki monene ya mambi etali Nzambe mpe bikelamo yonso .
Na 177, Irne akomi na Lyon, na ntango ya empereur Marc Aurle.
Empereur wana abandi koniokolo bakristu makasi. Kuna na Lyon, bakristu
50 bakufi liwa ya martiro. Ir-ne akomi episkopo ya Lyon, mpe akomi motei
monene ya Eklezia. Monkanda na ye : Contre les hrsies, eyebani mingi tee
lelo. Irne, moto ya boboto, akomeli Papa Victor monkanda mpo na ba-Eklezia
ya Asie Mi-neure (Turquie). Kuna bazalaki kosepela eyenga ya Pasika mokolo
moko te na Eklezia ya Roma. Irne abondeli Papa na kotala makambo yango
na malembe mpe koluka na koyokana na ba-Eklezia wana. Mpo na Eklezia
ya Roma, Irne akomi boye : Tolingi kotala Eklezia moko, oyo aleki monene, aleki ya ntama, oyo bato yonso bayebi, Eklezia ya bapostolo Pierre na
Paul baba-ndisaki na Roma Mpo na bokonzi ya Eklezia wana ezwi, oyo
euti na ebandela na yango, ba-Eklezia yonso mosusu basengeli koyokana na
Eklezia oyo ya Roma. Eklezia ya Roma ezali kobomba malamu mateya ya
bapostolo mpo na bolamu ya bakristu yonso.
Mpo na kolakisa ndenge nini Irne aboi mateya ya lokuta ya bato oyo
bakanisi te baleki mayele na koyeba mambi ya Nzambe (les gnostiques),
akomi boye : Eleki mala-mu, eleki na litomba, soko moto ayebi eloko te, soko
moto ayebi bobele moke, ndenge wana moto azali kokoma penepene na Nzambe na nzela ya bolingo ; kasi moto akanisi te ayebi makambo mingi mpe

42

Bomoi bwa Basantu

azali na lole-ndo mpe abandi koloba mambi ekoki te mpo na Nzambe, na


kokanisa Nzambe na moti-ndo mosusu, Tata na motindo mosusu Eleki
malamu soko biso toyebi eloko te, mpo na nini eloko oyo esalemi, ntina na
yango nini, kasi biso toyambi Nzambe mpe totikali na kati ya bolingo na ye.
Kasi yo ozali kovimba na lolendo na yo mpo na makambo yo oyebi, mpe
ndenge wana otiki nzela ya bolingo oyo ekopesa moto bomoi. Malamu soko
moto ayebi makambo mosusu te, bobele eloko moko : koyeba Yezu Kristu,
Mwana ya Nzambe oyo babaki na kuruse.

29 juin :
Basantu Pierre (akufaki na mbula 64) na Paul (akufaki
na mbula 67), bapostolo ya Yezu. Eyenga enene
Pierre abotamaki na Bethsade (Galile). Nkombo ya ye ezalaki Simon.
Kasi Yezu apesi ye nkombo mosusu : Kephas, elingi ko-loba : Pierre (Libanga).
Nkombo oyo ezali kolakisa mosala ya Yezu apesi ye : kofanda likonzi ya
Eklezia ya Yezu. Pierre azalaki na ndeko na ye : Andr, oyo akomi mpe apostolo
ya Yezu. Bango mibale, mo-sala na bango : kokanga mbisi. Na Bondeko ya
Sika tomoni mbala na mbala te Pierre azali kokamata esika ya liboso na kati
ya bapostolo. Yezu apesi na Pierre mafungola ya bokonzi ya Nzambe, likoki
ya kokanga mpe ya kofungola. Ezaleli ya Pierre : mto mto. Liboso ayebaki
te mosala nini Yezu ayei kosala. Liboso alobi : Ata nasengeli ko-kufa na yo,
nakowangana yo te (Mat 26, 25). Kasi na nsima moke, bobele na butu wana
Pierre aboi Yezu na liboso ya basali ya nga-nga mokonzi. Na nsima ya nsekwa.,
Yezu amonani liboso na ye. Mbala misato Pierre alobi na Yezu : nalingi yo.
Yezu alobi na ye mpe mbala misato : kamba mpata ya ngai (Jean 21, 15).
Mosala ya kokamba mpata Pierre asali yango na mpiko yonso. Ye moto alobi
te : Tosengeli kopona moto mosusu na esika ya Yudas oyo akabiYezu. Ye
moto, mokolo ya Pentekoste, alobi na bato, asali mpe te bato mingi mokolo
wana bakula ba-tisimu. Ye mpe akotisi mopagano ya liboso (Corneille) na
kati ya Eklezia. Ye moto aboi te bakata bapagano nzoto (circoncision), alobi :
Bongo bolingi komeka Nzambe na botieli bayekoli mokumba, moye batata
na mpe biso moko tokokaki komema yango te ? (Actes 15, 10).

Bomoi bwa Basantu

71

akutani na Natanael, alobi na ye : tomoni moto oyo Moze akomaki mpo ya


ye o buku ya Mobeko, oyo baprofeta bayebisaka : Yezu, mwana wa Yosefu,
wa Nazarete. Natanael ayanoli ye : Eloko nini ya malamu ekoki nde kobima
na Nazarete ? Filipo alobi na ye : Yaka, otala. Yezu amoni Natanaele azalaki
koya, alobi mpo na ye : tala mo-Israel wa solo, moto azali na lokuta te.
Natanael atuni ye : ndenge nini oyebi ngai ? Yezu azo-ngiseli ye : liboso te
Filipo abenga yo, namonoki yo o nse ya nzete ya figi. Na-tanael azongisi :
Rabi, yo ozali Mwana wa Nzambe, ozali Mokonzi wa Israel !
Barthlemy atei Nsango elamu ya Yezu wapi ? Toyebi yango malamu te.
Na Inde, na Ethiopie, na Armnie ? Bakati ye mot, bakomi ye na kuruse ?
Na losambo ya Misa tozali kokumisa boyambi ya solo ya Barthlemy :
Motei, yo ozali Mwana ya Nzambe, ozali Mo-konzi ya Israel !
Toyoka likanisi moko ya santu Jean Chrysostome : Nzambe akamati bato
12, bato bayekoli te, bato bazali kobanga, ba-zali makasi te, mpo na kolakisa
te koza-nga makasi oyo ya Nzambe, ezali koleka makasi yonso ya bato.
Ndenge wana, Eklezia mpe apostolo moko moko bakoki koloba lisusu lokola
santu Paul na 2 Cor 12, 10 : Yango wana nazali kondima bo-tau bwa ngai, na
matumoki, na bokeleli, na minioko, na nsomo nakoyokaka mpo ya Kristu ;
zambi bobele soko nazali motau, nazali makasi solo.
Na bisambo na biso, toloba : Santu Barthlemy, sambela mpo na bakristu
ba-zali na Inde, na Ethiopie, na Armnie, bisi-ka ya yo oteyaki Nsango elamu
ya Yezu.

27 aot :
Santu Monique (332-387). Bokundoli
Monique azali mama ya santu Au-gustin. Abotami na Thagaste ( Algrie
Afrique du Nord ) na 332, na kati ya libota ya bakristu. Abali. Mobali na ye
azali nkolo ya bilanga, alingi mwasi na bana, kasi azali moto ya nkanda mingi.
Moni-que ayekoli na kolinga mobali na ye, ata mobali azali kolanda basi
mosusu. Baboti bana misato : Augustin, Navigius, na mwana mwasi akomi na
nsima moniango na Hippone. Mobali na ye azali mopa-gano, kasi na 370
akomi katekumene mpe akuli batisimu na 371, na ntango ya liwa na ye.

70

Bomoi bwa Basantu

kokundolela biso Ntombwa mpe lokumu ya ngondo Maria azwi na likolo,


esika atombwami mpo na kofanda na kati ya banzelu mpe basantu yonso.
Concile Vatican II alobi : Ngondo Maria, ya Nzambe abombi na kati ya bopeto
banda ntango azalaki na libumu ya mama na ye, na nsima ya mosala na ye na
mokili oyo, atombwami na likolo na nzoto mpe na molimo na ye, mpe akoti
na nkembo ya likolo. Kuna Nzambe akomisi ye Mama mokonzi ya likolo
mpe ya nse, mpo azala elili ya Mwana na ye Yezu, oyo azali Mokonzi ya
likolo mpe ya nse.
Banda sicle ya minei, na bilili, na mo-panzi ya Yezu, tozali komona mama
na ye Maria. Na ba-sicle na nsima, santu Maria azwi na bakristu nkombo ya
Mama mokonzi. Bakristu babandi koyemba ba-nzembo lokola baoyo : Salve
Regina (Lo-sako, Mama mokonzi), Regina coeli (Ma-ma mokonzi ya likolo),
Ave, Regina coelorum (Losako, Mama mokonzi ya likolo) Ndenge moko,
na mibombamo ya nkembo ya rosario, mpe na litania ya santu Maria, tobengi
ye Mama mokonzi. Ye afandi na mopanzi ya Mokonzi ya ba-mbula yonso,
Maria angengi lokola Ma-ma mokonzi, mpe azali kosambela mpo na biso.
Azali kokonzi elongo na Kristu na bambula yonso.
Mosala ya santu Maria, Mama mo-konzi ya likolo, nzembo moko ekolakisa
yango : Ave, Regina coelorum : Losako, Mama mokonzi ya likolo, losako,
Mama mokonzi ya banzelu, losako, Ntina ezali kobota, losako, Ezibeli ya
likolo. Na lisalisi ya yo, Moi etelemi na likolo ya mokili. Zala na esengo,
ngondo ya lokumu, yo oleki basi banso na kitoko, obondela Kristu mpo na
biso.

