You are on page 1of 3

PRÉPARATION MESSE DU 1/02/23

BOYINGELI:

Bandeko boboto !

Bondeko….. Esengo…..

Bandeko, Yambo ya bobandi misa ma biso tokosenge na biso


banso ete tokanga ba téléphones na biso to totia yango na
mode silencieux pona kobebisa milulu mia misa esantu te. 

Bandeko Na mobu Pastorale na biso eye :

Biso Banso tozala na Esengo ya KOSALELA MABONGI MA


BATISIMO YA BISO.

Lelo Eklezya ekosepela Lomingo la nsambo o mobu A

(voir LECTIONNAIRE  )
 
Bandeko, Yezu Kristu alingi tozongisela moto moko mabe te,
maye asali biso, kasi tolimbisa baninga banso na motema moko

Na yango,

Totélémé banso mpo ya koyamba Kuruze Esantu, elembo lya


LIBIKI lya biso, Nganga Nzambe elongo na Basalisi Misa. 
Elongo na Chorale, banso toyemba, tobina mpe tobete
maboko...
NKEMBO :

Bandeko 
Awa Tata Nzambe  apesi biso mobu pastorale eye mpe poso
ya sika, tozala na esengo ya KOSALELA MABONGI MA
BATISIMO YA BISO.

Na yango, elongo na Mampinga ma  likolo, tokumisa Nzambe


Tata, Mwana mpe ELIMO SANTU na loyembo la nkembo.

Elongo na Chorale, toyemba, tobina mpe tobete maboko...

MATANGI :

Bandeko boboto,

Tokomi sik'awa na ntango ya MATANGI. 

Maloba Masantu makosalisa biso mpo te TOSALELA 


MABONGI MA BATISIMO YA BISO.

Banso na limemia, tolanda MATANGI. 

Litangi lya yambo :

Nzambe alingi ‘te bato banso balakisana limemya mpe


balingana

Liloba lya nzambe lokola likomami o buku ya Levi

Nabokebi tolanda
Psaume :

Litangi lya ibale :

Nzambe akosukisa bato ba bwanya na mayele ma bango moko

Mokanda mwa yambo mwa santu polo ona bakristu ba korinti

Na bokebi lisusu tolanda

ALELUYA ALELUYA

Soko moto alingi ngai , akotosa maloba ma ngai, mpe tata wa


ngai akolinga ye.

ALELUYA

You might also like