24 aot :
Santu Barthlemy, apostolo ya Yezu. Eyenga
Barthlemy (Mwana ya Tolomai) azali moko ya bapostolo zumi na mibale
ya Ye-zu. Na Nsango elamu, nkombo ya Barth-lemy ezali kobima elongo na
nkombo ya Philippe. Bato mpe mingi bazali koloba te Barthlemy azali
Narhanael oyo ezali kobima na Nsango elamu ya santu Jean. Soko ezali bongo,
Barthlemy azali moto ya Cana ya Galilea, mpe Philippe azali moto amemi
ye na Yezu. Toyoka mambi ya santu Jean akomi ( Jean 1, 45-49 ) : Filipo

Bomoi bwa Basantu

43

Toyebi te ntango Pierre akomi na Roma. Kuna bakangi ye na eleko ya


empereur Nron, mpe babaki ye na kuruse. Bakundi ye mpe na esika wana, na
nsima batongi ndako Nzambe monene ya Santu Pierre.
Paul abotami na Tarse (Turquie), azali moyuda, azalaki liboso na nkombo
mosusu : Saul. Ayekoli Bikoma bisantu na Yerusalem, motei na ye ya monene :
Gamaliel. Paul ayekoli mpe mosala : ya kotonga biema (tentes). Ntango bayuda
babomaki Etienne, bapesaki na mwana mobali moko, nkombo te Saul
bakazaka na bango mpo atala yango. Andimi liwa ya Etienne. Na nsima, Saul
abandi koniokolo bakristu, azalaki koluka bango mpo na kokotisa bango na
boloko. Kasi mokolo moko, na nzela ya Damas,Yezu amimonisi na ye, mpe
Saul abongoli motema mpe akuli batisimu. Ezalaki na bambula 33-35. Mosala
na ye ya liboso asali yango na Antioche, elongo na Barnab. Bapagano mingi
bakomi kuna bakristu. Paul akomi apostolo ya bapagano. Na mbula 45, Paul
abandi kosala mobembo ya ye ya liboso. Na bamboka yonso azalaki kokoma,
liboso azalaki koteya bayuda na ba-sinagoga na bango. Ntango bayuda baboi
kondima Yezu, Paul abandi koteya bapagano. Paul asali mibembo misato. Akoti
na bingumba mpe bamboka mingi. Minkanda mingi ya Paul akomaki, atindaki
yango na bakristu ya ye ateyaki liboso na mibembo na ye.Yango wana tozali
na minkanda ya ye atindaki na bakristu ya Corinthe, na bakristu ya Ephse, ya
Philippes, ya Colosses, ya Thessalonique.
Na nsima ya mbula 12 bakangi Paul mpe afandi na boloko mbula mibale.
Na mbula 59, batindi ye na Roma mpo basambisa ye kuna. Na mbula 67,
ntango ya empereur Nron bakangi Paul mpe bakati ye mot. Bakundi ye,
mpe na esika wana batongi na nsima ndako Nzambe ya monene ya santu Paul.
Na Bikela ya bapostolo mpe na minkanda na ye, santu Paul azali kolakisa
motema na ye etondi na bolingo monene ya Nzambe. Akomaki na bakristu ya
Philippes (1, 21) boye : Bomoi bwa ngai bozali se na ntina mpo ya Yezu Kristu,
mpe liwa likozwela ngai se litomba (pour moi, vivre, cest le Christ, et mourir
mest un gain).
Tolingi kopesa na maboko ya basantu Pierre na Paul Eklezia ya Roma.
Tosengi bango basambela mpo na Eklezia ya Roma oyo etongami na likolo
ya malita na bango.

44

Bomoi bwa Basantu

Juillet

3 juillet :
Santu Thomas, apostolo ya Yezu. Eyenga
Thomas elingi koloba Lipasa. Na Nsango Elamu ya santu Jean nkombo ya
Thomas ezali kobima mbala minei. Yezu alingi kozonga na Bethanie ntango
ayoki te Lazare akufi, kasi bapostolo bamoni likama na kozonga kuna, bongo
balobi na ye : Motei, bobele sikawa ba-Yuda bali-ngaki koboma yo na
mabanga, mpe oko-zonga kuna ? Thomas alobi na baye-koli basusu :
Biso mpe tokende mpo tokufa elongo na ye (Jean 11, 16). Na maloba oyo
Thomas alakisi na liboso liwa ya ye mpo na Yezu, liwa ya martiro.
Na limpati ya nsuka ya Yezu na bayekoli na ye, Thomas alobi na Yezu :
Mokonzi, toyebi te esika okokende. Boniboni tokoki koyeba nzela ? Yezu alobi
na ye : Ngai nazali Nzela, Bosolo mpe Bomoi (Jean 14, 5-6).
Kasi Thomas ayebani mingi na kati ya bakristu zambi azangi boyambi
ntango ya nsekwa ya Yezu. Bapostolo balobi : Tomoni Mokonzi. Thomas
ayambi te, alingi komona Yezu mpe kosimba ye. Kozanga boyambi ya Thomas
esalisi bakristu mingi. Ntembe na ye wana, mpe na nsima maloba na ye : E
Mokonzi wa ngai, e Nzambe wa ngai ! elongoli ntembe na mitema ya biso,
elakisi biso te ya solo Yezu asekwi. Boyambi ya biso na Yezu oyo asekwi na
bawa ezali koteleme na likolo ya mambi ya bapostolo bamonaki na miso mpe
basimbaki na maboko (1 Jean 1, 1).
Santu Grgoire ya Monene alobi boye : Mambi ezali kolanda awa ezali
kopesa biso esengo, zambi Yezu alobi na Thomas : Esengo na bato bayambi
ata bamoni te (Jean 20, 29). Maloba oyo ezali liboso mpo ya biso, biso bato
totii motema na Oyo ya biso tomoni te na nzoto na ye.
Thomas akendeki koteya Nsango Elamu ya Yezu na Perse (Iran) mpe na
Inde ? Toyebi yango malamu te, kasi bakristu ya Inde bazali kokumisa santu
Thomas mingi, lokola mobandisi ya Eklezia ya bango.

Bomoi bwa Basantu

69

France, bokabwani ya Eklezia na Leta. Na bo-kabwani wana Leta abotoli biloko


ya Eklezia, bongo ekomi mpasi mpo na ba-diocse ya France na kobika. Na
ntango wana mpe bakristu mingi bazalaki komi-tuna : mosala nini biso bakristu
tokoki ko-sala na kati ya politique ? Mpamba te, ba-konzi mingi ya Leta balingi
Nzambe te.
Programme ya Papa yango oyo : Koko-misa mambi yonso ya sika na Kristu
( tout renover dans le Christ ). Ya solo, Papa ako-misi mambi ebele ya sika.
Amoni te ko-tikala na makambo mosusu ya kala ezali malamu te. Ba-rforme
na ye yango oyo : Bana ya mike ya mbula 6, 7, 8 bakoki kokula komunio ya
yambo na bango. Bakristu bakoki kokula komunio mbala na mbala, mpe
mokolo na mokolo, soko balingi ( kala ezalaki ndenge wana te ). Papa abimisi
catchisme ya sika. Ye moko azalaki kolimbola yango na balomingo yonso.
Abimisi brviaire ya sika mpo na banganga Nzambe, abongisi banzembo ya
Misa ( banzembo ya grgorien ), mibeko ya Eklezia akomisi yango ya sika (
Code du droit canon ).
Na 1914 etumba ya mokili mobimba ebandi (premire guerre mondiale).
Toyo-ka maloba Papa alobaki na ntango wana : Bana babola na ngai, ngai
nabonzi bomoi na ngai. Ba-million ya bato bazali koku-fa Nalingaki te,
etumba ebanda, kasi na-kokaki kopekisa yango te.
Papa Pie X akufi mikolo 22 na nsima ya ebandela ya etumba, le 21 aot
1914. Ezali mokolo bakristu bazali kokundola ye. Na eyenga ya santu Pie X
tokanisa Li-loba oyo ya Nzambe, na 1 Tim 6, 20 : Ti-moteo, batela bolamu
bonso ozwaki. Ola-nda masolo ma mpamba mpamba te, ma-ye mazali na nzela
ya boyambi te ; okima mpe maloba ma ntembe ma baye bami-moni te bazali
na mayele ma solo.
Losambo : Tika te santu Pie X asa-mbelela bato yonso oyo bazali kobimisa
mateya ya sika, mpe bazali koluka bosolo, bongo Kristu angengisa bango.

22 aot :
Santu Maria, Mama mokonzi. Bokundoli
Oyo ezali eyenga ya Papa Pie XII akelaki na 1955. Eyenga ezali kokweya
mikolo mwambe na nsima ya eyenga ya Ntombwa ya Maria, mpo na

68

Bomoi bwa Basantu

Tozali kotanga na monkanda moko ya santu Bernard (Trait de lamour de


Dieu) : Oyo aleki ndelo azali kolinga, Oyo azali na bomoi mbula na mbula
azali kolinga. Nzambe azali kolinga. Bongo ndenge nini biso tokoki kolinga
ye bobele ndambo ? Ngai nalingi yo, Mokonzi, yo bokasi bwa ngai, yo
libanga lya ngai (Nzembo 17, 23 ). Nzambe na ngai, nakolinga yo mpo na
mambi yonso yo opesi ngai, na metele na ngai oyo ekokani na metele te oyo
moto asengeli kolinga yo, kasi na metele oyo mpe ezali na nse te na oyo ngai
nasengeli kolinga yo. (Mon Dieu, mon soutien, je vous aimerai pour tout ce
que vous mavez donn, avec ma mesure qui, certes, ne correspond pas
celle qui vous est due en justice, mais qui, cependant, nest pas au-dessous
de ce que je peux).
Santu Bernard akomaki minkanda mingi.
Na eyenga ya santu Bernard tokundola Liloba oyo ya Nzambe : Mposa ya
koku-misa ndako ya yo ekoteli ngai, mafinga bafingi yo, makweli ngai
(Nzembo 68, 10).
Tozala na mpiko mpe na bosawa lokola santu Bernard. Tosenge na bisambo
na biso bolingo mpo na lokumu ya Nzambe mpe mpo ya bosantu ya Eklezia
ya ye.

21 aot :
Santu Pie X, Papa (1835-1914). Bokundoli
Joseph Sarto (oyo ezalaki nkombo ya ye) abotami na Italie, na kati ya libota
ya bana zomi. Bazali babola mpe bakosala misala ya bilanga. Akomi nganga
Nza-mbe, mpe asali bambula mingi na kati ya bakristu na ba- paroisse. Akomi
Episkopo mpe Cardinal. Na 1903, baponi ye Papa. Andimi na kokoma Papa,
na maloba oyo : in crucem, elingi koloba : na nzela ya ku-ruse. - Ntango wana
ezalaki ntango ya mpasi, mateya ya lokuta ya ndenge na ndenge ezalaki
kobulunginia mitema ya bakristu. Bazalaki komituna : nini tose-ngeli
koyamba, nini tokoki koyamba te ? Ezalaki ntango ya modernisme, elingi koloba, ya mateya ya sika oyo ekokani te na boyambi na biso. Bakristu bazalaki
koluka moto oyo akoteya bango na mpiko mpe na bokonzi.
Makambo mingi mpe ya kokata ezalaki na kati ya Eklezia, ndakisa : Na

Bomoi bwa Basantu

45

Ngai namoni te bampota na yo lokola Thomas amoni yango, kasi ngai


nakoganga : Yo ozali Nzambe wa ngai. Sala te nayamba yo, mokolo na
mokolo napusa koyamba yo. Yo ofanda elikia ya ngai mpe bolingo ya ngai !
(Hymne Adoro te).
Toloba na Yezu lokola Thomas : E Mokonzi na ngai, e Nzambe na ngai !

11 juillet :
Santu Benot, Abb, mobateli ya Mpoto (480 547). Bokundoli
Benot (na latin : Benedictus = Bni) abotamaki na Norcia (Italie) na 480,
na kati ya libota ya bato ya lokumu. Na nta-ngo wana bokonzi ya Roma ezali
lisusu te : na 476, mokonzi moko ya Germanie (Odoacre) abengani mokonzi
ya nsuka ya Roma. Ye moko Odoacre akomi mokonzi ya Italie. Na bambula
wana, bato bauti na mikili mosika ( ba-Goth, ba-Wisigoth, ba-Vandale)
bakoti na mikili ya Mpoto mpo mobulu ebimi mingi mpo na bango : koyiba,
kopanza, koboma bato, kozikisa Baboti ya Benot batindi ye na Roma mpo
na koyekola. Kuna Benot afandi na kati ya masenginia ya ndenge na ndenge :
ya bisengo ya nzoto, ya mayele oyo ezali kopesa bato lolendo, ya politique.
Benot akimi Roma mpe akei kofanda ye moko na esika ya kobombama mpo
na koluka Nzambe. Ye alingi te kobungisa Nzambe. Na Subiaco, Benot akoti
na libulu na kati ya bangomba, abandi kosambela mpe komaniola mambi ya
Nzambe. Bato babandi koya epai ya ye, mpe Benot asalisi bango na kofanda
na lisanga.
Benot na ba-moine na ye, na nsima, bakomi na Mont-Cassin. Ezalaki na
529. Kuna Benot afandi tee na liwa na ye na 547. Bakundi ye esika moko na
ndeko na ye ya mwasi : Scholastique.
Benot akomaki monkanda ya mibeko (Rgle) mpo na ba-moine. Monkanda
wana ekolakisa mayele oyo euti na Nzambe. Benot azali komonana na kati
ya monkanda lokola tata na kati ya libota na ye. Makambo ya makasi makasi
ezali na kati te. Komiyokisa mpasi mingi te. Ba-moine bazali kosambela mpe
kosala mosala ( ora et labora = samba mpe sala mosala ). Monkanda ezali
kolakisa na kolekisa ndelo te. Monkanda ekomi ndakisa mpo na ba-monastre
mosusu mingi na Mpoto.

46

Bomoi bwa Basantu

Na Nzembo 34, 12 tozali kotanga : E bana, yakani mpe yokani ngai :


nakolakisa bino eloko nini bobangi Nzambe (Fils, venez mcouter ! Je vous
enseignerai la crainte du Seigneur). Mpe na Nzembo 110 tokotanga boye :
Bwania bwa solo, bobangi Nzambe. Yango oyo mosala ya Benot azalaki
kosala na kati ya ba-moine na ye. Toyoka eteni ya monkanda ya mibeko wana :
Mwana na ngai, oyoka mateya ya motei, mpe tia matoi ya motema na yo :
ondima malako ya tata ya solo mpe landa yango na mpiko. Ndenge wana
okozonga na nzela ya mosala na yo ya botosi na Oyo yo otikaki mpo na koikoi
mpe mot makasi ya yo. Yango wana maloba na ngai ezali mpo na yo ntango
oyo, ata yo ozali nani, yo moto ozali komiboya mpe ozali kosimba bibuneli
ya makasi mpe ya lokumu ya botosi, mpo na kobundela Ye etumba, ye Mokonzi
ya solo. Na liboso ya mambi yonso, soko obandi mosala moko ya malamu,
osenge na ye, na losambo moko ya solo, asilisa mosala wana. Bongo, Oyo
andimi na motema na ye ya malamu na kotanga biso bana na ye, amona mawa
te mokolo moko na misala na biso ya mabe.
Santu Benot elongo na basantu Cyrille na Mthode bakomi babateli ya
Mpoto. Benot, mpe na nsima ba-moine na ye basali makasi mpo na kobomba
minkanda, mayele ya bato ya kala ya bokonzi ya Roma. Bakonzi mingi na
ntango ya santu Benot, mpe na ba-sicle na nsima, bazalaki komona litomba
te na koyekola, minkanda bamoni yango mpamba. Ba-moine babombi mayele
oyo ezalaki na kati ya minkanda, balekisi mpe mayele wana na bato mosusu
na nzela ya biteyelo na bango. Ba-moine babongisi mpe misala ya bilanga.
Ba-monastre ekomaki bongo bisika ya bokolisi mayele mpe bomoi ya bato.

15 juillet :
Santu Bonaventure, motei ya Eklezia (1221-1274). Bokundoli
Bonaventure abotami na Italie, na 1221. Akoti na lingomba ya bafranciscain. Akomi bongo na Paris mpo na koyekola philosophie na thologie.
Azali moto ya mayele mingi. Na nsima ye moko abandi koteya na Paris, abandi
kokoma minkanda. Kuna na Paris akutani na santu Thomas dAquin. Na 1257
baponi ye mpo akamba lingomba ya ba-franciscain. Na ntango wana bafranciscain bakomi mingi : 20.000. Mibeko ya santu Franois dAssise

Bomoi bwa Basantu

67

na mibeko ya santu Benot atikaki. Na ntango wana ba-monastre mingi ya


santu Benot bazali kopesa lisusu ndakisa ya malamu te, mi-ngi mpo mbongo
ebandi kokota na banda-ko na bango mpe kobebisa mosala ya Nza-mbe. Bamoine ya Cteaux babandi ko-zwa nkombo ya ba-cistercien. Bernard azali na
mbula 25 mpe batindi ye afungola monastre ya Clairvaux. Na monastre
wana Bernard afandi tee na liwa na ye. Mpo na molende ya Bernard, monastre
ya Clairvaux eboti ba-monastre mosusu mingi.
Bobongisi (rforme) na ye ezali ndenge nini ? Bernard alingi se eloko moko :
ko-landa mibeko ya santu Benot, komaniola Liloba ya Nzambe, komipesa na
mosala ya maboko, mingi mpenza na mosala ya bilanga, na bobola mpe na
botosi. Bernard alingi akomisa monastre eteyelo ( cole ) ya bolingo ya
Nzambe mpe ya baninga, esika Kristu ye moko azali motei. Azalaki koloba :
tozali na eteyelo ya Kristu, na eteyelo ya bolingo, ndenge Kristu ye moko
atindi : Napesi bino mobeko mwa sika : Bolingana. Lokola ngai nakolingaka
bino, bino mpe bolingana ( Jean 13, 34 ).
Mpo na molende na ye, Bernard afu-ngoli ba-monastre mingi na mikili ya
Mpoto. Bantango mingi ya bomoi ya ye, Bernard azali na nzela : amati na
mpunda na ye, mpe akei na banzela ya France, ya Allemagne, ya Italie. Bernard
azali nzoto makasi te, libumu ezali kotungisa ye mi-ngi. Asali misala mingi na
kati ya Eklezia mobimba : azali kobunda na ezalela ya mabe ya banganga
Nzambe, azali kobu-nda etumba ya moyo na bato bazali koko-tisa na kati ya
Eklezia mateya ya lokuta (ba-hrtique). Bernard azali koteya ba-kristu na
mikili ya Mpoto nde : bomibo-ngisa mpo na kokende kobunda etumba na
Palestine, mpe kolongola Yerusalem na bisika mosusu na maboko ya ba-musulman ( II croisade ).
Bernard azali moto alingi Mobikisi mingi. Bolingo ezalaki kobima na bisambo mpe na bomiyokisi mpasi ya ye. Azalaki koloba : Ntango Nzambe azali
kolinga azali koluka eloko mosusu te, bo-bele eloko moko : biso tolinga ye !
Mpe ndenge nini bolingo ekoki kolingana te ? (Sermon sur le Cantique des
Cantiques).
Bolingo mpe limemia ya santu Bernard mpo na Mama ya Yezu ezali makasi.
Santu Maria azali mobateli ya lingomba ya ba-cistercien. Bandako Nzambe
yonso ya ba-cistecien ezali na nkombo ya Santu Maria.

66

Bomoi bwa Basantu

oyo, na sicle ya mwambe ezwi nkombo ya Ntombwa. Ba-orthodoxe mpe


bazali na eyenga oyo, lokola ba-grec, ba-russe
Ntombwa, Bopeto ya santu Maria banda ntango azalaki na libumu ya mama
na ye, na Bomama na ye ya Nzambe ezali kokende nzela moko. Tozali kotanga
na losambo ya eyenga oyo : E Nzambe, ope-saki ye ngrasia mpe lokumu ya
kokoma mama ya Mwana na yo se moko, mpe ozi-ngisi ye na nkembo eleki
lolenge yonso
Boyambi ya bakristu na Ntombwa ya santu Maria ebandaki ndenge nini ?
Na buku ya Ebandela 3, 15 tokotanga boye : Yo, nioka na mwasi : nakotia
bonguna kati na yo na mwasi, kati ya libota lya yo na libota lya ye : bana ba ye
bakoniata yo na mot, mpe yo okoswa ye na litindi. Toyoka mpe maloba ya
Elisabeth na Ma-ria, Luc 1, 42 : Nzambe abenisi yo yambo ya basi banso.
Yango elakisi te bobenisi mosusu lokola bobenisi oyo ezali te, ezali kolakisa
mpe : mabe oyo Nzambe akaneli moto : okozonga na mabel esika outaki,
mpo ozali se mabel mpe okozonga na mabel ( Gen 3, 19 ), yango ezali
kotala mama ya Nzambe te. Na prface ya Misa ya Ntombwa ya Maria tozali
kosambela : Mokonzi, olingaki te nzoto na ye epola na lilita, zambi amemaki
na libumu na ye Mwana na yo, ye mpe aboti Oyo akope-saka bikelamo yonso
bomoi. Na eyenga oyo ya Ntombwa ya Maria tokoki, na elikia monene,
koloba lokola santu Paul alobaki na bakristu ya Corinthe ( 1 Cor 15, 55 ) : E
liwa, wapi lilonga lya yo ? E liwa, wapi nguya ya yo ya kozokisa ?
Esengo : oyo eloko ya Ntombwa ya santu Maria ezali kopesa biso.
Na bisambo na biso topesa na Mama ya Nzambe milimo ya bandeko na
biso bazali kozila nsekwa ya nzoto.

20 aot :
Santu Bernard, abb mpe motei ya Eklezia
( 1090 1153 ). Bokundoli
Bernard abotami na France : libota na ye ezali ya bato ya lokumu. Na
bambula 22, akoti na monastre ya Cteaux ( Cister-cium, na latin ). Monastre
ezali esika ba-moine bafandi. Akoti kuna elongo na bandeko mpe baninga na
ye mosusu, na ntalo ya bato 30. Na Cteaux, ba-moine baluki nzela ya kozonga

Bomoi bwa Basantu

47

akomaki mpo na lingomba na ye ekokaki lisusu te. Bonaventure akomi mibeko


mosusu mpo na lingomba, mpe tokoki kotanga ye lokola mobandisi ya mibale
ya lingomba ya ba-franciscain. Bonaventure abandi kosala mibembo mingi
mpo na kotala bandeko ya lingomba na ye.
Na 1273 akomi cardinal mpe abandi kolengele Concile ya Lyon. Na ntango
wana Eklezia ezalaki ya kokabwana : Eklezia ya ba-latin na Eklezia ya bagrec. Na Concile ya Lyon balingaki kosilisa bokabwani wana. Bonaventure
akei kuna, kasi ntango ya kosamba makambo yango Bonaventure akufi.
Bakundi ye na Lyon.
Maloba ya Bonaventure alingaki mingi : Na Nzambe kaka lokumu mpe
nkembo ! Bonaventure azali moyekoli ya santu Augustin mpe ya santu Franois
dAssise : azali na boyambi mingi, azali komona mpe koyoka mambi ya
Nzambe makasi na kati ya motema na ye. Akomi boye : Nini moto asengeli
kosala mpo na kokatisa mpe kokoma epai ya Nzambe ? Soko olingi kobongo
ni, otuna ngrasia, otuna te boyebi, otuna mambi ozali koyoka na kati ya
motema na yo, otuna mayele ya moto te, oyoka boleli ya yo ya bisambo,
otuna te nzala na yo ya kotanga minkanda, otuna mobali na yo ya libala, kasi
motei te.
Bonaventure ameseni koloba boye : Bolingo mpe boyebi Nzambe ya moto
ayekoli te ekoki koleka bolingo mpe boyebi ya moto ayekoli mingi.
Toyoka lisusu maloba na ye : Na mambi oyo etali koluka ya ntima (recherche
spirituelle), bomoto ekoki kosalisa te. Otia motema mingi te na koluka koyeba,
kasi tia motema mingi na losambo mpe na limemia ya yo ozali kopesa na
Nzambe, motema mingi te na monoko, kasi mingi na esengo ya motema, mingi
ve na ba-discours mpe na minkanda, kasi otia motema mobimba na likabo ya
Nzambe, elingi koloba Elimo Santu.

22 juillet :
Santu Marie Madeleine . Bokundoli
Mboka ya ye : Magdala, na mai ya Galilea, penepene na mboka ya Simon
Pierre : Kapharnaum. Yango wana nkombo na ye ya Marie ya Magdala, to
Marie Madeleine. Na ba-Evangile tozali na ba-nkombo ya Marie minei : 1.

48

Bomoi bwa Basantu

Marie, mama ya Yezu. 2. Marie ya Magdala. 3. Marie ya Bethanie, ndeko ya


Marthe na Lazare. 4. Marie, mama ya Jacques.
Marie Madeleine azali na kati ya mo-longo ya basi bazalaki kolanda Yezu :
Bazalaki kolanda Yezu, bazalaki kopesa biloko ya bango mpo na kosalisa Yezu
na bayekoli na ye (Luc 8, 2-3).
Basi minei bazalaki koteleme na nse ya kuruse ya Yezu : mama ya Yezu,
mpe ndeko na ye ya mwasi, na Maria mwasi ya Clophas, na Maria ya mboka
Magdala (Jn 19, 25). Marie ya Magdala na Marie mama ya Jos bazalaki
kotala esika ba-zalaki kotia ebembe ya Yezu (Marc 15, 47).
Na Nsango Elamu ya santu Marc (16, 19) tozali kotanga : Awa Yezu asekwi
mokolo nsima ya sabato na ntongo, abimeli liboso Marie ya Magdala, oyo
abenganaki bazabolo nsambo o nzoto ya ye. Mpe santu Jean na Nsango
Elamu ya ye ( 20 ) ayebisi biso te, na mokolo ya kolanda eyenga ya Pasika,
na ntongo ntongo Marie ya Magdala akei na lilita. Amoni ebembe ya Yezu te,
mpe akei mbangu koyebisa Pierre na Jean. Bongo azongi na lilita, mpe abandi
kolela. Mpe Yezu amilakisi na Marie, ye moto ya liboso ya Yezu ami-lakisi.
Yezu alobi na ye : Marie ! Marie atali na ndambo Yezu azali, bongo alobi :
Raboni !, elingi koloba : Motei ! Na boli-ngo mpe na esengo monene ! Yezu
moto atindi Marie na koyebisa na bayekoli te ye asekwi. Marie moto ya liboso
oyo aye-bisi nsango ya esengo ya Pasika.
Moine moko ya sicle XIII akomi boye : Mwasi, mpo na nini ozali kolela ?
Ozali koluka nani ? Moto ya yo ezali koluka, ozwi ye, oyebi yango te ? Ozali
na esengo ya solo ya mbula na mbula, mpe ozali kolela ? Esengo ezali na kati
ya motema na yo, mpe yo ozali koluka na libanda. Motema na yo ezali lilita
na ngai, esika ngai nazali kofanda, ya kokufa te, kasi nazali kopema kuna,
nazali na bomoi ya mbula na mbula. Molimo ya yo ezali elanga ya ngai. Ozalaki
na likanisi ya malamu ntango ozalaki kokanisa te ngai nazali kosala na kati
ya elanga yango. Nakomilakisa na yo na libanda mpe ndenge wana nakosalisa
yo na kozonga na kati ya motema na yo, bongo kuna, na katikati ya motema,
okozwa Oyo ya yo ozali koluka na libanda.
Tosenge, na bisambo ya santu Marie Madeleine, na kopangana na Kristu,
na molende mpe na bolingo ya solo.

Bomoi bwa Basantu

65

bobele bolingo ezali na nguya ya kokela (La haine nest pas une force
cratrice, seul lamour est crateur). Toyoka eteni ya monkanda na ye :
Bandeko, tolinga Tata na biso. Ye aleki kolinga biso, na bolingo ya ndelo te.
Bolingo na biso emonana na botosi na biso, mingi ntango tosengeli kosala
mosala oyo tolingi mpenza te. Ndenge nini bolingo ya Nzambe ekoki ko-kola
na mitema ya biso ? Mpo na yango, toyebi buku mosusu te oyo eleki kitoko
mpe ya solo : bobele Yezu Kristu oyo babaki na kuruse.
Tokanisa Liloba ya Nzambe : Soko moto akabi bomoi bwa ye mpo ya baninga, yango nde nsuka ya bolingi (Jean 15, 13).
Tosenge na Nzambe apesa biso mpiko ya komipesa na bato mosusu. Tosenge
na santu Maximilien Kolbe asambela mpo na bato bazali koniokwama mpo
na boyambi.

15 aot :
Ntombwa ya Maria.
Eyenga
Toyoka maloba ya Papa Pie XII, na 1950 : Ya solo, na nsuka ya bomoi na
ye na mokili oyo, Santu Maria atombwami o likolo na nzoto mpe na molimo
na ye : nzoto na ye epolaki na kati ya mabel te ; ebongwanaki nzoto ya
nkembo, mpe ma-mbi oyo ezali ntina ya esengo na biso na eyenga ya Ntombwa.
Ezali mpe elembo monene ya nsekwa ya biso.
Na ndenge eyenga oyo epalangani na Eklezia mobimba, mpe bakristu bazali
ko-sepela na yango mingi, yango ekolakisa ndenge nini bakristu bazali
kokanisa mpo ya mama na Yezu. Santu Maria amipesi mobimba na mosala ya
libiki ya Mwana na ye. Mosala ya santu Maria asali, ekoki kokabwana te na
mosala ya Mwana na ye, yango wana ye akabwani elongo na Mwana na ye
lilonga ya Yezu. Yezu alongi liwa mpe akoti na nkembo ya likolo.
Lilonga mpe nkembo oyo ezali kola-kisa lilonga na nkembo ya biso yonso
mo-kolo moko na nsekwa ya bato yonso.
Lokumu ya bakristu bazali kopesa na mama ya Yezu ebandaki na bakristu
ya yambo. Eyenga oyo, na sicle ya minei azwi nkombo ya Mama ya Nzambe
alali mpongi, elingi koloba awei (Dormition de la mre de Dieu). Eyenga

64

Bomoi bwa Basantu

Na lisalisi ya wa esengo Isidore tose-nge na Nzambe apesa mpiko mpe


mole-nde na bilenge na biso na kolanda Nzambe.

14 aot :
Santu Maximilien Kolbe, nganga Nzambe mpe martiro
(1894-1941). Bokundoli
Maximilien Kolbe apesi lokumu mingi na lingomba ya ba-franciscain, na
ba-mbula na biso oyo. Maximilien abotami na Pologne na 1894. Akoti na
lingomba ya ba-franciscain. Alingaki mama ya Yezu mingi. Na 1917, azali
naino koyekola mpe abandisi mouvement moko mpo na koku-misa mama ya
Nzambe. Na 1918 akomi nganga Nzambe. Na nsima, na 1927 aba-ndisi Ntei
( Centre ) ya bomoi ya molimo, na nkombo ya : Mboka ya Maria abotami na
mbindo te (Cit de lImmacule). Maximilien akei tee na Japon, kuna mpe
abandisi Mboka mosusu. Maximilien azali kolanda banzela ya sika mpo na
kopalinginia Nsango elamu ya Yezu : ba-journaux, radio ; afungoli bandako
ya ko-bimisa minkanda Nkombo ya Maxi-milien ebandi koyebana mingi.
Na 1936, banguna ya Eklezia bakangi mbala ya liboso. Ntango ya etumba
ya 1939 45 bakangi ye lisusu mpe bakotisi ye na camp ya concentration :
boloko ele-ki nsomo. Ezali na mbula 1941. Nkombo ya camp wana :
Auschwitz. Mokolo moko na camp moto moko akimi. Bakangi sikawa bato
zumi, mpe balingi koboma bango mpo na moto oyo akimi. Na kati na bango,
tata moko azali, abandi kolela mpo na ndako atiki mwasi na bana. Maxi-milien
abimi na molongo mpe na liboso ya bato alobi : nalingi kokamata esika ya
tata oyo, botika ye. Batuni ye : yo nani ? Bongo Maximilien : nazali nganga
Nza-mbe catholique, nalingi kokamata esika ya ye, zambi azali na mwasi mpe
bana. Bandimi, mpe bakangi ye elongo na bani-nga na ye libwa mpe bakotisi
bango na ndako ya nsomo mpo bakufa na nzala. Mpe kuna bakufi na nzala.
Maximilien azali kopesa baninga na ye ndakisa ya kokanga motema, ya mpiko,
ya esengo, na kati ya ndako wana. Akufi le 14 aot 1941, mokolo liboso ya
eyenga ya Nto-mbwa ya Santu Maria.
Papa Jean Paul II atii Maximilien Kolbe na molongo ya basantu na 1982.
Maximilien azalaki koloba : Boyini ezali na nguya ya kokela eloko moko te,

Bomoi bwa Basantu

49

25 juillet :
Santu Jacques, apostolo ya Yezu (akufaki na 44).
Eyenga
Nkombo ya baboti ya Jacques na Jean : Zbde na Salom. Jacques azali
yaya ya Jean. Jean moto akomi na nsima Nsango Elamu ya Yezu. Bazalaki
mokolo wana kokanga mbisi na mai ya Galilea, ntango Yezu abengi bango.
Toyoka na santu Matthieu 4, 18-22 ndenge nini makambo yango elekaki :
Yezu aleki penepene na etima ya Galilea amoni bandeko basusu babale,
Yakobo, mwana wa Zebedeo, mpe ndeko wa ye Yoane. Bazalaki na bwato, na
tata wa bango Zebedeo, kobongisa mi-nyama ; abiangi bango. Noki mpenza
ba-tiki bwato na tata wa bango, mpe balandi ye. Jacques na Jean bazwi
nkombo ya Boanergs = Bana ya nkake, mpo na eza-lela ya bango ya mpiko
mpe ya mto mto (Marc 3, 7). Mokolo moko balingaki mto euta na likolo
mpo na koboma bato wana yonso baboyaki koyamba Yezu na mboka moko
ya Samaria (Luc 9, 54).
Pierre, Jacques na Jean bazali bapostolo ya Yezu atii na liboso. Yezu abengi
bango misato na likolo ya ngomba, esika Yezu abongwani nzoto na miso na
bango (Marc 9, 2-8). Ntango Yezu amoni mpasi na elanga ya Getsemani, abengi
bango mpo bafanda penepene na ye (Mat 26, 37).
Bikela ya bapostolo (12, 1-3) ezali ko-lakisa biso te Jacques akomi
nzeneneke ya Yezu. Mokonzi Hrode Agrippe akatisi ye mot na Yerusalem
na mbula 44. Jacques moto ya liboso ya kokufa liwa ya martiro. Na Nsango
Elamu ya santu Marc 10, 35 tozali kotanga : Yakobo na Yoane, bana ba
Zebedeo, babelemi na Yezu, balobi na ye : Moteyi, tolingi osalisa biso na
likambo tokosenge yo. Yezu atuni : Bolingi nasalisa bino na nini ? Balobi na
ye : Olingisa biso tofanda moko o loboko la yo la mobali, mosusu o loboko
la yo la mwasi o mboka ya yo ya nkembo. Yezu alobi na bango : Boyebi te
nini mpenza bozali kosenge. Bokoki nde komele nkeni ngai nakomele mpe
kondima kokula batisimu ngai nakokula ? Bazongisi : Tokoki. Yezu alobi na
bango : Nkeni ngai nakomele, bino mpe bokomele yango ; batisimo ngai
nakokula, bino mpe bokokula yango. Kasi ngai nakoki kofandisa bino o
loboko la ngai la mobali to la mwasi te ; bato baponomi bakozwa bisika
wana.

50

Bomoi bwa Basantu

Na likambo yango santu Jean Chry-sostome alobi boye : Jacques amibongisi


mpo na komela nkeni ya mpasi. Uto ebandela, Jacques afandi na bolingo mingi
mpo na Yezu., mpe amoni mambi yonso ya bomoto mpamba, mpo na Yezu,
yango wana amibongisi malamu na komipesa mbangu na liwa mpo na Kristu.
Uto sicle ya libwa, na Espagne, ba-kristu babandi kokumisa santu Jacques
mingi. Batongi ndako Nzambe monene na Compostelle, esika babombi
mikuwa ya santu Jacques, na ndenge bato mosusu bazali koyamba.
Compostelle ekomi esika ya misato, nsima ya Yerusalem na Roma, ya baplerin, na ba-sicle eleki, bazalaki kokende kosambela. Tee lelo, bakristu
mingi bazali kokende kuna.
Topesa na maboko ya santu Jacques ba-plerin, na mpe bato yonso bazali
na nzela : asambela mpo na bango.

26 juillet :
Basantu Joachim na Anne, baboti ya ngondo Maria. Bokundoli
Tata na mama ya Maria bazali eteni ya nsuka ya moniololo ezali kokangisa
bato ya Israel ya kala na Israel ya sika (biso bakristu). Na nzela ya bango,
bobenisi oyo Nzambe alakelaki bato banso, ekomeli biso. Bango baboti mwana
mwasi oyo akobota Mwana se moko ya Nzambe. Joachim na Anne bazali
bankoko ya Yezu. Minkanda misantu ezali koyebisa biso eloko moko te mpo
na bango. Toyebi nko-mbo na bango mibale mpo na monkanda moko, na
nkombo ya Protvangile ya Jacques ya sicle ya mibale.
Nzambe alingaki te Mwana na ye abotama na libota ya bato. Ndenge wana
ye akabwani na bato mambi yonso ya bomoto.
Nsango Elamu ezali kolakisa Maria lokola mwana mwasi ya Nazareth, ya
Joseph alingi abala. Mpo na Joseph bankombo ya batata na ye yonso ya kala
ezali. Mpo na Maria, nkombo moko ya tata ya kala ezali te. Joachim na
Anne bazali baboti oyo bayambi mwana, babokoli mwana oyo azali na lisumu
te uto libumu ya mama na ye. Bango basalisi Maria na kofungola motema na
ye na koyoka Liloba ya Nzambe. Ndenge wana Joachim na Anne bakoti na
mosala ya libiki ya biso bato. Yango wana tozali komona esengo na kokundola
bango, na kopesa bango matondo na lokumu.

Bomoi bwa Basantu

63

kolata elamba ya Maria na nkingo, na franais bazali kobe-nga yango


scapulaire : biteni mibale ya mike ya elamba, oyo babenisi, mpe moto alati
yango na nkingo na ye na bansinga, eteni moko ya elamba na ntolo, eteni
mosusu na mokongo.
Lomame azali na mondele moko aleki ye na bokonzi mpe azali koya kotala
ye. Nkombo na ye Van Cauter ( Longange ). Azali koya kotala plantation mpe
azali ko-lia na ndako ya Lomame. Kuna Longange amoni Isidore alati elamba
ya Maria, mpe akosambela chapelet. Longange alingi bakristu ata moke te.
Alobi na Isidore : nalobaki na yo, olongola elamba wana, mpo na nini olongoli
yango te ? Isidore, na kikesa kasi mpe na limemia ayanoli ye : Mondele, olingi
nalongola elamba ya Ma-ria, ekoki kosalema te ! Longange : Ah, ndenge
wana ? Olingi kolongola yango te ? Okomona makambo ekokwela yo.
Longange atindi moto na kobeta Isidore fimbo. Fimbo wana ezali na biteni ya
nsete na nsonge na yango. Moto abeti Isidore fimbo mbala 200. Mokongo ya
Isidore ekomi mpota mpota. Isidore azwi nzela ya kokima mpe kobombama,
na kati ya zamba, mpembeni. Mondele mosusu, mi-kolo wana, ayei kotala
plantation. Isidore abimi na balabala mpo na kokutana na ye. Mondele amoni
Isidore atondi na bampota minene na mokongo, ebimi mayina, ba-nzinzi etondi
na nzoto ya Isidore. Amemi ye na hopital. Na nsima ya mwa mikolo Isidore
akufi. Ezalaki la 15 aot 1909. Pre trappiste moko, oyo amoni Isidore na
mikolo na ye ya nsuka, alobi na ye : mwana na ngai, okokufa. Ozali koyoka
makasi te na moto oyo abomi yo ? Te, oyo eyano ya Isidore, nakosambela
mpo na ye.
Elamba ya Maria ya Isidore alati banda mokolo ya batisimu ya ye, totala
yango te lokola nkisi ya kobatela moto na banguna na ye. Isidore amoni yango
lokola elembo ya bomoi ya sika, oyo azwi na batisimu. Santu Paul akomeli
bakristu ya galate boye : Solo, bino banso bokuli batisimu elongo na Kristu,
bolati Kristu ( 3, 27 ).
Mpiko ya Isidore na kati ya mpasi ezali kokundolela biso maloba ya Yezu,
na Marc 8, 38 : Soko moto ayoki nsoni mpo ya ngai mpe mpo ya maloba ma
ngai o miso ma basumuki baye baboya Nzambe, Mwana wa moto mpe akoyoka
nsoni mpo ya ye mokolo akoya na nkembo ya Tata wa ye elongo na banzelu
basantu.

62

Bomoi bwa Basantu

12 aot :
Wa esengo Isidore Bakanja, martiro
(abotami penepene na 1885, akufi na 1909). Eyenga
Bakanja Isidore azali martiro ya yambo ya Congo, ata Papa aluboli ye wa
esengo na 1994, mpe Anwarite Marie Clementine akomaki wa esengo na le
15 aot 1985, mpamba te, Anwarite akufaki na 1964, mpe Isidore akufaki le
15 aot 1909, na Ngombo Isongu, Equateur ). Yango wana mpe tozali kosepela
eyenga na ye mpembeni na mokolo ya liwa na ye.
Isidore abotami na Bokandela (Equa-teur ). Baboti na ye bazali bapagano.
Bato bazalaki kokamwa ndenge Isidore azali kofanda na mboka. Etambolela
na ye ezali ndenge mosusu, ata azali mokristu te. Na masano ya mboka, soko
alongi te, azali koloba : Lelo ye alongi, lobi mbele ngai nakolonga. Ntango
amoni bilenge mo-susu babandi koloba to balingi kosala ma-mbi ekoki te,
Isidore atiki bango. Baninga na ye bazali koloba mingi na ndenge Isidore
azali na limemia na bana basi. Ndeko na ye ya mwasi akamwi mpe na ndenge
Bakanja apekisi ye na kokutnana na bana mibali na bisika ya kobombama.
Isidore azali na limemia na baboti na ye Alingi kokende na Mbandaka na
kosala mosala, mpe azali kozila tata na ye apesa ye nzela. Mokolo moko tata
abengi Ba-kanja mpe alobi na ye : Bakanja, ntango oyo okomi mokolo, soko
olingi kokende na Mbandaka, naboi te.
Bakanja akomi na Mbandaka, mboka mokonzi ya Equateur, na 1905.
Ntango wana bazalaki kotonga bandako mingi na mboka wana. Bakanja akomi
mosalisi maon. Na esika ya mosala, Isidore aboi koyiba. La 6 aot 1906,
Bakanja akomi mokristu, mpe akamati nkombo ya Isi-dore. Mosika te, Isidore
akomi catchiste, azali koluka bato mosusu bakoma ba-kristu. Ntango wana
bakristu bazali bo-bele moko moko. Na 1908, alingi kozo-nga na mboka na
ye na kotala baboti. Mu-ndele oyo apesi ye mosala ayoki mawa awa Isidore
alingi akende. Alobi na ye : ngai nalingi kotia yo ntango oyo kapita, bongo yo
ozali kotika ngai ?
Isidore azongi mboka. Kuna afandi mingi te. Azwi mosala mosusu na compani moko. Azali kosala mosala na ndako ya mondele moko ya compani wana,
nkombo na ye Reynders ( bazalaki kobe-nga ye Lomame ). Lomame azali
koyoka esengo na ndenge Isidore azali kosala mo-sala na ye. Isidore azali

Bomoi bwa Basantu

51

Santu Jean Damascne akomaki boye : Bino Joachim na Anne, bato ya libala,
boyoka esengo ! Bato ya mokili mobimba basengeli kopesa bino matondo.
Na nzela ya bino bikelamo bapesi na Nzambe likabo eleki makabo yonso :
Mama aleki limemia (Maria), abongi mpenza na Oyo akeli ye.
Tosambela basantu Joachim na Anne mpo na bankoko yonso bazali komona
mpasi mpo na bana ya bana na bango.

29 juillet :
Santu Marthe. Bokundoli
Marthe azali kofanda na Bthanie, elongo na ndeko na ye ya mobali, Lazare,
na ndeko na ye ya mwasi, Marie. Yezu azali moninga na bango, mpe Marthe
azali koyamba Yezu na esengo mpe na boyambi monene, zambi azali kondima
te Yezu azali Mesia ya Nzambe atindi na bato na ye. Kasi eloko ezangi na
boyambi wana. Boyambi ya solo ezali kotinda moto na kosala mosala, mpe
mondimi asengeli kokokisa Liloba ya Nzambe na nzela ya kosalela bandeko
na ye, na bolingo. Kasi Nzambe alingi mpe mondimi ayoka Liloba na ye mpo
na kofungola malamu malamu motema mpe kondima na bolingo mambi yonso
ya Nzambe azali kolakisa ye. Boyambi oyo ya komona mpe komanyola mambi
ya Nzambe na kati ya motema, ezali na ndeko na ye, Marie, oyo afandi na
makolo ya Yezu mpo na koyoka ye. Yezu azali koyebisa na Marthe te : Tala
ndenge ndeko na yo afandi wana, ye mpe azali kosala mosala, kutu mosala
eleki kitoko. Mpamba te, mosala ya mondimi ezali kobota mbuma mingi, soko
ntina ya mosala euti na kokanisa mambi ya Nzambe na bozindo.
Toyoka maloba ya Yezu na Nsango Elamu ya santu Luc (10, 41-42) : Marta,
Marta, ozali komitungisa mpe komiyo-kisa mpasi na makambo maike. Nzokande se likambo lyoko lizali na ntina enene. Maria aponi eye eleki malamu,
mpe bakobotolo ye yango te.
Yango wana, na losambo na nsima ya komunio na Misa ya bokundoli santu
Marthe tozali kosambela boye : E Nza-mbe, salisa biso tolongola motema na
biloko yonso ezali koumela te.
Santu Augustin alobi : Maloba oyo ya Yezu na Marthe ezali kotinda biso na
kolanda eloko moko kaka, ntango tozali komona mpasi na kati ya misala ya
ndenge na ndenge ya mokili oyo.

52

Bomoi bwa Basantu

Tokanisa mpe maloba ya Marthe na Yezu, oyo tozali koyoka mbala na


mbala : Iyo, Mokonzi, nayambi te yo ozali Kris-tu, Mwana wa Nzambe, oyo
ayei o nse (Jean 11, 27).
Mpe maloba oyo lisusu (Jean 11, 5) : Yezu alingaki Marthe na ndeko na ye
ya mwasi, na Lazare. Mpe na Jean 12, 2, tozali kotanga : Marthe moto azalaki
kosalela bango o mesa.
Toyoka lisusu santu Jean Baptiste de la Salle : Na nsima ya ngondo Maria,
santu Marthe moto azwi lokumu mingi na Yezu Kristu, zambi Marthe ayambi
mbala na mbala na ndako na ye Mwana se moko wana ya Nzambe, ya ngondo
Maria amemi na libumu na ye. Marthe aleisi Yezu na biloko na ye, lokola
Maria aleisi ye na mabele na ye. Biso tozala na bolingo ya mto mto wana
ntango toyambi Yezu na komunio, na ndenge santu Marthe azalaki na bolingo
wana ntango ayambi Yezu na ndako na ye mpe aleisi ye biloko.
Libongi (vertu) : Toyamba bampaya mpe toleisa bango
Losambo : Santu Marthe asalisa biso tomitungisa na makambo mingi te, se
likambo moko ezali na ntina monene.

31 juillet :
Santu Ignace ya Loyola, nganga Nzambe (14911556).
Bokundoli
Ignace abandisi lingomba ya ba-jsuite. Abotami na Loyola (Espagne) na
1491. Azali mwana ya nsuka ya libota ya bana 13. Libota na ye ezali ya bato
ya lokumu. Akomi soldat, mpe na etumba na mboka Pampelune azoki makasi,
mpe azongi ndako. Lokolo na ye ezali ya kobukana bukana. Mikolo mingi
amoni nzela ya kotambola te. Ntango wana abandi kotanga minkanda ya
ndenge na ndenge, atangi mpe Bomoi ya Yezu mpe ya basantu. Bongo abongoli
motema mpe na mbala-kaka akani na komipesa mobimba na Nzambe. Akei
kobombama na libulu na kati ya bangomba. Nkombo ya esika wana, Manrse.
Kuna abandi kosambela mpe komaniola makambo ya Nzambe. Na Manrse
akomi monkanda moko : Exer-cices spirituels. Monkanda oyo ezali ko-salisa
tee lelo bato mingi na koluka nzela ya kosalela Nzambe.

Bomoi bwa Basantu

61

azali ndeko ya Claire, na nsima mpe mama ya Claire : Ortolana, na ndeko na


ye mosusu : Batrice. Baniango wana bakamati nko-mbo ya : Bankento
bansukami (Pauvres Dames). Lingomba ya ba-Clarisse ebandi. Mosika te,
bana basi bakoti mingi, ba-couvent mosusu efungwami. Na 1216, Papa apesi
na lingomba ya Claire : pri-vilge de pauvret, elingi koloba : baniango bakoki
kozala bankolo ya eloko moko te. Baniango bakobika na makabo ya bato.
Bapapa, na nsima, baluki te : bobola ezala makasi ndenge wana te, kasi Claire
alingi bobola ya ndenge wana.
Na 1252, Papa Innocent II akei kotala baniango na Assise, mpe andimi
mibeko na bango. Claire akufi le 11 aot 1253, na boboto mpe na esengo.
Toyoka bobenisi ya Claire na nsuka ya bomoi na ye : Ngai, Claire, mosaleli
ya Mokonzi, nzete ya moke ya tata na biso mosantu, Franois, ndeko na bino
mpe mama na bino, ata ngai nabongi te Ngai nabenisi bino na ntango ya
bomoi na ngai mpe nsima ya liwa na ngai, na ndenge nakoki kosala, mpe
koleka oyo nakoki kosala. Claire alobi na molimo na ye : Kende na boboto,
zambi yo olandi nzela ya malamu, kende na elikia, zambi Mozalisi na yo
asantisi yo, abateli yo ntango yonso, alingi yo lokola mama alingi na boboto
yonso mwana na ye. E Mokonzi na ngai, kamata lokumu zambi yo moto ogangi
ngai ! ( O Dieu, bni sois-tu de mavoir cre ! ).
Claire ayangeli lingomba na ye na bokebi mpe na mayele bambula 40
mobimba. Bambula mingi Claire azalaki nzoto makasi te, azalaki kobela bela.
Toyoka maloba ya Claire na Sur Agns ya Prague : Eloko yo osimbi, simba
yango, eloko yo ozali kosala, sala yango, tika yango te, kasi kende mbangu,
na lokolo ya pepele, libako na makolo te, na molende, na esengo, nge tambola
na bokebi na nzela ya esengo ya Nzambe. Akomeli Sur wana mpe : Olekisa
ndelo te na komiyokisa mpasi, mpamba te, nzoto ya biso ezali ebende te.
Maloba mosusu ya Claire na Agns : Mokolo na mokolo miso na yo ya motema
etala Kristu, na elongi na ye ezali kongenge bobola, oyo ezali kopesa esengo,
bosawa yasantu, bolingo, ya biso tokoki te kolimbola.
Liloba ya Nzambe : Boyebi boniboni Mokonzi wa biso Yezu Kristu alakisaki
bolingi bwa solo mpenza : ye moto wa nkita akomi mobola mpo ya bino, mpo
te akomisa bino bato ba nkita na bobola bwa ye ( 2 Cor 8, 9 )
Losambo : Tosenge na santu Claire, bomoi na biso ezala polele, lokola
molangi ya mpembe.

60

Bomoi bwa Basantu

na mto na likolo ya bibende. Ntango Laurent azali ko-zika, alobi na moto


azali koniokolo ye : mopanzi oyo ekalangemi malamu, balola ngai na mopanzi
mosusu !
Laurent azali martiro aleki koyebana mingi na Eklezia ya Roma. Nkombo
ya ya ekoti na losambo monene ya Misa.
Toyoka makambo bakomi na monka-nda moko : Mpasi ya Laurent : Bobele
mokolo wana Laurent asangisi bato bakufa miso, batengoli, bakoni, babola,
mpe abombi bango na ndako ya Hippo-lyte Empereur Dce alobi na
Laurent : Wapi biloko ya ntalo ya yo olakeli biso na kopesa ? Wa esengo
Laurent akotisi na ndako ya tribunal bato wana ya mpasi mpe alobi na
mongongo makasi : Tala bo-mengo ya nsuka te, yango ekokutwa te, kasi ekoya
mingi mokolo na mokolo, mpe bato yonso bakoki kozwa yango bipai yonso.
Empereur Constantin, na sicle ya minei atongi, na likolo ya lilita ya santu
Laurent ndako Nzambe monene.
Na ndakisa ya santu Laurent toyekola na kotala babola lokola bomengo ya
Eklezia.

11 aot :
Santu Claire, ngondo (1193-1253). Bokundoli
Tomoni nzela te ya kokabola bomoi ya santu Claire na bomoi ya santu
Franois dAssise. Claire ( = moto ya moi ) abotami na Assise na 1193, na kati
ya libota ya bato ya lokumu. Abandi koyeba santu Franois na 1210, ntango
Franois asili abongoli motema mpe abandi koteya bato na Assise. Bomoi ya
bobola ya Franois, oyo amipesi mobimba na Kristu, ebeti motema ya Claire
makasi. Aluki nzela ya kokutana na Franois na lisalisi ya ndeko na ye Ruphin,
oyo akoti na lingomba ya Franois. Ndenge wana Claire na Franois bazali
kosolola ndenge nini Claire akoki komipesa na Nzambe. Na lomingo ya
mandalala ya 1212, na mpokwa, Claire atiki ndako na ye mpe akei na Franois
mpe na bandeko na ye. Azali na mbula 18. Kuna amipesi mobimba na Nzambe
mpo na seko. Libota na ye alingi te, kasi Claire alingi mpe te kozonga nsima.
Franois akotisi Claire na ndako moko penepene na ndako Nzambe ya santu
Da-mien, na Assise. Bana basi mosusu bayei kofanda epai na ye : Agns, oyo

Bomoi bwa Basantu

53

Ignace akei na makolo tee na Palestine, mabele yasantu ya Yezu. Ye moto


ayokaki mpasi mingi na lokolo ! Yango ekolakisa mpiko ya Ignace na misala
na ye mpe molende na kosukisa yango. Ignace azali na mbula 33 ntango akani
na koyekola mingi mpo na komilengele na mosala alingi kosala. Ayekoli liboso
na Espagne, mpe na nsima akei na Universit ya Paris. Kuna, na 1534, ye na
baninga na ye libwa basali malako na bango lokola ba-religieux. Balaki mpe
na kokende na kati ya ba-musulman mpo na kosakola Nsango Elamu ya Yezu.
Soko bakoki kokende kuna te, balaki na komipesa na maboko ya santu Papa
na Roma mpo apesa bango mosala yonso ye alingi.
Na 1537, Ignace akomi nganga Nza-mbe. Na baninga na ye akomi bongo
na Roma. Santu Papa apesi bango mosala ya kosakola Nsango Elamu na Italie.
Na 1540, Papa andimi mpe mibeko ya lingo-mba na bango. Compagnie ya
Yezu ebandi. Mbangu ba-jsuite bakomi mingi, nkoto mobimba. Na 1541,
missionnaire ya liboso ya lingomba ya ba-jsuite, Franois Xa-vier, akomi na
Inde, akomi mpe na Japon, alingi mpe kokoma na Chine.
Na 1547, mosala ya ba-jsuite ya ko-teya na ba-collge mpe na ba-universit
ebandi. Na ntango wana Eklezia ezali ya kokabwana : basusu bazali bacatholique, basusu bazali ba-protestant. Ignace alakisi na bato ya lingomba na
ye, bazala na bo-lingo mpe limemia na ntango ya koteya bato bazali bacatholique te.
Ba-jsuite bakomi sikawa 25.000.
Toyoka eteni ya monkanda, Exercices spirituels, ya santu Ignace : Moto
akelami mpo na kokumisa, komemia mpe kosalela Nzambe, Mokonzi ya biso,
ndenge wana moto abikisa moyo ya ye. Biloko mosusu awa na nse oyo esalemi
mpo na moto, mpo na kosalisa ye na kolanda nzela wana mpe kosala mosala
ya Nzambe alingi, awa atii ye na mokili. Elakisi nini ? Moto asengeli kosalela
biloko ya nse soko ezali kosalisa ye na kokende na Nzambe, ye asengeli koboya
yango soko ezali kopekisa ye na kokoma na Nzambe. Ndenge wana tondima
ata nzoto kolongonu, ata mpasi ya nzoto. Tondima ata lokumu ata lokumu te,
ata bomoi molai to mokuse.
Tosenge na santu Ignace asalisa biso na losambo ya ye na mikano yonso ya
malamu oyo tosengeli kokamata.

54

Bomoi bwa Basantu

Aot

1er aot :
Santu Alphonse Marie de Liguori, episkopo
mpe motei ya Eklezia (1696-1787). Bokundoli
Alphonse abotami na libota ya lokumu na Naples (Italie) na 1696. Tata na
ye alingi te Alphonse akoma avocat. Bongo ye, lokola azali na mayele mingi,
na mbula 17 akomi avocat. Bato babandi koya na ye mingi mpo te asamba
makambo na bango. Ye mpe alongisi bango yonso. Na ntango wana azali mpe
kosambela mingi, aboi kobala, azali kokota mbala na mbala na ndako Nzambe
mpo na kokumisa Ukaristia esantu. Azali kotala bambefo bakoki kobika te
mpe kotala bato na boloko, baye bakati bango likambo ya liwa. Azali na mbula
27 : mokolo moko asambi likambo ya moto moko. Kasi moto oyo akiti na
likambo. Alphonse amoni te moto oyo mosusu alongi likambo mpo afuti
mbongo. Na yango, Alphonse atiki mosala na ye ya avocat, mpe mosika te
akomi nganga Nzambe. Abandi kotala mpe kosunga bana bazali na balabala,
na Naples, mpe na bamboka mpembeni, kotala mpe kosunga bakoni. Ntango
abandi kotala mpe koteya bato na Naples na na bamboka ya mpembeni, amoni
nini ? Mawa mingi ! Bato bayekoli te, bayebi mambi ya Nzambe te, bafandi
na kati ya masumu ya ndenge na ndenge. Amituni : ngai nakoki kosala nini
mpo na kosalisa bato oyo ? Aluki bato bakoki kosalisa ye. Bongo abandisi
lingomba moko ya ba-religieu, Lingomba ya Mobikisi mosantu santu (
Congrgation du trs saint Rdempteur ). Ezalaki na mbula 1732. Mosala na
bango : koteya Nsango elamu na bamboka, koteya bato litomba ya sakramento
ya Ntubela
Na kati ya Lingomba na ye, na nsima, matata ebandi kobima mingi.
Lingomba na ye ekabwani na biteni mibale. Ntango Alphonse akomi mobange,
babimisi ye na lingomba. Bobele na nsuka ya bomoi na ye azongi na kati ya
bandeko na ye ya lingomba.

Bomoi bwa Basantu

59

Ntango Dominique azali kosala mpe abandisi lingomba na ye, Franois


dAssise mpe azali kosala mpe abandisi lingomba na ye ya ba-franciscain.
Fran-ois dAssise akufi na 1226. Santu Fran-ois alandi Yezu na bobola na
ye. Santu Dominique alandi Yezu oyo azali Liloba ya Tata, mpe Mwinda ya
nse. Bolingo ya Dominique mpo na Liloba ya Nzambe ezali makasi. Nsango
elamu ya santu Ma-teo, minkanda ya santu Paul, Dominique azali komema
minkanda wana ntango yonso na mibembo na ye. Ayekoli yango malamu mingi
mpe ayebi yango na mot.
Penepene na ntango yonso Dominique azali koloba na Nzambe na kati ya
bisa-mbo, to azali koloba makambo ya Nza-mbe na bato. Azali kopesa mpe
toli na ba-ndeko na ye na kosala ndenge moko.
Bolingo ya Dominique mpo na mama Santu Maria ezali makasi. Azali
kosambe-la rosaire, mpe azali kolimbola mibomba-mo ya rosaire na bakristu.
Tosenge ngrasia ya koloba na Nzambe mbala mingi, mpe ya koloba
makambo ya Nzambe mpe mbala mingi.

10 aot :
Santu Laurent, diakono mpe martiro (akufaki na 258).
Eyenga
Laurent azali diakono ya Eklezia ya Roma. Papa Sixte II apesi Laurent
mosala ya kobomba mbongo mpe biloko ya Eklezia. Na 257, empereur Valrien
abandi koniokolo bakristu. Abimisi mobeko : bakristu bakoki kokutana mpe
kosambela lisusu te, bakoki kokutana lisu-su te na malita ( cimetires ) mpo
na kosa-mbela ( malita ezalaki bisika ya bakristu bazalaki kosambela ). Mosika
te, bakangi Papa Sixte II na badiakono na ye na malita ya santu Callixte. Bakitisi
bango na liwa. Laurent, bakangi ye naino te, mpamba te bazali kozila Laurent
alakisa bango bomengo ya Eklezia. Laurent amoni Papa azali kokende na
esika bakoboma ye, abandi kolela : ngai nakoki te kopesa bomoi na ngai mpo
na Kristu ? Papa alobi na ye : okolanda ngai, mosika te.
Batindi Laurent na makasi na kobimisa mbongo ye biloko ya ntalu ya
Eklezia. Laurent asangisi babola, bakoni, bate-ngoli, bato ya kokufa miso,
alakisi bango na zuzi : tala bomengo ya Eklezia ! Baki-tisi ye na liwa : akozika

58

Bomoi bwa Basantu

8 aot :
Santu Dominique, nganga Nzambe (1170-1221). Bokundoli
Dominique de Gusman abotami na Espagne, na 1170. Ayekoli thologie
mpe akomi nganga Nzambe. Episkopo na ye alingi te Dominique akende na
ye na ko-tala mikili mosusu. Ndenge wana bango bakomi na Sud ya France.
Bamoni kuna te bakristu bakabwani. Basusu bakomi ba-cathare ( ba-gedila).
Ba-cathare bame-moli nsuni, nzoto, libala ; balingi lisusu kotosa Papa te,
baepiskopo te, banganga Nzambe mpe te. Bazali koloba : bato ba-zali na liboso
na kati ya Eklezia bazali koluka mbongo, bazali lolendo, bazali kopesa ndakisa
malamu te na bomoi na bango. Episkopo na Dominique bamoni mpe bato
mingi bayebi lisusu mateya ya Nzambe te, bato mpe mpo ya koteya ba-ngo
bazali te. Episkopo alobi na Domini-que : Tosala mosala ya koteya bato na
mpiko yonso, totika misala mosusu. Mpo na kokangisa monoko ya bato ya
mabe : toteya ndenge tozali kofanda na ezalela ya biso, tolanda ndakisa ye
Yezu, Motei ya malamu. Yango wana tobima na miso ya bato na lolendo te,
totambola na mako-lo, na bokuse, tolanda ndakisa ya Yezu na bapostolo na
makambo yonso ya bomoi ya biso.
Dominique aluki bato mosusu, mpe bango babandi koteya bato na bobola
yonso. Basi mosusu, oyo bamipesi na Nzambe, bazali kosambela mpe kosalisa
Dominique na bandeko na ye. Dominique abandisi couvent na ye ya liboso ya
ba-ndeko na mboka Toulouse. Programme na bango, yango oyo : koyekola
malamu malamu Liloba ya Nzambe, komanyola mpe yango malamu na kati
ya losambo, kosalela Liloba wana, koteya bato yonso na mpiko mpe na
molende, koteya liboso bato baleki babola.
Na 1215, Dominique akei na Roma mpe asengi na Papa andima Lingomba
na ye. Awa azwi ndingisa : Ordre des Frres prcheurs ( ba-dominicain )
ebandi. Na 1217, bandeko ya Lingomba bakomi 16. Dominique atindi bandeko
11 na mikili mosusu. Balobi na ye : ezali malamu te na kotinda mosika mbangu
mbangu ba-mpangi mingi. Ayanoli bango : nayebi mambi nazali kosala ! Soko
bamboto eti-kali ya kosangana, ekobeba, kasi soko yo oloni yango, mboto
ekobota mbuma. Na 1221, Dominique akufi. Misala ya komiyokisa mpasi,
bisambo na moi, na butu, koteya bato, kotambola na makolo na mikili ya
Mpoto, yonso wana elembisi nzoto ya ye noki.

Bomoi bwa Basantu

55

Santu Alphonse akomi minkanda ebele. Monkanda moko : Thologie


morale eyebani mingi. Na ntango wana bato mosusu bazali koteya mateya ya
koleka makasi, bazali koloba te : na kobika ezali mpasi mingi ! Bazwi nkombo
ya ba-rigoriste (bato ya makasi). Alphonse azali koteya mambi ya makasi mingi
te, azali koteya te Nzambe azali motema ngolu mingi.
Santu Alphonse azali koloba mbala na mbala : Ezali na nzela ya losambo
te basantu bakomi basantu. Ye moko, yambo mpenza asali makasi mpo na
koteya bato litomba ya Ukaristia yasantu. Alingi bakristu bakota mbala na
mbala na ndako Nzambe mpo na kokumisa Ukaristia yasantu. Toyoka lisusu
makanisi ya Alphonse : Bobanga te na kopesa na Nza-mbe makambo bokeleli
na yango, bopesa mpe makambo ya bato mosusu. Esengo kani Tata Nzambe
akoyoka soko bino bobosani mbala mosusu mambi ya bomoi ya bino, kasi
bino botii motema na loku-mu na ye, botii motema na mpasi ya bato mosusu,
mingi ya bato bazali konyokwa-ma, botii motema na milimo ya epongelo,
mpo bazali lokola basi ya libala ya Nzambe alingi, basi bazali na mposa ya
kofanda penepene na Nzambe. Bokanisa na basumuki bazangi ngrasia ya
Nzambe. Bolobela ye mingi mpo na basumuki ? Boloba ndenge oyo :
Mokonzi ! Ozali na bolingo mingi. Obongi te bato balinga yo na motema
mobimba. Mpo nini yo, na mokili yo otondisi na bolamu na yo, ozali kotika
bato mingi oyo balingi koye-ba yo te, baboi kolinga yo, bazali kotiyola yo ?
O Nzambe ya bolingo nsuka te, tika te bato bayeba yo, sala te bato bakumisa
yo ; bolingo na yo eyangela motema ya bato yonso.
Na Nembo 130, 7 tozali kotanga : Bino bato ya Israel, botia motema na
libiki ya Mokonzi ! Mokonzi azali nta bolamu, ngolu ndelo te.
Tosenge na bisambo ya santu Alphonse bolingo mpo na basumuki, tozala
mpe na motema etondi na ngolu.

4 aot :
Santu Jean Marie Vianney (Cur dArs),
nganga Nzambe (1786-1859). Bokundoli
Mokolo ya eyenga ya Cur dArs ezali kokweya na mokolo ya liwa ya ye,
le 4 aot 1859. Papa Pie XI aluboli ye na 1929 mobateli ya ba-cur yonso.

56

Bomoi bwa Basantu

Abotami na 1786 na France, penepene na Lyon. Libota na ye ezali ya bato


bazali kosala bilanga. Jean Marie, na bomwana na ye afandi na ntango ya
Rvolution franaise, oyo ebandaki na 1789. Ezali ntango ya minio-ko mpo
ya bakristu. Ndako Nzambe ya mboka na ye, bakonzi bakangi yango. Komunio
na ye ya yambo asali yango na bonkutu. Baboti na ye bazalaki kobomba
banganga Nzambe bakimaki ba-paroisse na bango. Jean Marie, na bolenge na
ye azalaki mokengeli ya mpata. Akokisi mbula 20 ntango alingi kokoma
nganga Nzambe. Abandi koyekola, kasi azalaki mayele mingi te. Bobele na
mpasi bandi-mi ye akoma nganga Nzambe, na 1815.
Na 1818 akomi cur ya Ars, mboka moko ya moke, esika bakristu mingi
ba-zali kosambela lisusu te. Jean Marie azali kosambela mingi, bantango mingi
azali kotikala na kati ya ndako Nzambe mpo na kokumisa Ukaristia yasantu.
Azali mpe komiyokisa mpasi mingi. Bakristu ya mboka babandi kobenga ya
mosantu. Ba-kristu bazali mpe kokamwa mingi na malongi na ye ya kitoko.
Bambula 42 afandi cur na Ars, tee na liwa na ye na 1859. Bato babandi koya
na ye mingi, basusu bauti mosika, na mikili mosusu mpe. Balingi komona ye,
koyoka ye, kotubela masumu na bango. Cur ya Ars azali kotikala na ndako
ya ntubela mbala mosusu bangonga zumi na mitano na mokolo moko. Satana
abandi koyokisa ye mpasi mingi, na molimo mpe na nzoto ya ye, bambula
ebele.
Banganga Nzambe mosusu babandi koloba : Cur ya Ars azali kolekisa
ndelo na mosala na ye, azali mpenza na mayele te, azali ligboma. Episkopo na
bango alobi na bango : Nasengeli kosepela mingi soko banganga Nzambe na
ngai yonso bazali na ndambo ya ligboma na ye.
Toyoka mateya na ye na mokolo ya minei mosantu, mokolo liboso ya liwa
ya Yezu : Bolingo kani, motema ya malamu kani ya Yezu Kristu, oyo aponi
mokolo liboso ya liwa ya ye mpo na kokela Kisa-karamento moko, mpe, na
lisalisi na yango, azali kotikala na kati ya biso, ye Tata na biso, Mobateli na
biso, esengo na biso mobimba ! Na bato bazalaki kofanda na ntango wana ya
Yezu, mpe na biso tozali kofanda ntango oyo, biso toleki komona esengo.
Ntango wana, Yezu aza-laki kofanda esika moko, bato balingaki komona ye
bazalaki kouta mpe mosika ; biso tozali komona ye bisika yonso ya mokili,
esengo oyo ekoumela mpe tee na nsuka ya mokili. O bolingo eleki monene ya

Bomoi bwa Basantu

57

Nzambe mpo na bikelamo na ye ! Te, eloko moko te ekoki kopekisa ye ntango


alingi kolakisa bolingo na ye. Ntango oyo ( mokolo ya minei mosantu ) ezali
ntango bato ya mabe na Yerusalem batomboki mpe balingi koboma ye, ezali
ntango mpe ya Yezu abongisi mpo na bango mpe mpo na biso elembo ya
koleka ntalo ya bolingo na ye: Ukaristia esantu.
Cur ya Ars azalaki koloba mpo na losambo : losambo ezali eloko mosusu
te, ezali bobele kosangana na Nzambe.
Tosenga santu Cur ya Ars asambela mpo na banganga Nzambe, baoyo
bazali kotia ntembe na bobiangemi na bango.

6 aot :
Yezu abongwani nzoto.
Eyenga
Yezu abongwani nzoto mpo ya nini ? Mikolo wana, Yezu ayebisi bayekoli
te na Yerusalem bakonzi bakoyokisa ye mpasi mingi mpe bakoboma ye, kasi
ako-sekwa mokolo ya misato. Kosekwa , bayoki ntina na yango te, kasi
koboma , bayoki ntina na yango malamu. Mpe bayoki nsomo. Ekomi mpasi
mingi mpo na bango na kolanda Yezu na nzela ya Yerusalem. Bongo Yezu
alakisi bayekoli misato : Pierre, Jacques na Jean, nkembo na ye. Bayekoli
bamoni nkembo ya Yezu mpe balingi kolongwa lisusu likolo ya ngomba te.
Yezu alakisi bango bongo te auti na Nzambe, aleki bato mosika. Na
mbongwana wana Moise na Elie bamo-nani na Yezu, balakisi bongo te
bandimi ye. Tata Nzambe mpe andimi Yezu, na ma-teya na ye yonso, alobi :
Oyo azali Mwana wa ngai wa bolingo, nakosepelaka ye mi-ngi, boyoka ye !
Elingi koloba : bayekoli bandima mpasi na liwa ya Yezu, bandima mpe mpasi
na bango, mpo bamona nkembo.
Banda sicle ya minei, ba-moine baza-laki kofanda na esobe mpe bazalaki
kose-pela mingi eyenga oyo. Mobombamo oyo ya Mbongwana ya Yezu
ekamati esika mpenza na kati ya motema ya bango. Ba-zalaki kotala na motema
na bango (con-templer) nkembo ya Nzambe na kati ya Yezu abongwani nzoto
mpe bazalaki kota-nga, na kotika te (sans cesse), nkombo ya Yezu.

You might also like